Pusaná penepene na Nzambe
Yehova alingaka bato ya komikitisa
LOLENDO, zuwa mpe komikumisa ezali bizaleli oyo emonanaka mingi epai ya bato oyo balukaka lokumu na mokili oyo. Kasi, bizaleli ya ndenge wana ekoki kosalisa moto apusana penepene na Yehova Nzambe? Te, kutu Yehova alingaka ete bato oyo basambelaka ye bázala na komikitisa. Likambo yango emonani na lisolo oyo ezali na Mituya mokapo 12. Esalemaki na esobe ya Sinai, nsima ya kobima ya Bayisalaele na mokili ya Ezipito.
Milyami ná Alona, bayaya ya Moize, “balobaki mabe na ntina na” leki na bango. (Vɛrsɛ 1) Na esika básolola na Moize, babandaki nde kotonga ye, emonani ete bakómaki koloba mabe mpo na ye epai ya bato mosusu na kaa. Ekoki kozala ete Milyami oyo Biblia etángi nkombo na ye liboso nde abandisaki likambo yango. Likambo ya liboso oyo bamonaki mabe ezalaki mpo Moize abalaki mwasi Mokusi. Milyami azalaki nde na zuwa ete mwasi yango oyo azalaki ata Moyisalaele te akokóma na lokumu koleka ye?
Ezalaki mpe na makambo mosusu. Milyami ná Alona bazalaki koloba boye: “[Yehova] alobaki bobele na monɔkɔ ya Moize solo? Ye alobaki na monɔkɔ na biso lokola te?” (Vɛrsɛ 2) Mposa ya kozala na bokonzi mpe lokumu nde etindaki bango báloba mabe?
Na lisolo yango, Moize ye moko alobaki eloko te mpo na makambo yango. Emonani ete ayikaki kaka mpiko. Motema molai na ye endimisi likambo oyo Biblia elobi mpo na ye ete azalaki na “komikitisa mingi koleka bato nyonso” oyo bazalaki na mabelé.a (Vɛrsɛ 3, NW) Moize ye moko te nde asengelaki koyebisa bato ntina oyo Yehova azalaki kosalela ye. Yehova azalaki koyoka mpe akɔtelaki Moize.
Mpo na Yehova, mabe oyo balobaki na Moize, balobaki yango nde na ye. Kutu, Ye nde aponaki Moize. Ntango Nzambe apamelaki batomboki yango, akundwelaki bango ete azalaki na boyokani makasi na Moize; alobaki boye: “Nakosololaka na ye na miso na ye polele.” Na nsima Yehova atunaki Milyami ná Alona boye: “Na bongo bobangaki te koloba mabe na ntina na . . . Moize mpo na nini?” (Vɛrsɛ 8) Ndenge balobaki mabe mpo na Moize, basalaki lisumu mpo ezalaki lokola nde bazali koloba na Nzambe. Nkanda ya Nzambe esengelaki kokitela bango mpo bazangaki mpenza botosi.
Milyami, oyo na ntembe te abandisaki likambo yango azwaki maladi ya maba. Nokinoki, Alona abondelaki Moize asambela Nzambe mpo na ndeko na bango ya mwasi. Kanisá naino—mpo Milyami abika, esɛngaki Moize, moto oyo bango bazalaki kotɔnga abondela mpo na ye! Na komikitisa nyonso Moize asalaki ndenge basɛngaki ye. Mbala ya liboso oyo Moize afungolaki monɔkɔ, ezalaki ntango abondelaki Nzambe mpo abikisa ndeko na ye ya mwasi. Milyami abikaki, kasi asengelaki kotikala mikolo nsambo libándá ya kaa.
Lisolo oyo esalisi biso tóyeba bizaleli oyo Yehova alingaka mpe oyo aboyaka. Soki tolingi kozala baninga ya Nzambe, tosengeli kolongola na motema na biso lolendo, zuwa, mpe komikumisa. Yehova alingaka bato ya komikitisa. Alaki boye: “Bato ya komikitisa bakozwa mabelé, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”—Nzembo 37:11, NW; Yakobo 4:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Komikitisa ezali ezaleli moko ya ntina mingi oyo esalisaka moto azala motema molai, wana azali koyika mpiko na mabe kozanga koluka kozongisa.