Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/8 lok. 30
  • Mbongo boni nasengeli kopesa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbongo boni nasengeli kopesa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makabo oyo esɛngamaki mpe oyo moto ye moko akokaki kopesa na ntango ya kala
  • Biblia ekatelá baklisto motángo moko oyo basengeli kopesaka?
  • Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo wapi mpo na misala na bango?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Jéhovah alingaka baoyo bakopesaka na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Likabo nini tokoki kopesa Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/8 lok. 30

Mituna ya batángi

Mbongo boni nasengeli kopesa?

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:7) Bato mingi na mokili bayebi maloba yango. Kasi, bandimi mosusu bamonaka ete basengeli kopesa ata oyo eleki makoki na bango. Kutu, mangomba mosusu ekatelaka bandimi na yango mbongo oyo basengeli kopesaka. Yango nde babengaka dime, elingi koloba kopesa ndambo ya 10 ya bozwi na yo na lingomba.

Biblia ekatá mpenza motángo ya mbongo oyo bato basengeli kopesaka na lingomba? Omituna boye: Mbongo boni nasengeli kopesa?

Makabo oyo esɛngamaki mpe oyo moto ye moko akokaki kopesa na ntango ya kala

Biblia ezali na malako ya polele mpo na makabo oyo Nzambe asɛngaki Bayisalaele bápesaka. (Levitike 27:30-32; Mituya 18:21, 24; Deteronome 12:4-7, 11, 17, 18; 14:22-27) Masɛngami yango elekaki ndelo te. Yehova alakaki ete soki batosi mibeko na ye, ekólo na bango ekotonda mpenza na bozwi.​—Deteronome 28:1, 2, 11, 12.

Na mabaku mosusu, Bayisalaele bakokaki kopesa makabo oyo bango moko basepeli kopesa, ezala moke to mingi. Na ndakisa, ntango Mokonzi Davidi akanaki kotongela Yehova tempelo, Bayisalaele bapesaki “wolo na talanta nkóto mitano.”a (1 Ntango 29:7) Tókokanisa motángo yango na oyo Yesu amonaki ntango azalaki awa na mabelé. Amonaki “mwasi moko mobola oyo akufelá mobali azali kotya . . . mbongo mibale ya bibende oyo ezalaki na motuya moke mpenza,” na bibombelo ya mosolo na tempelo. Mbongo oyo atyaki ezalaki na valɛrɛ nini? Ezalaki moke mpenza mpe ekokaki ata te lifuti ya mokolo moko ya mosala. Kasi, Yesu alobaki ete Nzambe andimaki mbongo yango.​—Luka 21:1-4.

Biblia ekatelá baklisto motángo moko oyo basengeli kopesaka?

Lelo oyo, baklisto bazali te na nse ya Mibeko ya kondimana oyo bapesaki Bayisalaele. Na yango, bakatelá bango te motángo moko boye ya mbongo oyo basengeli kopesaka Nzambe. Kasi, na lisangá ya solo ya baklisto, kopesa ememelaka moto esengo mpenza. Yesu Klisto ye moko alobaki boye: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

Batatoli ya Yehova basimbaka mosala ya kosakola na mokili mobimba na makabo oyo bapesaka na bolingo na bango moko. Makabo yango esalelamaka mpo na kobimisa mikanda, lokola zulunalo oyo ozali kotánga mpe mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe kobatela yango. Basalelaka makabo yango te mpo na kofuta bato. Batatoli oyo bamipesaka mpo na kolekisa ngonga mingi na mosala ya kokómisa bato bayekoli bazwaka lisungi oyo esalisaka bango mpo na kofuta transport mpe kokokisa bamposa na bango mosusu. Kasi, moto moko te asɛngaka lisungi yango na makasi. Kutu, Batatoli ya Yehova mingi bafutamaka te mpo na mosala ya kosakola oyo basalaka. Mingi basalaka nde misala mosusu mpo na kokokisa bamposa na bango, ndenge Paulo azalaki kosala ntango azalaki kotonga bahema.​—2 Bakolinti 11:9; 1 Batesaloniki 2:9.

Soki moto alingi kopesa likabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova, asengeli kopesa mbongo boni? Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakolinti 8:12; 9:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na 2008, gramɛ moko ya wolo ezalaki na dolare 871, yango emonisi ete likabo oyo epesamaki ezalaki na valɛrɛ ya dolare soki 4 794 855 000.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto