Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 nk. 4-7
  • Bomengo oyo euti na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomengo oyo euti na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomɛngo ya ndenge nini?
  • Bomɛngo oyo euti na kondima
  • Luká bomɛngo ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Baklisto basengisami kozala babola?
    Lamuká!—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 nk. 4-7

Bomɛngo oyo euti na Nzambe

SOKI ozali sembo epai ya Nzambe, akopesa yo bomɛngo? Ekoki kozala bongo, kasi mbala mosusu lolenge ya bomɛngo oyo akopesa yo ezali te oyo ozali kokanisa. Tózwa ndakisa ya Maria, mama ya Yesu. Anzelu Gabriele abimelaki ye mpe alobaki na ye ete azali “moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi” mpe ete akobota Mwana ya Nzambe. (Luka 1:28, 30-32) Kasi, Maria azalaki moto ya bomɛngo te. Ntango apesaki mbeka nsima ya kobota Yesu, Maria apesaki “bipopo mibale to bana mibale ya bibenga”; yango ezalaki mbeka oyo babola bazalaki na momeseno ya kopesa epai ya Yehova.​—Luka 2:24; Balevi 12:8.

Lokola Maria azalaki mobola, yango elakisi nde ete azalaki na lipamboli ya Nzambe te? Te, kutu ntango akendaki kotala Elizabeti, ndeko na ye, “Elizabeti atondaki na elimo santu, mpe abelelaki na mongongo makasi mpe alobaki [na Maria] ete: ‘Opambwami na kati ya basi, mpe mbuma ya libumu na yo epambwami!’” (Luka 1:41, 42) Maria azwaki lipamboli ya kozala mama ya Mwana molingami ya Nzambe awa na mabele.

Yesu ye moko azalaki mozwi te. Abotamaki na esika moko ya bobola, abɔkwamaki na baboti oyo bazalaki babola, mpe azalaki mobola bomoi na ye mobimba awa na mabele. Mokolo moko, alobaki na moto moko oyo azalaki koluka kokóma moyekoli na ye ete: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.” (Luka 9:57, 58) Atako bongo, likambo oyo Yesu Kristo asalaki na ndenge ayaki na mabele epesaki bayekoli na ye likoki ya kozwa bomɛngo monene. Ntoma Paulo akomaki boye: “Akómaki mobola mpo na bino, mpo bókóma bato ya bomɛngo na nzela ya bobola na ye.” (2 Bakorinti 8:9) Yesu apesaki bayekoli na ye bomɛngo ya ndenge nini? Mpe bomɛngo ya ndenge nini tozali na yango lelo oyo?

Bomɛngo ya ndenge nini?

Mbala mingi, bomɛngo ya mbongo epekisaka moto azala na kondima, mpo mozwi akoki kotya motema na mbongo na ye na esika ya kotya yango epai ya Nzambe. Yesu alobaki boye: “Ekozala likambo ya mpasi mpenza mpo baoyo bazali na mbongo bákɔta na bokonzi ya Nzambe!” (Marko 10:23) Na yango, ezali polele ete bomɛngo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ezalaki ya mbongo te.

Kutu, bakristo mingi na ekeke ya liboso bazalaki babola. Ntango moto moko oyo azalaki motɛngumi banda abotamá asɛngaki mbongo, Petro alobaki na ye boye: “Palata mpe wolo, nazali na yango te, kasi oyo nazali na yango nde oyo nakopesa yo: Na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete, tambolá!”​—Misala 3:6.

Maloba ya moyekoli Yakobo mpe emonisi ete babola nde bazalaki mingi na lisangá ya bokristo. Akomaki boye: “Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki baoyo bazali babola na mokili mpo bázala bazwi na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye, boye te?” (Yakobo 2:5) Longola yango, ntoma Paulo alobaki ete na bato oyo babengamaki mpo bázala na lisangá ya bokristo, mingi te bazali bato “ya bwanya na ndenge ya mosuni” to bato “ya nguya” to bato “ya lokumu.”​—1 Bakorinti 1:26.

Soki bomɛngo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ezalaki ya mbongo te, ezalaki bomɛngo ya lolenge nini? Na mokanda oyo Yesu atindelaki lisangá ya Simirna, alobaki boye: “Nayebi bolɔzi na yo mpe bobola na yo​—kasi ozali mozwi.” (Emoniseli 2:8, 9) Atako bakristo ya Simirna bazalaki babola, bazalaki na bomɛngo oyo eleki mosika palata to wolo. Bazalaki bazwi mpo na kondima mpe bosembo na bango epai ya Nzambe. Kondima ezali na motuya “mpo bato nyonso te nde bazalaka na kondima.” (2 Batesaloniki 3:2) Bato oyo bazali na kondima te bazali mpenza babola na miso ya Nzambe.​—Emoniseli 3:17, 18.

Bomɛngo oyo euti na kondima

Na ndenge nini kondima ezali na motuya? Bato oyo bazali na kondima epai na Nzambe bazwaka matomba na “bonene ya boboto na ye mpe ya ezaleli na ye ya kokanga motema mpe ya motema molai na ye.” (Baroma 2:4) Bazwaka mpe ‘bolimbisi ya mabunga na bango’ mpo bazali kondima mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki. (Baefese 1:7) Bazalaka mpe na bwanya oyo “liloba ya Kristo” epesaka baoyo bazali na kondima. (Bakolose 3:16) Ntango babondelaka Nzambe na kondima, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ebatelaka mitema mpe makanisi na bango mpe epesaka bango esengo.​—Bafilipi 4:7.

Longola matomba nyonso wana, baoyo bazali kondimela Nzambe na nzela ya Mwana na ye, Yesu Kristo, bazali na elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko. Bato mingi bayebi malamu maloba ya Yesu oyo: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Elikya wana kitoko ekómaka makasi soki moto azwi boyebi ya sikisiki ya Tata mpe ya Mwana, mpo Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Atako mapamboli ya Nzambe ezalaka mingimingi nde ya elimo, epesaka mpe matomba na makanisi mpe na nzoto. Tózwa ndakisa ya Dalídio, na Brésil. Liboso azwa boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe, azalaki kolangwa masanga. Likambo yango ezalaki kobebisa boyokani na kati ya libota na ye. Longola yango, azalaki kokoka kobatela mbongo te. Na nsima, akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe abongwanaki makasi.

Makambo oyo Dalídio ayekolaki na Biblia etindaki ye abwaka mimeseno na ye ya mabe. Akómaki mpenza kotosa mitinda ya Biblia, kutu alobaki ete: “Kala, nazalaki kokende nganda na nganda; sikoyo nakendaka ndako na ndako.” Akómaki mosakoli ya ntango nyonso ya Liloba ya Nzambe. Mbongwana wana ebongisaki kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, mpe esalisaki ye ayeba kobatela mbongo. Dalídio alobi boye: “Mbongo oyo nazalaki liboso kobebisa na masanga, nazali kosalela yango lelo mpo na kosalisa baoyo bazali na bosɛnga to mpo na kosomba biloko oyo nasengeli na yango.” Azwi mpe baninga mingi ya malamu ndenge akómaki kosangana na bato oyo bazali lokola ye, oyo batalelaka makambo ndenge Nzambe atalelaka yango. Lelo oyo, Dalídio azali na kimya ya makanisi mpe esengo oyo eleki eloko nyonso oyo akokaki kokanisa liboso ayeba Nzambe.

Ndakisa ya Renato mpe emonisi ete bato oyo bakómaka na kondima epai ya Yehova Nzambe bazalaka na bomoi ya esengo. Soki omoni ndenge elongi na ye ezali na esengo mpe azali kosɛka lelo oyo, okondima te ete basalelaki ye likambo moko ya mabe mpenza. Ntango abotamaki, mama na ye asundolaki ye. Atikaki ye na sakosi moko na nse ya kiti moko, azokizoki mpe avimbivimbi mpe nsinga ya motɔlu na ye bakati naino te. Basi mibale bazalaki koleka wana mpe bamonaki sakosi moko na nse ya kiti ezali koningana. Na ebandeli, bakanisaki ete moto moko atikaki mwana ya nyau kuna. Ntango bamonaki ete ezali nde mwana oyo abotami sika, bamemaki ye nokinoki na lopitalo oyo ezalaki pembeni mpo básalisa ye.

Moko na basi yango azalaki Motatoli ya Yehova, mpe abɛtelaki Rita, Motatoli mosusu, lisolo ya mwana yango. Bana mingi ya Rita bazalaki kokufa na ntango ya kobotama, mpe azalaki kaka na mwana moko ya mwasi. Azalaki mpenza koluka mwana ya mobali, yango wana andimaki kozwa Renato.

Ntango Renato azalaki naino mwana moke, Rita ayebisaki ye ete azali mama na ye ya solo te. Kasi, abatelaki ye na bolingo mpe asalaki nyonso mpo na koteya ye mitinda ya Biblia. Ntango Renato azalaki kokola, akómaki kosepela na Biblia. Akómaki mpe na botɔndi mingi mpo na ndenge ya kokamwa oyo babikisaki ye. Alelaka ntango nyonso soki atángi maloba ya Davidi, mokomi ya nzembo, oyo elobi ete: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.”​—Nzembo 27:10.

Mpo na komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova asalelá ye, Renato azwaki batisimo na 2002 mpe akómaki mosakoli ya ntango nyonso na mbula oyo elandaki. Tii lelo, ayebi mama ná tata oyo babotaki ye te mpe mbala mosusu akoyeba bango ata mokolo moko te. Atako bongo, Renato amonaka ete moko na makabo ya motuya mingi oyo azwá ezali koyeba Yehova mpe kondima ete azali Tata ya bolingo mpe oyo abatelaka bana na ye.

Mbala mosusu yo mpe olingaka mingi kozala na boyokani makasi na Nzambe, mpe likambo yango ekoki kopesa yo esengo ya solosolo. Likoki ya kozala na boyokani ya ndenge wana na Yehova Nzambe mpe Mwana na ye Yesu Kristo epesami na moto nyonso​—azala mozwi to mobola. Mbala mosusu ekopesa yo bomɛngo ya mbongo te, kasi ekopesa yo kimya ya motema mpe esengo oyo mbongo nyonso ya mokili ekoki kosomba te. Masese 10:22 elobi solo ete: “Lipamboli ya Yehova​—yango nde ekómisaka moto mozwi, mpe abakisaka mpasi ata moko te na yango.”

Yehova Nzambe asepelaka mingi na bato oyo bayaka epai na ye: “Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.” (Yisaya 48:18) Mpe alaki ete baoyo bayaka epai na ye na makanisi ya malamu bakozwa mbano monene: “Komikitisa ná kobanga Yehova epesaka bomɛngo mpe nkembo mpe bomoi.”​—Masese 22:4.

[Likanisi ya paragrage na lokasa 5]

Atako libota ya Yesu awa na mabele ezalaki na bobola, Nzambe apambolaki yango mingi

[Elilingi na lokasa 6]

Kondimela Nzambe epesaka kimya, esengo mpe nsai

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto