Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 nk. 25-27
  • Biloko ya motuya ya Laki oyo eleki monene na Amerika ya Ntei

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biloko ya motuya ya Laki oyo eleki monene na Amerika ya Ntei
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mboka oyo ezali na mai
  • Ndako ya Bokonzi oyo etepaka na mai
  • Na esanga Ometepe
  • Biloko yango ya motuya ekobatelama?
  • Esika ebale moko ezongaka nsima
    Lamuká!—2009
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Laki ya mɔto ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?
    Biyano na mituna ya Biblia
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 nk. 25-27

Biloko ya motuya ya Laki oyo eleki monene na Amerika ya Ntei

ATAKO Nicaragua ezali ekólo ya moke, ezali na mai oyo eleki monene na Amerika ya Ntei: Laki Nicaragua. Likambo ya kokamwa ezali ete Laki Nicaragua ekoki kozala laki kaka moko oyo mai na yango ezali mungwamungwa te, kasi ezali na bambisi minene ya mbu, na ndakisa mbisi babengi requin, espadon, mpe tarpon. Bato ya siansi bamonaka ete laki yango ezalaki kobima na Mbu ya Pasifike, kasi volcan moko oyo etombokaki ekabolaki yango na mbu. Lokola mai ya laki yango ezalaki kosila mungwa, bambisi mpe ekómaki komesana na yango.

Laki yango oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 160 na molai mpe ezali na kilomɛtrɛ 70 na esika na yango oyo eleki monene, ezali na mɛtrɛ soki 30 likoló ya nivo ya mbu. Laki Nicaragua ezali na bisanga koleka 400, mpe bisanga yango soki 300 ezali zingazinga ya Esanga Asese, oyo ekangami na mokili, pembeni ya engumba Granada, na nsuka ya laki na ngámbo ya nɔrdi. Babengaka yango bisanga mikemike ya Granada.

Esanga eleki monene na laki yango ezali Esanga Ometepe, oyo ezali na katikati ya laki yango. Ometepe ezali na kilomɛtrɛ soki 25 na molai mpe kilomɛtrɛ soki 13 na monene, mpe ezali na bavolcan mibale oyo na kati na yango, ezali na eteni moko ya mabele. Concepción, volcan oyo eleki molai ezali na mɛtrɛ 1610 likoló ya nivo ya laki. Volcan yango ebimisaka mɔtɔ mpe yango nde emonanaka libosoliboso na ngámbo ya nɔrdi ya esanga yango. Volcan mosusu na nkombo Madera ezali na molai ya mɛtrɛ 1394, mpe ebimisaka lisusu mɔtɔ te. Madera ezali na banzete mpe matiti ebele mpe ezali na londende na kati na yango.

Laki Nicaragua ezali esika moko oyo bato basepelaka kokende kotala. Bato yango bakendaka kotala kitoko na yango mpe biloko ndenge na ndenge oyo bato ya kala batiká. Kasi, ezali na biloko mosusu ya motuya na Laki Nicaragua oyo tosengeli koyeba.

Mboka oyo ezali na mai

Bisanga mikemike ya Granada ezali na banzete ndenge na ndenge mpe banyama kitoko ya zamba. Bafololo kitoko mpenza ezali na bazamba oyo ezali pembenipembeni ya bisanga yango oyo esalemaki ntango volcan etombokaki. Bandɛkɛ kitoko, na ndakisa aigrette bleue, aigrettes ya minene, balbuzard pêcheur, anhinga, mpe cormoran bazalaka pembenipembeni ya laki yango. Na esika oyo zamba ebandi, pembenipembeni ya mai, bandɛkɛ kitoko oyo babengi Montezuma basalá bazumbu na bango na banzete mineneminene; bazumbu yango ekoki kokwea mbala moko na mai soki mipɛpɛ ebɛti na laki.

Bato bafandaka na bisanga yango mosusu ya mikemike. Na bisanga yango, ezali na bandako ya babomi-mbisi mpe mwa bandako oyo bato ya mbongo bafandaka ntango bayei kopema. Ezali mpe na biteyelo, simetiɛrɛ mpe barestora ná babare. Bisanga yango nyonso ezali lokola mboka moko oyo ezali na mai.

Ntɔngɔ nyonso, masuwa moko ya langi ya bule mpe mpɛmbɛ elekaka na esanga mokomoko mpo na komema bana na kelasi. Bwato moko elekaka na esanga mokomoko mpo na kotɛkela bato bambuma mpe ndunda. Mokolo na mokolo, okoki komona mibali bazali kobongisa minyama na bango mpe basi bazali kosukola bilamba na laki.

Batatoli ya Yehova mpe bazali na mosala mingi na bisanga yango. Balekalekaka na bwato mpo na kokende kotala bato ya bisanga yango mpe koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Ndenge bisanga yango ezali ebimisaki mokakatano: Epai wapi bakokaki kosalaka makita mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, Biblia? Mpo na kotosa etinda ya Biblia ya ‘kotika koyangana na makita te,’ Batatoli ya Nicaragua basalelaki mayele moko ya malamu oyo esilisaki mokakatano yango: basalaki Ndako ya Bokonzi ya liboso oyo etepaka na mai!​—Baebre 10:25.

Ndako ya Bokonzi oyo etepaka na mai

Mwasi moko ná mobali na ye oyo bazali basakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova bakendaki kofanda na bisanga mikemike ya Granada na sanza ya Novɛmbɛ 2005. Mwa basanza na nsima, ntango babengisaki bato ya bisanga yango na Ekaniseli ya liwa ya Kristo, basepelaki mpe bakamwaki komona ete bato 76 bayaki. Yango endimisaki mwasi yango ná mobali na ye ete esengeli kosalaka makita mbala na mbala na bisanga yango. Lokola ezalaki mpasi mpo na kozwa esika ya malamu mpo na kosalaka makita, bandeko yango bazwaki likanisi moko. Bamonaki malamu bátonga Ndako ya Bokonzi oyo bakokaki komemaka na bisika ndenge na ndenge oyo bato bazali!

Mwasi yango ná mobali na ye ya molende, oyo batongá naino ata eloko moko te oyo etepaka na mai, babandaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Bango mibale elongo na bato mosusu motoba balekisaki sanza mobimba mpo na kotonga ndako yango. Esengelaki kozala ndako moko ya mabaya ya mindɔndɔ te oyo ekobanda kotepatepa na mai. Ekosalema na mabaya oyo bakokangisa na bibende mpe bakotya batɔnɔ ebele ya minene oyo ekotonda na mopɛpɛ mpo esalisa ndako yango ezinda na mai te. Bakotya mabaya na nse, mpe kapo na likoló lokola nsamba. Bandeko yango bazalaki kobondela butu nyonso mpo na mosala yango mpo bandimaki te ete ndako yango ekotepatepa likoló ya mai. Mpe etepaki!

Lisukulu ya liboso na Ndako ya Bokonzi yango ya sika esalemaki na mokolo ya 10 Yuni 2006. Mokolo oyo elandaki, bamemaki ndako yango na esanga mosusu mpo na kosala kaka likita yango na bato ya kuna. Bato nyonso oyo bayangaki na makita yango mibale bazalaki 48, atako bato mosusu batambolaki miniti koleka 30 na kati ya zamba mpo na kokóma esika ndako yango ezalaki. Bato nyonso basepelaki kozala na esika na bango moko ya losambo!

Makita na Ndako ya Bokonzi yango ezalaki kosepelisa bato ya mboka yango. Ntango molobi azali kosala lisukulu, bayangani bakoki koyoka makɛlɛlɛ oyo mai ezali kosala ntango ezali kobɛta na mabanga to koyoka na mosika makɛlɛlɛ makasi ya makako. Eumelaki te, bato ya bisanga yango bamesanaki komona ndako yango. Bazalaki kopɛpa mabɔkɔ ntango bamoni yango ezali kolongwa na esika moko mpe kokende na esika mosusu. Pɔsɔ na pɔsɔ, bato koleka 20 bazalaki kokende na Ndako ya Bokonzi oyo etepaka na mai mpo na kokutana na bandeko mpe koyekola Biblia. Ndako ya Bokonzi yango ekómaki mpenza eloko ya motuya!

Na esanga Ometepe

Esanga Ometepe ezali na sudi ya Granada, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 50. Banda kala, bato mingi basepelaka kofanda na esanga yango mpo ezali kitoko mpe mabele na yango ebotaka malamu. Kutu, emonanaki ete kuna nde esika ya libosoliboso oyo babandaki kosala bilanga na Nicaragua. Lelo oyo, Ometepe ezali na bato soki 42 000, oyo basalaka mosala ya koboma mbisi mpe ya kolona masango, bitabe, kafe, mpe biloko mosusu. Ezali mpe na banyama mpe bandɛkɛ mingi. Ezali na ebele ya batshaku oyo basalaka makɛlɛlɛ makasi, bandɛkɛ oyo babengi geais oyo elakisaka nsala na yango ya bule mpe ya mpɛmbɛ ntango ezali kopumbwa na banzete, mpe bamakako oyo ezalaka na elongi ya mpɛmbɛ, oyo bato mingi basepelaka na yango.

Basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe basalisaka bafandi ya Ometepe. Longwa na bato 8 oyo bazwaki batisimo na 1966, lelo ezali na Batatoli 183 na Ometepe oyo bazali na masangá 4 oyo ezali kokola malamu. Lisangá mokomoko ezali na Ndako ya Bokonzi na yango na esika ebongi. Lelo oyo, Motatoli mokomoko ya esanga yango asengeli kosakola epai ya bato 230.

Batatoli ya Yehova ya Ometepe bakutanaki na mikakatano mingi na boumeli ya bambula. Na ndakisa, na 1980, batɛmɛli batumbaki Ndako ya Bokonzi ya Mérida. Batatoli batongaki Ndako ya Bokonzi mosusu na 1984. Basalelaki yango tii na 2003 ntango batongaki Ndako ya Bokonzi mosusu ya kitoko, mpe bandeko 60 ya lisangá yango basepelaki mingi.

Na engumba Moyogalpa, batongaki Ndako ya Bokonzi oyo bakoki ata kosala mayangani minene kuna. Nsamba ebimá mwa moke na nsima ya ndako yango mpe batyá estrade na nse na yango. Liboso ya estrade, ezali na bisika ya kofanda mpe batyá bakapo likoló na yango. Na esika yango, Batatoli mpe bandeko na bango oyo bautaka na bamboka mosusu ya laki yango basanganaka mpo na mayangani minene. Na ntango ya mayangani yango, Laki Nicaragua ezalaka esika ya malamu mpo na kobatisa bayekoli ya sika ya Yesu Kristo.​—Matai 28:19.

Biloko yango ya motuya ekobatelama?

Ezalaki komonana ete Laki Nicaragua ekobebisama te, mbala mosusu mpo ezali monene. Kasi, lelo oyo, esengeli kobatelama. Mai na yango ezali kokóma salite na bosɔtɔ oyo ezali kouta na misala ya bilanga, na baizine, mpe oyo ezali kouta na bazamba oyo bazali kokata.

Eyebani mpenza te soki milende ya bafandi ya bisanga yango mpe ya guvernɛma ekobongisa makambo. Atako bongo, Mozalisi akosala ete biloko nyonso ya motuya oyo ezali na mabele, na ndakisa balaki kitoko, bisanga kitoko mpe banyama ná bandɛkɛ kitoko, ebatelama mpo bato ya botosi bázwa libula na yango. Biblia elobi na biso ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

[Elilingi na lokasa 26]

Ndako ya Bokonzi oyo etepeka na mai epai basalaka makita

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto