Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/9 nk. 29-32
  • Ndenge ya kozala misionere ya malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kozala misionere ya malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bosili kozwa oyo bosengeli na yango”
  • Makambo mosusu oyo esalemaki na likita yango
  • “Zalá misionɛrɛ ya esengo”
  • Bauti kolónga lokola bayekoli, bakei kolónga lokola Bamisionere
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Elimo ya komipesa ezali kotinda bato na Gileadi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bazali na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Eteyelo ya Gileadi ekokisi mbula 60 ya kopesa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/9 nk. 29-32

Kelasi ya mbala ya 126 ya Gileade

Ndenge ya kozala misionɛrɛ ya malamu

EBELE ya bato oyo bazalaki na esengo bayanganaki na molulu moko ya ntina mingi, na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na etúká ya New York. Mokolo ya pɔsɔ, 14 Marsi 2009, ezalaki mokolo oyo bapesaki badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 126 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Bana-kelasi balingaki kotindama na mikili 22 mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 24:14.

Bana-kelasi yango bautaki kolekisa sanza mitano ya koyekola na mozindo ebele ya mateya ya Biblia oyo ebongisamaki mpo na kosalisa bango bákóma bamisionɛrɛ ya malamu. Mokolo ya kopesa bango badiplome ezalaki libaku na bango ya nsuka ya kozala lisusu esika moko mpo na koyoka batoli oyo etondi na bwanya, oyo ekosalisa bango bákokisa mokano yango.

Anthony Morris, ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, oyo azalaki prezida ya likita yango, alobaki ete Eteyelo ya Gileade ebandaki kopesa bato formasyo ya kokóma misionɛrɛ na 1943. Banda wana, bamisionɛrɛ ya Gileade basalisi mingi na mosala ya kosakola na mokili mobimba.

Ndeko yango alobaki ete atako bakomeli mpe Bafarisai batyolaki bantoma ya Yesu ete “bazali bato pamba oyo bayekolá tè,” batɛmɛli yango bandimaki ete bantoma bazalaki na elobeli ya polele mpo bazalaki elongo na Yesu. (Misala 4:13, Bible na lingala ya lelo oyo) Formasyo oyo bana-kelasi bazwaki esalisi bango bázala na elobeli ya polele.

Robert Ciranko, ndeko moko oyo azali mosungi na Komite ya Bokomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo moko kitoko oyo ezalaki na motó ya likambo “Bóponaka bilongi te.” Amonisaki ete mosika te, bana-kelasi bakobanda kokutana na bato oyo bazali na bonkɔkɔ mpe mimesano mosusu. Atako bongo, koteya bato yango ekozala mokakatano te soki bana-kelasi bamekoli ndenge Yehova atalelaka bato. Misala 10:34 elobi ete “Nzambe aponaka bilongi te,” elingi koloba asepelaka te na elongi moko koleka mosusu. (Misala 10:35) Ndeko Ciranko alobaki ete, “Soki bomekoli ndenge Nzambe atalelaka bato mpe bozali komona bato nyonso ya teritware na bino lokola bato oyo Nzambe akoki kondima, na ntembe te bokozala mpenza bamisionɛrɛ ya malamu.”

“Bosili kozwa oyo bosengeli na yango”

Samuel Herd, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi abandaki lisolo na ye na maloba oyo: “Bato mosusu bamonaka ete kamela ezali nyama kitoko te, atako bongo, ebongi mpenza mpo na kofanda na esobe.” Ndenge moko mpe, bamisionɛrɛ ya sika bazali na nyonso oyo basengeli na yango mpo na kolonga na bateritware na bango. Makambo mitano oyo ekosalisa bango.

1. Bolingo mpo na Yehova. (Matai 22:37, 38) Bana-kelasi basilaki komonisa ete bazali na mposa ya kosalela Yehova.

2. Kokoba koyekola Liloba ya Nzambe. Kamela ebombaka bilei na mokɔngɔ na yango. Kasi, ekotika kolya te mpe kotya motema kaka na biloko oyo ebombaki mpo na ntango ya mpasi. Ndenge moko mpe, bamisionɛrɛ basengeli te kotya motema kaka na makambo oyo bayekoli na Eteyelo ya Gileade, kasi basengeli kokoba komileisa na nzela ya boyekoli ya Biblia.

3. Kolinga bato. (Matai 22:39) Bana-kelasi bayokelaka bato mosusu mawa.

4. Elimo ya komipesa. (Nzembo 110:3) Soki misionɛrɛ asili makasi, Yehova akotondisa ye lisusu na nguya.​—Yisaya 40:29.

5. Makasi ya bolenge. Ndenge kaka kamela ememaka moto oyo azali kosala mobembo na esobe, ndenge moko mpe ekoki kosɛnga ete misionɛrɛ “amema” moninga na ye mokristo oyo azali na mikakatano mpo na kosalela Yehova malamu. Yango esɛngaka kozala makasi mingi, kasi bamisionɛrɛ bazali na makasi ya bolenge.

Makambo mosusu oyo esalemaki na likita yango

Ndeko Michael Burnett, molakisi moko ya Gileade alobaki ete mbuma ya amande ezalaki na kati ya likabo kitoko oyo Yakobo atindelaki moyangeli moko ya Ezipito. (Ebandeli 43:11) Atako mbuma ya amande ezali moke mpenza, etondi na biloko oyo etongaka nzoto. Bana-kelasi balei ebele ya bambuma ya amande ya elilingi na kelasi na bango. Kosepela na oyo Yehova apesi mpe koyekola kolinga teritware na bango ya sika ezali na kati ya mateya oyo bamisionɛrɛ basengeli komema na mobembo na bango.

Ndeko Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileade, alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali lokola “saki oyo etondi na bwanya.” (Yobo 28:18) Tosengeli kofungola saki yango mpe kosalela bwanya oyo ezali na kati. Soki mosala ya misionɛrɛ ekómi ndenge oyo bana-kelasi bakanisaki te, bakoki kokanisa ntoma Paulo. Bayekoli ya Yesu batindaki ye na mboka na ye, epai atikalaki mbula 9. Na esika aloba ete lokola azali ‘mbɛki oyo aponamaki’ asengeli kokende kosakola esika mosusu, Paulo asalaki mosala makasi esika nyonso oyo azalaki. (Misala 9:15, 28-30) Kotosa makambo oyo Yehova aponi ekoki kozala mpasi. Moto moko oyo atosaki makambo oyo Yehova aponaki ezali Yonatana. Lokola ayebaki ete Yehova aponaki nde Davidi mpo akóma mokonzi, Yonatana asepelaki kopesa ye mabɔkɔ.

Na lisolo oyo ezali na motó ya likambo ete “Basaleli ya Nzambe balobaka na mpiko,” bana-kelasi basalaki bilakiseli oyo ezongelaki makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na eleko oyo bazalaki na kelasi. Mingi kati na bango babandaki koyekola Biblia na bato. Na lisolo oyo elandaki, oyo elobaki “Ebongiseli ya Yehova epesaki bango formasyo,” basololaki na bandeko misato oyo bazali bamisionɛrɛ banda kala. Mokomoko alimbolaki ndenge oyo azwá formasyo mpo na kosala elongo na ebongiseli ya Yehova.

“Zalá misionɛrɛ ya esengo”

Na nsima, Gerrit Lösch, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisukulu ya ntina mingi na likita yango; ezalaki na motó ya likambo “Zalá misionɛrɛ ya esengo.” Alobaki ete makambo oyo bato bamonaka ete esepelisaka, epesaka esengo ya solosolo te. (Masese 14:13; Mosakoli 2:10, 11) Moto azwaka esengo ya solosolo soki azali kosala mokano ya Nzambe, atako ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kolanda mateya na Gileade ezali mosala makasi, kasi epesaki esengo mingi.

Ezali na makambo mingi oyo epesaka bakristo ya solo esengo. Basambelaka Nzambe ya esengo. (Nzembo 33:12; 1 Timote 1:11) Bazali na paradiso ya elimo, mpe Biblia elaki ete mosika te mabele ekokóma paradiso ya solosolo. Bayebi ntina ya bomoi​—kosalela Yehova mpe kokumisa ye. Longola yango, Yehova mpe Yesu balingaka bango.

Molobi abakisaki boye: “Okozala misionɛrɛ ya esengo soki oyekoli kosepela na oyo ozali na yango.” Soki ozali kolinga bato mpe bango bazali kolinga yo, yango mpe ekopesa yo esengo. Yango wana, kolandelaka mabunga ya basusu te. Saleláká basusu malamu, salisáká baoyo bazali na bolɛmbu, yebisáká basusu makambo ya malamu oyo okutani na yango. (Nzembo 41:1, 2; Misala 20:35) Okozwa esengo mingi soki ozali komipesa na mosala ya kosakola.​—Luka 11:28.

Ndeko Lösch asukisaki boye: “Kobá kozala misionɛrɛ ya esengo, zwáká ntango ya kominanola kasi omipesa na kokumisa Yehova, Nzambe ya esengo, mpe salisá basusu bázala mpe na esengo.”

Nsima ya kopesa bambote oyo euti na mikili mingi, Anthony Morris alakisaki bana-kelasi mpe apesaki bango badiplome. Na nsima, moko ya bana-kelasi ya mbala ya 126 atángaki mokanda oyo bakomelaki Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na mokanda yango, bana-kelasi bamonisaki botɔndi ndenge bakɔtaki na Eteyelo ya Gileade.

Mpo na kosukisa, prezida amonisaki ete ‘matonga mpe bikanganeli’ oyo esangisaka binama ya nzoto ekokani na banzela mpe bibongiseli oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” asalelaka mpo na kopesa basaleli ya Yehova bilei mpe litambwisi. (Bakolose 2:18, 19; Matai 24:45) Soki bamisionɛrɛ oyo bauti kokɔta Eteyelo ya Gileade basali na bomoko mpenza na bato oyo Nzambe apesi mikumba, bakolonga kokokisa malamu mosala na bango.​—2 Timote 4:5.

[Etanda na lokasa 30]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na mikili: 6

Batindami na mikili: 22

Bana-kelasi bazalaki: 56

Motángo ya mabala: 28

Mwayene ya mbula ya kobotama: 32,8

Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 17,9

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,5

MIKILI OYO BATINDI BANGO

Bana-kelasi oyo bazwi badiplome batindami na Afrique du Sud, Bénin, Bolivie, Bulgarie, Burkina Faso, Cameroun, Costa Rica, Ghana, Guatemala, Honduras, Kenya, Liberia, Madagascar, Mozambique, Nicaragua, Ouganda, Panama, Paraguay, Pérou, Roumanie, Sierra Leone, mpe Togo.

[Elilingi na lokasa 31]

Bana-kelasi ya mbala ya 126 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Kirchhoff, K.; Nichols, C.; Guzmán, Y.; Coil, H.; Becker, O.; De Simone, A. (2) Manzanares, A.; Bouvier, E.; Peddle, J.; Mason, H.; Braz, J. (3) Lee, J.; Forte, A.; Boucher, T.; Marsh, A.; Leighton, S.; Glover, M. (4) Kambach, H.; Jones, T.; Ferreira, A.; Morales, J.; Chicas, S.; Davis, B.; Dormanen, E. (5) Dormanen, B.; Nichols, J.; Pacho, T.; Titmas, L.; Bouvier, E.; Kirchhoff, A. (6) Leighton, G.; Pacho, A.; Van Campen, B.; Manzanares, A.; Rivard, A.; Lee, Y.; Titmas, L. (7) Boucher, M.; Coil, K.; Marsh, C.; Guzmán, J.; Jones, W.; Kambach, J. (8) Glover, A.; Ferreira, G.; Mason, E.; Forte, D.; Davis, N.; Chicas, O.; Rivard, Y. (9) Braz, D.; Van Campen, D.; Morales, A.; De Simone, M.; Becker, M.; Peddle, D.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto