Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/9 nk. 16-20
  • Bolingo ya Kristo etindaka biso tólinga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo ya Kristo etindaka biso tólinga
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tómonisa bolingo ya Kristo epai ya baoyo basali mabunga
  • Tómonisa bolingo ya Kristo na ntango oyo ya nsuka
  • Komonisa bolingo ya Kristo epai ya baoyo bazali kobɛla
  • Tózala na makanisi lokola oyo ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tózala na elimo ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bolingo—Ezaleli ya ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/9 nk. 16-20

Bolingo ya Kristo etindaka biso tólinga

“Yesu, lokola alingaki bato na ye oyo bazalaki na mokili, alingaki bango tii na nsuka.”​—YOA. 13:1.

1, 2. (a) Na nini bolingo ya Yesu ekeseni mpenza na mosusu nyonso? (b) Makambo nini oyo etali bolingo tokolobela na lisolo oyo?

YESU atiká ndakisa malamu ya bolingo. Makambo na ye nyonso​—maloba, bomoi, mateya, mpe liwa na ye lokola mbeka—​emonisaki bolingo. Na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, Yesu amoniselaki bato bolingo, mingimingi bayekoli na ye.

2 Bayekoli ya Yesu basengeli kolanda ndakisa ya bolingo monene oyo atiká. Yango esalisaka biso mpe tómonisa bolingo yango epai ya bandeko na lisangá ata mpe epai ya bato mosusu. Na lisolo oyo, tokolobela liteya oyo bankulutu bakoki kozwa epai ya Yesu na ndenge ya komonisa bolingo epai ya baoyo basali mabunga, ata mabunga ya minene. Tokolobela mpe ndenge oyo bolingo ya Yesu etindaka bakristo básalisa bandeko na bango ntango bakutani na mikakatano, makama, mpe maladi.

3. Atako Petro asalaki mabunga minene, ndenge nini Yesu atalelaki ye?

3 Na butu ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele, ntoma Petro awanganaki ye mbala misato. (Mrk. 14:66-72) Kasi, ntango Petro azongaki, ndenge Yesu alobaki yango, Yesu alimbisaki ye. Yesu apesaki Petro mikumba minene. (Luka 22:32; Mis. 2:14; 8:14-17; 10:44, 45) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yesu na ndenge ya kotalela moto oyo asali mabunga minene?

Tómonisa bolingo ya Kristo epai ya baoyo basali mabunga

4. Na likambo nini esɛngaka mpenza komonisa bolingo ya Kristo?

4 Na makambo mingi oyo esɛngaka komonisa bolingo ya Kristo, oyo ezalaka pɛtɛɛ te ezali ntango moto moko, ezala na libota to na lisangá, asali libunga monene. Likambo ya mawa, lokola mokili ya satana ekómi mpenza na nsuka na yango, elimo ya mokili epalangani lisusu mingi koleka. Bizaleli mabe ya mokili ekoki kobebisa ná mikóló ná bana mike mpe kotinda bango bátika ekateli na bango ya kotambola na nzela ya moke. Na ekeke ya liboso, bakristo mosusu basengelaki kobimisama na lisangá, mpe bamosusu basengelaki kozwa mpamela mpo na masumu oyo basalaki. Ezali mpe bongo lelo oyo. (1 Ko. 5:11-13; 1 Tim. 5:20) Nzokande, soki bankulutu oyo bazali kosambisa moto oyo asali libunga bamonisi bolingo ya Kristo, yango ekoki kosimba motema na ye.

5. Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa bolingo ya Kristo epai ya moto oyo asali lisumu?

5 Lokola Yesu, bankulutu basengeli mpe kosimba mitinda ya sembo ya Yehova ntango nyonso. Soki basali bongo, bakomonisa motema pɛtɛɛ, boboto mpe bolingo ya Yehova. Ntango moto abongoli mpenza motema mpe amonisi ete ‘motema na ye ebukani’ mpe ‘elimo na ye etutami’ ekozala mpasi te mpo bankulutu ‘básembola moto yango na elimo ya boboto.’ (Nz. 34:18; Gal. 6:1) Kasi, ezali boni mpo na moto oyo azali motó makasi mpe azali koyoka mawa te mpo na mabe oyo asali?

6. Likambo nini bankulutu basengeli kosala te ntango bazali kosambisa moto oyo asali mabe, mpe mpo na nini?

6 Ntango moto oyo asali mabe aboyi koyoka toli ya Makomami to azali koluka kopesa bato mosusu foti mpo na mabe oyo asali, bankulutu to mpe bandeko mosusu bakoki koyoka nkanda. Lokola bayebi mpasi oyo libunga ya moto yango ememi, yango ekoki kotinda bango báluka kolanda makanisi na bango moko. Nzokande, nkanda ebebisaka makambo mpe emonisaka “makanisi ya Kristo” te. (1 Ko. 2:16; tángá Yakobo 1:19, 20.) Yesu apamelaki bato mosusu ya ntango na ye, kasi ata mbala moko te asalelaki maloba ya koyina to ya kozokisa. (1 Pe. 2:23) Kutu, azalaki kopesa bato oyo bazalaki kosala mabe libaku ya kobongola motema mpe kozongela Yehova. Ya solo, moko ya bantina minene oyo Yesu ayaki awa na mabele ezalaki ya “kobikisa basumuki.”​—1 Tim. 1:15.

7, 8. Nini esengeli kokamba bankulutu ntango bazali kosambisa moto oyo asali lisumu?

7 Ndakisa ya Yesu na likambo yango esengeli kotinda biso tótalela bato oyo bazali kozwa disiplini na lisangá ndenge nini? Kobosana te ete etinda wana ya Makomami ya kopesa moto mabe etumbu ezali mpo na kobatela etonga mpe ekoki kotinda moto yango abongola motema. (2 Ko. 2:6-8) Ezalaka mawa komona moto aboyi kobongola motema mpe, mpo na yango, asengeli kobimisama na lisangá; kasi ezali esengo koyeba ete mingi kati na bato yango bazongelaka Yehova mpe lisangá na ye. Ntango bankulutu bazali komonisa bolingo ya Kristo, bapesaka nzela na moto oyo asali mabe abongola motema mpe nsukansuka azonga na lisangá. Nsima ya bambula, bamosusu kati na bango bakoki kobosana bavɛrsɛ oyo bankulutu batángelaki bango, kasi bakobosana te limemya mpe bolingo oyo bankulutu bamoniselaki bango.

8 Na yango, bankulutu basengeli komonisa “mbuma ya elimo,” mingimingi bolingo ya Kristo, ata ntango moto oyo asali mabe aboyi koyoka toli. (Gal. 5:22, 23) Basengeli te kowela kobimisa na lisangá moto oyo asali lisumu. Basengeli nde komonisa ete bazali na mposa moto yango azongela Yehova. Na yango, ntango moto oyo asalaki lisumu abongoli motema, ndenge mingi basalaka, akozala na botɔndi makasi epai ya Yehova mpe epai ya “makabo oyo ezali bato,” oyo basalisaki ye azonga na lisangá.​—Ef. 4:8, 11, 12.

Tómonisa bolingo ya Kristo na ntango oyo ya nsuka

9. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete Yesu azalaki na bolingo epai ya bayekoli na ye.

9 Luka alobeli likambo moko monene oyo emonisaki bolingo ya Kristo. Lokola Yesu ayebaki ete mokolo mosusu basoda ya Roma bakozinga engumba Yerusaleme oyo esengelaki kozwa etumbu, mpe ekozala mpasi mpo moto akima, akebisaki bayekoli na ye na bolingo nyonso boye: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene.” Basengelaki kosala nini? Yesu apesaki bango malako ya polele mpe ya sikisiki. Alobaki boye: “Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te; mpamba te yango ezali mikolo ya kokata makambo na bosembo, mpo makambo nyonso oyo ekomamá ekokisama.” (Luka 21:20-22) Ntango basoda ya Roma bazingaki Yerusaleme na mobu 66 T.B., bato ya botosi balandaki toli yango.

10, 11. Ndenge nini kotalela ndenge oyo bakristo ya liboso bakimaki Yerusaleme ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na ‘bolɔzi monene’?

10 Ntango bazalaki kokima Yerusaleme, bakristo basengelaki komoniselana bolingo ndenge Kristo amoniselaki bango. Basengelaki kokabola eloko nyonso oyo bazalaki na yango. Kasi, esakweli wana ya Yesu esukaki kaka te na kobebisama ya Yerusaleme; kokokisama na yango monene esengelaki koya na nsima. Asakolaki boye: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.” (Mat. 24:17, 18, 21) Liboso mpe nsima ya ‘bolɔzi monene’ oyo ezali lisusu mosika te, biso mpe tokoki kokutana na mikakatano mpe kokelela. Kozala na bolingo ya Kristo ekosalisa biso tólonga.

11 Na ntango yango, ekosɛnga tólanda ndakisa ya Yesu mpe tómonisa bolingo oyo ezangi bokosi. Na boyokani na likambo yango, Paulo apesaki toli oyo: “Moto na moto na kati na biso asepelisa mozalani na ye na oyo ezali malamu mpo alendisa ye. Mpo Kristo kutu amisepelisaki te . . . Sikoyo Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi asala ete na kati na bino bózala na makanisi lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango.”​—Rom. 15:2, 3, 5.

12. Bolingo ya ndenge nini tosengeli kozala na yango lelo oyo, mpe mpo na nini?

12 Petro, oyo Yesu amoniselaki mpe bolingo, alendisaki bakristo bázalaka na “bolingo ya bondeko oyo ezali na bokosi te” mpe ‘bátosaka solo.’ Bakristo basengeli ‘kolinganaka makasi na motema moko.’ (1 Pe. 1:22) Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, tosengeli kokolisa bizaleli lokola oyo ya Kristo. Basaleli nyonso ya Nzambe bazali kokutana na mikakatano oyo ezali se kobakisama. Mikakatano ya nkita oyo ebimi na mokili mobimba emonisi ete ata ebongiseli moko te ya mokili oyo ebongi kotyelama motema. (Tángá 1 Yoane 2:15-17.) Kutu, lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, tosengeli koluka kopusana penepene na Yehova mpe bandeko na lisangá, kosala boninga ya solosolo. Paulo apesaki toli oyo: “Na bolingo ya bondeko bólinganaka na motema. Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Rom. 12:10) Petro mpe abendaki likebi na likambo yango; alobaki boye: “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu.”​—1 Pe. 4:8.

13-15. Ndenge nini Batatoli mosusu bamonisaki bolingo ya Kristo na ntango ya makama?

13 Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bayebani mpo na bolingo na bango ya solosolo. Tózwa ndakisa ya Batatoli oyo bandimaki na bolingo na bango moko kokende kosalisa bato oyo mipɛpɛ makasi ebebisaki bandako mpe biloko na bango na sudi ya États-Unis na 2005. Ndakisa ya Yesu etindaki Batatoli koleka 20 000, oyo mingi batikaki bandako na bango ya kitoko mpe misala na bango ya malamu, mpo na kokende kosalisa bandeko na bango oyo makama ekómelaki bango.

14 Na esika mosusu, mbonge oyo ezalaki na bosanda ya mɛtrɛ 10 emataki na mokili, tii na ntaka ya kilomɛtrɛ 80. Ntango mbonge yango ekitaki, bandako mingi ebebaki mpenza. Batatoli oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bayaki na bisaleli mpe biloko ya kotonga, bamosusu basalelaki makoki na bango mpe bandimaki kosala ata mosala nini mpo na kosalisa bandeko na bango. Bandeko basi mibale ya libota moko, oyo mibali na bango bakufá, batyaki biloko na bango na mwa motuka moko mpe basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 3 000 mpo na kokende kopesa mabɔkɔ. Moko atikalaki na esika yango, azalaki kopesa bandeko ya komite ya lisungi mabɔkɔ mpe kosala lokola mobongisi-nzela.

15 Bandeko yango batongaki mpe babongisaki bandako koleka 5 600 ya Batatoli mpe ya bato mosusu ya esika yango. Batatoli ya esika yango bayokaki ndenge nini mpo na bolingo oyo bandeko bamoniselaki bango? Ndeko mwasi moko oyo ndako na ye ebebaki akómaki kofanda na mwa wagɔ moko ya moke oyo ezalaki kotanga soki mbula ebɛti, mpe azalaki kolamba na lituka moko oyo ebebá. Bandeko batongelaki ye ndako moko ya kitoko, atako ezalaki monene te. Na mai na miso, atɛlɛmaki liboso ya ndako na ye ya sika mpe atɔndaki Yehova mpe bandeko na ye. Bandeko mosusu, atako batongelaki bango bandako ya sika, na boumeli ya ntango molai batikalaki kaka na bisika oyo bazalaki kofanda ntango bandako na bango ebebaki. Mpo na nini? Mpo batikelaki naino bandeko oyo bayaki kosunga bango bandako na bango ya sika. Bamonisaki mpenza bolingo ya Kristo!

Komonisa bolingo ya Kristo epai ya baoyo bazali kobɛla

16, 17. Na makambo nini tokoki komonisa bolingo ya Kristo epai ya baoyo bazali kobɛla?

16 Mingi na biso tokutaná na makama ya minene te. Nzokande, biso moko tokoki kobɛla, ata mpe moto moko ya libota na biso. Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bato ya maladi ezali ndakisa malamu mpo na biso. Bolingo ezalaki kotinda ye ayokela bango mawa. Ntango bayelaki ye ebele ya bato ya maladi, “abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te.”​—Mat. 8:16; 14:14.

17 Lelo oyo, bakristo bazali te na nguya oyo Yesu azalaki na yango ya kobikisa bato, kasi bayokelaka bato ya maladi mawa ndenge Yesu azalaki kosala. Mawa na bango emonanaka ndenge nini? Na ndakisa, bankulutu bamonisaka bolingo ya Kristo na ndenge bazwaka bibongiseli mpo na kosalisa bandeko ya lisangá oyo bazali kobɛla; na ndenge yango, balandaka toli oyo ezali na Matai 25:39, 40.a (Tángá.)

18. Ndenge nini bandeko basi mibale bamonisaki bolingo ya solosolo epai ya ndeko mwasi moko, mpe yango ebimisaki litomba nini?

18 Ya solo, esɛngaka kaka te kozala nkulutu mpo na kosalisa basusu. Tózwa ndakisa ya Charlene, oyo azalaki na mbula 44 mpe azalaki na maladi ya kanser; minganga bayebisaki ye ete atikali kaka na mikolo 10 ya bomoi. Bandeko basi mibale, Sharon ná Nicolette, bamonaki ete Charlene azali na mposa ya lisalisi mpe mobali na ye akokoka te kokokisa mokumba yango ye moko; yango wana bamipesaki mpo na kosalisa Charlene na mikolo wana ya nsuka ya bomoi na ye. Na esika ya mikolo zomi, Charlene aumelaki lisusu pɔsɔ motoba, kasi bandeko basi yango bamoniselaki ye bolingo tii na nsuka. Sharon alobi boye: “Ezalaka mpasi soki oyebi ete moto oyo azali kobɛla akobika te. Kasi, Yehova apesaki biso makasi. Likambo yango esalisaki biso tókóma na boyokani makasi na Yehova mpe tólingana lisusu makasi.” Mobali ya Charlene alobi boye: “Nakobosana ata mokolo moko te lisungi ya bandeko basi wana. Boboto mpe lisungi na bango esalisaki Charlene mingi, mpe epesaki ngai makasi oyo nazalaki na yango mposa. Nakobosana ata mokolo moko te bolamu na bango. Ndenge bandeko wana bandimaki komona mpasi mpo na biso elendisaki kondima na ngai mpe ekolisaki bolingo na ngai mpo na bandeko ya mokili mobimba.”

19, 20. (a) Wapi makambo mitano oyo tolobeli awa, oyo emonisi bolingo ya Kristo? (b) Ekateli nini ozwi?

19 Na masolo misato oyo, tolobeli makambo mitano oyo emonisi bolingo oyo Kristo azalaki na yango, mpe ndenge tokoki komekola ye. Tiká tózala na “ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema” lokola Yesu. (Mat. 11:29) Tósalaka nyonso mpo na komonisela basusu boboto, ata soki kozanga kokoka to bolɛmbu na bango emonani polele. Mpe tótosaka na mpiko nyonso mibeko ya Yehova, ata ntango tokutani na komekama.

20 Tiká tómonisa “tii na nsuka,” bolingo ya Kristo epai ya bandeko na biso nyonso, ndenge Kristo ye moko asalaki. Bolingo ya ndenge wana nde ezali elembo ya bayekoli ya solosolo ya Yesu. (Yoa. 13:1, 34, 35) Ɛɛ, ‘tókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.’ (Ebr. 13:1) Tólɛmba te! Tózala na ekateli ya kopesa Yehova nkembo mpe kosalisa basusu! Yehova akopambola milende na biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Kosuka kaka te na koloba: ‘Bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1986 (na Lifalanse).

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini bankulutu bakoki komonisa bolingo ya Kristo epai ya bato oyo basali mabe?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi tómekolaka bolingo ya Kristo na ntango oyo ya nsuka?

• Ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya Kristo epai ya bandeko oyo bazali kobɛla?

[Elilingi na lokasa 17]

Bankulutu balingaka moto oyo asali libunga azongela Yehova

[Elilingi na lokasa 18]

Ndenge nini bakristo oyo balongwaki na Yerusaleme bamonisaki bolingo ya Kristo?

[Elilingi na lokasa 19]

Batatoli ya Yehova bayebani mpo na ndenge bamonisaka bolingo ya Kristo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto