Motuya monene ya mateya ya Nzambe
“Mpo na motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu Nkolo na ngai, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso lokola biloko oyo ebungá.”—FLP. 3:8.
1, 2. Bakristo mosusu baponaki kosala nini, mpe mpo na nini?
BANDA bomwana na ye, Robert azalaki mayele mingi na kelasi. Ntango azalaki na mbula mwambe, molakisi na bango moko ayaki na ndako na bango mpe alobaki na ye ete azali na mayele ya kosala nyonso oyo alingi. Alobaki ete azali na elikya ete mokolo mosusu Robert akokóma doktɛrɛ. Lokola azwaki bapwɛ mingi ntango asilisaki eteyelo ya ntei, azalaki na likoki ya kokɔta na iniversite nyonso oyo alingi na ekólo na bango. Kasi, Robert atikaki libaku yango, oyo bato mingi bamonaki lokola libaku oyo eyaka kaka mbala moko na bomoi, mpe amipesaki na mosala ya mobongisi-nzela.
2 Lokola Robert, bakristo mingi, mikóló mpe bilenge bazali na mabaku ya kokóma bato minene na mokili oyo. Bamosusu baboyaka kosalela mabaku yango mpo bámipesa mobimba na mosala ya Nzambe. (1 Ko. 7:29-31) Nini etindaka bakristo lokola Robert bámipesa mobimba na mosala ya kosakola? Basalaka yango libosoliboso mpo balingaka Yehova, kasi mpe mpo bayebi motuya ya mateya ya Nzambe. Osilá kokanisa ndenge bomoi na yo elingaki kozala soki oyebaki mateya ya solo te? Kokanisa mapamboli mosusu ya minene oyo tozwi na ndenge toteyami na Yehova ekosalisa biso tóbosana te motuya ya nsango malamu mpe tózala na molende ya koyebisa yango epai ya basusu.
Koteyama na Nzambe ezali mpenza lokumu
3. Mpo na nini tondimi ete Yehova asepelaka koteya bato ya kozanga kokoka?
3 Na boboto na ye, Yehova alingaka koteya bato ya kozanga kokoka. Mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, Yisaya 54:13 esakolaki boye: “Bana na yo nyonso bakozala bato oyo Yehova ateyi, mpe bana na yo bakozala na kimya mingi.” Maloba yango etaleli mpe “bampate mosusu” ya Kristo. (Yoa. 10:16) Yango emonani polele na esakweli moko oyo ezali kokokisama lelo oyo. Na emonaneli moko, Yisaya amonaki bato ya bikólo nyonso bazali koya na losambo ya solo. Amonisaki ete bato yango bazalaki koloba boye: “Bóya, tómata na ngomba ya Yehova, na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.” (Yis. 2:1-3) Koteyama na Nzambe ezali mpenza lokumu!
4. Yehova asɛngaka nini epai ya bato oyo ateyaka?
4 Tosengeli kosala nini mpo na koteyama na Nzambe? Likambo ya ntina mingi koleka ezali kozala na komikitisa. Davidi akomaki boye: “Yehova azali malamu mpe sembo. . . . Akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.” (Nz. 25:8, 9) Yesu mpe alobaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya mpe bato ya mayele makambo oyo malamumalamu, mpe omonisi yango bana mike.” (Luka 10:21) Osepelaka te kopusana penepene na Nzambe oyo “amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene”?—1 Pe. 5:5.
5. Ndenge nini tozwi boyebi ya Nzambe?
5 Biso basaleli ya Yehova tosengeli nde koloba ete toyebá solo na makoki mpe na bwanya na biso moko? Te. Soki ezalaki kaka mpo na makoki na biso moko, tolingaki koyeba Nzambe te. Yesu alobaki boye: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” (Yoa. 6:44) Na nzela ya mosala ya kosakola mpe ya elimo santu, Yehova azali kobenda bampate, to “biloko kitoko ya bikólo nyonso,” epai na ye. (Hag. 2:7) Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge tozali kati na bato oyo Yehova abendi epai ya Mwana na ye.—Tángá Yirimia 9:23, 24.
Ezali na nguya ya kobongola bato
6. Kozwa “boyebi ya Yehova” ekoki kosala nini na bomoi ya bato?
6 Esakweli ya Yisaya esaleli elilingi kitoko mpenza mpo na kolobela mbongwana oyo ezali kosalema na bomoi ya bato na ntango na biso. Bato oyo bazalaki liboso bato ya mobulu bakómi bato ya kimya. (Tángá Yisaya 11:6-9.) Baoyo bazalaki koyinana mpo bakeseni mposo, bikólo to bakeseni na makambo mosusu bayekoli kofanda na bomoko. Ezali lokola nde ‘batuli mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele.’ (Yis. 2:4) Nini etindi bango bábongwana makasi ndenge wana? Bato bazwi “boyebi ya Yehova” mpe basaleli yango na bomoi na bango. Atako basaleli ya Nzambe bazali bato ya kozanga kokoka, bango nyonso na mokili mobimba bazali libota kaka moko. Ndenge nsango malamu ezali kobenda bato ya bikólo nyonso mpe mbuma malamu oyo yango ezali kobimisa emonisi motuya monene ya mateya ya Nzambe.—Mat. 11:19.
7, 8. (a) Wapi mwa “biloko oyo epikamá makasi” oyo mateya ya Nzambe ezali kosalisa bato bálongwa na boombo na yango? (b) Nini emonisi ete mateya ya Nzambe epesaka Yehova nkembo?
7 Ntoma Paulo alobaki ete mosala ya basaleli ya Nzambe ezali lokola etumba. Akomaki boye: “Bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te, kasi ezali na nguya oyo euti na Nzambe mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi. Mpo tozali kokweisa makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.” (2 Ko. 10:4, 5) Wapi mwa “biloko oyo epikamá makasi” oyo mateya ya Nzambe ezali kosalisa bato bálongwa na boombo na yango? Kati na yango, tokoki kotánga mateya ya lokuta, biyambayamba mpe bafilozofi ya bato. (Kol. 2:8) Mateya ya Nzambe ezali kosalisa bato bátika misala mabe mpe bálona bizaleli oyo esepelisaka Nzambe. (1 Ko. 6:9-11) Ebongisaka bomoi ya libota. Mpe esalisaka bato oyo bazangi elikya, bázwa elikya ya solosolo na bomoi. Yango nde lolenge ya mateya oyo bato bazali na yango mposa lelo oyo.
8 Moko ya bizaleli oyo Yehova azali kosalisa bato bákóma na yango ezali bosembo, ndenge ndakisa oyo elandi emonisi yango. (Ebr. 13:18) Mwasi moko na ekólo Inde andimaki koyekola Biblia mpe na nsima akómaki mosakoli. Mokolo moko ntango autaki na mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi, alɔkɔtaki shɛnɛti moko ya wolo, oyo ekoki kotɛkama na dolare 800. Atako azalaki mobola, akendaki kotika shɛnɛti yango na biro ya bapolisi mpo báluka nkolo na yango. Polisi oyo akutaki kuna akamwaki makasi! Na nsima, polisi mosusu atunaki ye boye: “Mpo na nini ozwi kaka shɛnɛti yango te?” Alobaki boye: “Mateya ya Biblia ebongoli ngai, yango wana nakómi moto ya bosembo.” Polisi yango akamwaki mpe alobaki na nkulutu oyo ayaki elongo na mwasi yango boye: “Etúká na biso ezali na bato koleka milio 38. Soki bosalisi ata bato zomi bákóma lokola mwasi oyo, ekozala elonga monene.” Soki totali bamilio ya bato oyo mateya ya Nzambe ebongoli bomoi na bango, yango etindaka biso te tópesa Yehova nkembo?
9. Nini ekoki kosalisa bato bábongola mpenza bomoi na bango?
9 Nguya ya Liloba ya Nzambe mpe lisalisi oyo Yehova azali kopesa na nzela ya elimo santu, ezali kosalisa bato bábongola mpenza bomoi na bango. (Rom. 12:2; Gal. 5:22, 23) Bakolose 3:10 elobi boye: “Bólata bomoto ya sika, oyo na nzela ya boyebi ya solosolo ezali kokómisama sika na kolanda elilingi ya Oyo azalisaki yango.” Nsango oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na nguya ya kosalisa moto amimona mpenza ndenge azali, mpe ekoki kobongola makanisi mpe motema na ye. (Tángá Baebre 4:12.) Soki moto ayebi mpenza Makomami mpe akómi kotosa mibeko ya Yehova na bomoi na ye, akokóma moninga ya Nzambe, mpe akozwa elikya ya kozala na bomoi libela na libela.
Tozali kobongisama mpo na mikolo ezali koya
10. (a) Mpo na nini kaka Yehova nde akoki kobongisa biso mpo na mikolo ezali koya? (b) Wapi mbongwana monene oyo ekosalema na mabele mobimba mosika te?
10 Lokola Yehova ayebi makambo oyo ekosalema mosika te, kaka ye nde akoki kosalisa biso tómibongisa mpo na mikolo ezali koya. Ayebi oyo azali kokana mpo na bato na mikolo ezali koya. (Yis. 46:9, 10) Biblia emonisi ete “Mokolo monene ya Yehova ekómi pene.” (Sef. 1:14) Makambo oyo totángaka na Masese 11:4 ekokokisama mpenza: “Biloko ya motuya ekozala na litomba moko te na mokolo ya nkɛlɛ, kasi boyengebene nde ekobikisa na liwa.” Ntango ngonga ekokoka mpo Yehova asambisa mokili ya Satana, likambo eleki ntina ekozala boyokani na biso na ye. Mbongo ekozala na ntina moko te. Kutu, Ezekiele 7:19 elobi boye: “Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekokóma eloko moko ya koyokela mpii.” Koyeba makambo wana ekoki kosalisa biso tómitambwisa na bwanya lelo oyo.
11. Wapi lolenge moko oyo mateya ya Nzambe ezali kobongisa biso mpo na mikolo ezali koya?
11 Lolenge moko oyo mateya ya Yehova ezali kobongisa biso mpo na mikolo ezali koya ezali ya kosalisa biso tóyeba makambo oyo eleki ntina. Ntoma Paulo akomelaki Timote boye: “Pesá bazwi ya ntango oyo mitindo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe.” Ata soki tozali bazwi te, toli wana oyo euti na Nzambe ekoki kosalisa biso. Yango elimboli nini? Na esika ya koboma nzoto na koluka bozwi ya mokili, tosengeli nde kosala nyonso mpo na ‘kosala makambo ya malamu’ mpe ‘kozala bazwi na misala ya malamu.’ Soki tozali kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, ‘tokomibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo tokotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya.’ (1 Tim. 6:17-19) Kondima kozala na bomoi wana ya komipimela ezali mpenza bwanya mpo, ndenge Yesu alobaki yango, “moto akozala na litomba nini soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye?” (Mat. 16:26, 27) Lokola mokolo ya Yehova ekómi pene, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nazali kobomba biloko na ngai ya motuya wapi? Nazali moombo ya Nzambe to ya Bomɛngo?’—Mat. 6:19, 20, 24.
12. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te ata soki bato mosusu bazali kotyola mosala na biso ya kosakola?
12 Mosala oyo eleki malamu na kati ya ‘misala ya malamu’ oyo Liloba ya Nzambe esɛngi bakristo bámipesa na yango ezali mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli, mosala oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, lelo mpe bato bakoki kotyola mosala na biso ya kosakola. (Tángá 1 Bakorinti 1:18-21.) Kasi, yango ekitisi te motuya ya nsango na biso; elɛmbisi mpe te ntina ya kopesa moto nyonso libaku ya kondima nsango yango, lokola ntango ezali naino. (Rom. 10:13, 14) Ntango tozali kosalisa basusu báteyama na Nzambe, tokozwa matomba mingi.
Bazali kopambwama mpo na elimo na bango ya komipimela
13. Makambo nini ntoma Paulo amipimelaki mpo na nsango malamu?
13 Liboso ntoma Paulo akóma mokristo, azalaki kolanda mateya mpo na kokóma moto monene epai ya Bayuda. Ntango azalaki na mbula soki 13, atikaki engumba Tarse, epai abotamaki, mpe akendaki na Yerusaleme mpo na kotánga kelasi epai ya Gamaliele, oyo azalaki moteyi monene ya Mibeko. (Mis. 22:3) Na nsima, Paulo akómaki na mayele mingi koleka baninga na ye, mpe soki akobaki kolanda nzela wana, alingaki kokóma moto monene na Lingomba ya Bayuda. (Gal. 1:13, 14) Ntango andimaki nsango malamu mpe abandaki kosakola, apesaki makambo nyonso wana mokɔngɔ. Na nsima, Paulo ayokaki nde mawa mpo na nzela oyo alandaki? Te. Kutu, akomaki boye: “Mpo na motuya monene ya boyebi ya Kristo Yesu Nkolo na ngai, nazali mpe kotalela mpenza biloko nyonso lokola biloko oyo ebungá. Mpo na ye nandimi kobungisa biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola bosɔtɔ mpamba.”—Flp. 3:8.
14, 15. Lipamboli nini tozali na yango lokola tozali “kosala elongo na Nzambe”?
14 Lokola Paulo, bakristo lelo oyo bamipimelaka makambo mingi mpo na nsango malamu. (Mrk. 10:29, 30) Yango ezali nde kozangisa biso likambo moko? Lokola ebele ya bakristo mosusu, Robert alobi boye: “Namonaka ata moke te ete nazangi eloko moko. Mosala ya ntango nyonso esalisi ngai nazwa esengo mpe bolamu ya solosolo, epesi ngai mpe nzela ya ‘komeka mpe komona ete Yehova azali malamu.’ Lokola napesá bomɛngo ya mokili mokɔngɔ mpo na komipesa na makambo ya elimo, Yehova apesaka ngai mapamboli oyo eleki kutu biloko oyo nandimaki komipimela. Namonaka kutu lokola nde namipimelá eloko moko te. Nazwi nde matomba ya koleka!”—Nz. 34:8; Mas. 10:22.
15 Soki osili kosala mwa bambula na mosala ya kosakola nsango malamu mpe koteya bato, na ntembe te yo mpe ozwaki mabaku ya komeka mpe komona ete Yehova azali malamu. Esilá kokómela yo omona mpenza ete elimo ya Nzambe esungi yo na mosala ya kosakola? Osilá komona bilongi ya bato etondi na esengo mpo Yehova afungoli mitema na bango mpo báyoka nsango malamu na likebi nyonso? (Mis. 16:14) Yehova asilá kosalisa yo olonga mikakatano, mbala mosusu yango efungwelaki yo nzela ya kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola? Yehova asilá kosunga yo na ntango ya mpasi mpe yango esalisi yo okoba kosalela ye atako omonaki ete okokoka lisusu te? (Flp. 4:13) Ntango biso moko tomoni lisalisi ya Yehova na miso wana tozali komipesa na mosala na ye, tomonaka ete azali pene na biso mpe akómaka mpenza moninga na biso. (Yis. 41:10) Omoni te ete ezali lipamboli monene kozala moko ya “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe” na mosala monene ya kopalanganisa mateya na ye?—1 Ko. 3:9.
16. Ndenge nini otalelaka milende oyo ozali kosala na mosala ya koteya bato mateya ya Nzambe mpe makambo oyo ozali komipimela mpo na yango?
16 Bato mingi balingaka kosala likambo moko na bomoi na bango, oyo matomba na yango ekotikala libela. Tomoni ete na mokili oyo, ata makambo minene oyo moto asali, bato baumelaka kobosana yango te. Nzokande, misala oyo Yehova azali kosala lelo oyo mpo na kosantisa nkombo na ye ekotikala libela na libela. Tokobosana yango ata mokolo moko te. (Mas. 10:7; Ebr. 6:10) Tiká tóbatela libaku oyo tozali na yango ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya koyebisa bato mateya ya Nzambe, oyo ekotika nsango libela na libela.
Okopesa eyano nini?
• Yehova asɛngaka nini epai ya bato oyo azali koteya?
• Ndenge nini mateya ya Nzambe ezali kobongola bato?
• Matomba nini tozali kozwa lokola tozali kosalisa basusu báteyama na Nzambe?
[Elilingi na lokasa 23]
Bato oyo bazali koteyama na Yehova bazali mpenza libota moko bango nyonso na mokili mobimba
[Elilingi na lokasa 24]
Omoni te ete ezali lipamboli monene kozala na kati ya “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe”?