Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/10 lok. 15
  • Zabolo azalaka mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zabolo azalaka mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Satana azali nani? Azalaka mpenza?
    Lamuká!—2007
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Makambo ya mabe yango nde Satana?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/10 lok. 15

Mituna ya batángi

Zabolo azalaka mpenza?

Ɛɛ, Biblia eteyaka ete Satana Zabolo azali mpenza ekelamu ya solo. Bato oyo bandimaka Biblia te, batyolaka likanisi yango. Mpo na bango, Satana ezali kaka mabe oyo ezalaka na motema ya moto.

Tokoki nde kokamwa soki bato bayebi mpenza te soki Satana azali nani? Te. Tózwa ndakisa moko: Ntango abomi moto, moto mabe akoki kolongola bilembeteli nyonso mpo akoba na misala na ye ya mabe kozanga ete bato báyeba ye. Ndenge moko mpe, Satana azali mobomi oyo ayebi mpenza kozipa makanisi ya bato; atindaka bato básala makambo ya mabe mpe bato bayebaka te. Yesu amonisaki polele ete Satana nde azali mobandisi ya makambo nyonso ya mabe oyo bato bamonaka. Yesu abengaki Satana “mokonzi ya mokili oyo.”​—Yoane 12:31.

Zabolo autá wapi? Ntango Nzambe asalaki ye, azalaki ekelamu ya kokoka ya elimo na likoló; na nsima, anzelu yango akómaki motomboki, amikómisaki Zabolo ntango akolisaki mposa ete bato bákóma kosambela ye na esika ya kosambela Nzambe. Lisolo moko kati na Yesu ná Zabolo, oyo ezali na kati ya Biblia, emonisi polele mposa mabe ya anzelu yango. Satana alukaki ete Yesu afukamela ye mpe ‘asalela ye likambo moko ya losambo.’​—Matai 4:8, 9.

Ndenge moko mpe, ntango azalaki kosolola na Nzambe, na lisolo oyo ezali na mokanda ya Yobo, Satana amonisaki mposa na ye polele. Akosala nyonso mpo na kopekisa bato básalela Nzambe.​—Yobo 1:13-19; 2:7, 8.

Kanisá naino: Soki Satana asololaki na Nzambe mpe Yesu Kristo, ndenge nini tokoki koloba ete Satana ezali kaka mabe moko oyo ezalaka na motema ya moto? Nzambe to Mwana na ye bazali ata na mabe moko te kati na bango! Na yango, ezali polele ete Satana azali mpenza​—ekelamu moko mabe ya elimo oyo atosaka Yehova te atosaka mpe Yesu te.

Makambo mabe oyo bato bazali kosala emonisi polele ete Zabolo azalaka mpenza. Bikólo mingi ya mokili etikaka bilei epɔla; nzokande, ebele ya bato bazali kokufa na nzala. Bikólo ezali konduka bibundeli mpo na kobomana. Bazali kobebisa mopɛpɛ. Kasi, bato mingi bazali koyeba te soki koyinana ya ndenge wana mpe elimo ya kobomana ezali kouta wapi. Mpo na nini?

Biblia elobi ete Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Bakorinti 4:4) Mpo na kotambwisa makanisi ya bato, Satana asalelaka ebongiseli moko oyo emonanaka te. Azali “mokonzi ya bademo.” (Matai 12:24) Kaka ndenge mokonzi moko ya etuluku ya babomi bato akoki kokamba ebele ya bato kozanga ete bango nyonso báyeba ye, ndenge moko Satana asalelaka baanzelu ya mabe mpo na kotambwisa ebele ya bato oyo mingi bayebi ye te.

Tozali mpenza na botɔndi ndenge Biblia esalisi biso tóyeba Zabolo mpe ebongiseli na ye! Na ndenge yango tokoki kotɛmɛla Zabolo. Biblia epesi biso toli oyo: “Bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”​—Yakobo 4:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto