Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/11 nk. 16-32
  • Na ntina na bomoi ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina na bomoi ya libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo libota ezala na esengo, ndenge nini esengeli kotalela libala?
  • Mpo na nini kolinga Nzambe ememaka esengo na libota?
  • Mibali ná basi bakoki kosala nini mpo básepelisana?
  • Liteya nini baboti bakoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bana?
  • Liteya nini bana bakoki kozwa epai ya Yesu?
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nzambe azali na esika ya liboso kati na libota na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mibali​—Bómekola bokonzi ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya kofanda na basusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/11 nk. 16-32

Yesu ateyi biso

Na ntina na bomoi ya libota

Mpo libota ezala na esengo, ndenge nini esengeli kotalela libala?

Libala ezali ebongiseli mosantu. Ntango batunaki Yesu soki koboma libala epesami nzela, alobaki boye: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te. . . . Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Matai 19:4-6, 9) Ntango mwasi ná mobali bazali kolanda toli ya Yesu mpe bazali sembo moko epai ya mosusu, libota mobimba ekozala na kimya mpe na esengo.

Mpo na nini kolinga Nzambe ememaka esengo na libota?

Yesu alobaki boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso.” Mobeko ya mibale oyo eleki monene ezali nini? Yesu alobaki boye: “Osengeli kolinga mozalani na yo [kati na bango bato oyo ofandaka na bango esika moko, elingi koloba libota na yo] lokola yo moko.” (Matai 22:37-39) Na yango, mpo na kozala na libota ya esengo, esengeli kozala na boyokani malamu na Nzambe mpo bolingo mpo na Nzambe etindaka biso tólingana.

Mibali ná basi bakoki kosala nini mpo básepelisana?

Mibali bakosepelisa basi na bango soki balandi ndakisa ya Yesu. Yesu alingaki lisangá, mwasi na ye ya elilingi, mpe amipimelaki makambo mingi mpo na yango. (Baefese 5:25) Yesu alobaki boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela.” (Matai 20:28) Yesu azalaki makambo makasimakasi te mpe azalaki konyokola bato oyo bazalaki na nse na ye te; azalaki nde kokitisa bango motema. (Matai 11:28) Yango wana, mibali basengeli kosalela bokonzi na bango na boboto, na ndenge oyo ekosalisa libota mobimba.

Basi mpe bakoki kozwa liteya na ndakisa ya Yesu. Biblia elobi boye: “Mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.” Elobi mpe ete “mokonzi ya mwasi ezali mobali.” (1 Bakorinti 11:3) Yesu amonaki te ete kozala na nse ya Nzambe ezali kokitisa ye lokumu. Azalaki na limemya makasi mpo na Tata na ye. Yesu alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:29) Mwasi oyo bolingo mpe limemya oyo azali na yango mpo na Nzambe etindaka ye atosa bokonzi ya mobali na ye asalisaka mpenza libota na ye ezala na esengo.

Liteya nini baboti bakoki kozwa na ndenge oyo Yesu azalaki kotalela bana?

Yesu azalaki kolekisa ntango na bana mpe azalaki kotalela makanisi mpe mayoki na bango. Biblia elobi boye: “Yesu abengaki bana yango ya mike epai na ye mpe alobaki ete: ‘Bótika bana mike báya epai na ngai.’” (Luka 18:15, 16) Mokolo moko, bato batyolaki bana mibali oyo bazalaki kolobela kondima oyo bazali na yango epai ya Yesu. Kasi, Yesu apesaki bana yango longonya mpe alobaki na bato oyo bazalaki kotyola bango ete: “Botángá naino te likambo oyo: ‘Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ esanzola yo’?”​—Matai 21:15, 16.

Liteya nini bana bakoki kozwa epai ya Yesu?

Yesu atikelá bana ndakisa ya malamu ya kosepela na makambo ya Nzambe. Ntango azalaki na mbula 12, bamonaki ye “na tempelo, afandi na katikati ya bateyi mpe azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” Yango esalaki nini? “Baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.” (Luka 2:42, 46, 47) Atako Yesu azalaki na boyebi mingi, akómaki na lolendo te. Kasi, boyebi yango etindaki ye atosaka baboti na ye. Biblia elobi ete: “Azalaki kaka komikitisa liboso na bango.”​—Luka 2:51.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 14 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto