Yekoláká Biblia mpo na kobongisa mabondeli na yo
“Aa, Yehova, nabondeli yo, tiká litoi na yo etya likebi na libondeli ya mosaleli na yo.”—NEH. 1:11.
1, 2. Mpo na nini ezali na ntina kotalela mabondeli mosusu oyo ezali na Biblia?
KOBONDELA mpe koyekola Biblia ezali makambo ya ntina mingi na losambo ya solo. (1 Tes. 5:17; 2 Tim. 3:16, 17) Ya solo, Biblia ezali buku ya mabondeli te. Kasi, ezali na mabondeli ebele mpe mingi mosusu ezwami na mokanda ya Nzembo.
2 Ntango ozali kotánga mpe koyekola Biblia, okoki komona mabondeli oyo eyokani na makambo oyo ozali kokutana na yango na bomoi. Yango wana, ntango ozali kokɔtisa na mabondeli na yo maloba ya mabondeli oyo ezali na Makomami, yango ekobongisa mabondeli na yo. Liteya nini okoki kozwa epai ya bato oyo Nzambe ayokaki mabondeli na bango mpe na maloba oyo basalelaki na mabondeli na bango?
Luká mpe landá litambwisi ya Nzambe
3, 4. Mosaleli ya Abrahama azwaki mokumba nini, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndenge Yehova ayanolaki libondeli na ye?
3 Koyekola Biblia ekosalisa yo omona ete osengeli ntango nyonso kobondela mpo na kosɛnga litambwisi ya Nzambe. Tótala naino likambo oyo esalemaki ntango Abrahama atindaki mosaleli na ye oyo azalaki mokóló na basaleli na ye nyonso—ekoki kozala Eliezere—na Mezopotamia akende kolukela Yisaka mwasi oyo abangaka Nzambe. Ntango akómaki na libulu moko, esika basi bazalaki koya kotoka mai, Eliezere abondelaki boye: “Yehova . . . Likambo oyo esengeli kosalema yango oyo: elenge mwasi oyo nakoloba na ye ete: ‘Nabondeli yo, kitisá elokó na yo ya mai, mpo namɛla mai,’ mpe oyo akoloba mpenza ete: ‘Mɛlá mai, mpe lisusu nakomɛlisa bakamela na yo,’ ye nde mwasi oyo okopesa mpenza mosaleli na yo, Yisaka; mpe na ndenge wana, nakoyeba ete omoniseli nkolo na ngai bolingo ya sembo.”—Eba. 24:12-14.
4 Nzambe ayanolaki libondeli ya mosaleli ya Abrahama na ndenge Rebeka amɛlisaki bakamela na ye mai. Rebeka akendaki elongo na ye na Kanana mpe akómaki mwasi ya Yisaka oyo alingaki mingi. Ya solo, osengeli koluka te ete Nzambe amonisa yo elembo moko boye. Kasi, akokamba yo soki obondeli ye mpe ondimi ete elimo na ye etambwisa yo.—Gal. 5:18.
Esalaka ete tómitungisa mingi te
5, 6. Nini ezali kobenda likebi na libondeli ya Yakobo ntango alingaki kokutana na Esau?
5 Libondeli ekoki kosala ete tómitungisa mingi te. Ntango azalaki kobanga ete lipasa na ye Esau akosala ye mabe, Yakobo abondelaki boye: “Ee Yehova, . . . ngai nabongi te na motema boboto nyonso mpe na bosembo nyonso oyo omoniseli mosaleli na yo . . . Nabondeli yo, bikisá ngai na lobɔkɔ ya ndeko na ngai, na lobɔkɔ ya Esau, mpamba te nazali kobanga ye noki aya kobunda na ngai, ná bamama elongo na bana. Mpe yo, olobaki ete: ‘Ya solo mpenza nakosalela yo malamu mpe nakokómisa momboto na yo lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki kotángama te, mpo eleki ebele.’”—Eba. 32:9-12.
6 Atako Yakobo azwaki bibongiseli mpo bitumba ebima te, Nzambe ayanolaki libondeli na ye na ndenge ayokanaki na ndeko na ye Esau. (Eba. 33:1-4) Tángá libondeli yango malamumalamu mpe okomona ete Yakobo asukaki kaka te na kosɛnga lisalisi. Amonisaki kondima na Momboto oyo alakamaki mpe amonisaki botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe. Yo mpe ozali na mwa “kobanga na kati” na yo? (2 Ko. 7:5) Soki ezali bongo, libondeli ya Yakobo ekosalisa yo omona ete mabondeli ekoki kosala ete omitungisa mingi te. Kasi, osengeli kosuka kaka te na kosɛnga, osengeli mpe kosalela maloba oyo ekomonisa ete ozali na kondima.
Bondelá mpo na kozwa bwanya
7. Mpo na nini Moize abondelaki mpo na koyeba banzela ya Yehova?
7 Mposa ya kosepelisa Yehova esengeli kotinda yo obondela mpo na kosɛnga bwanya. Moize abondelaki mpo na koyeba banzela ya Nzambe. Alobaki boye: “Talá, [Yehova] ozali koloba na ngai ete: ‘Kambá bato oyo [na Ezipito],’ . . . Mpe sikoyo, nabondeli yo, soki nandimami na miso na yo, nabondeli yo, salá ete nayeba banzela na yo, . . . mpo nandimama na miso na yo.” (Kob. 33:12, 13) Mpo na yango Nzambe apesaki Moize boyebi mingi ya banzela na ye—likambo oyo asengelaki na yango mpo na kokamba libota ya Yehova.
8. Matomba nini okoki kozwa soki omanyoli makambo oyo ezali na 1 Bakonzi 3:7-14?
8 Davidi mpe abondelaki boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova.” (Nz. 25:4) Salomo, mwana ya Davidi asɛngaki Nzambe bwanya mpo na kokokisa malamu mokumba na ye ya mokonzi ya Yisraele. Yehova asepelaki na libondeli ya Salomo, mpe apesaki ye kaka eloko oyo asɛngaki te, kasi abakiselaki ye bozwi mpe nkembo. (Tángá 1 Bakonzi 3:7-14.) Soki ozwi mikumba oyo omoni ete ezali kilo mpo na yo, sɛngá bwanya mpe monisá elimo ya komikitisa. Na ndenge yango, Nzambe akosalisa yo ozwa boyebi mpe omonisa bwanya oyo ekosalisa yo omema mikumba yango na ndenge oyo ebongi mpe na bolingo.
Libondeli na yo esengeli kouta na motema
9, 10. Likambo nini ya ntina mingi omoni na ndenge Salomo alobelaki motema na libondeli na ye ya bofungoli tempelo ya Yerusaleme?
9 Mpo Nzambe ayoka libondeli na biso, esengeli kouta na motema. Salomo asalaki libondeli moko oyo eutaki mpenza na motema, oyo ezali na 1 Bakonzi mokapo 8, liboso ya bato ebele oyo bayanganaki na Yerusaleme na mokolo ya bofungoli tempelo ya Yehova na mobu 1026 L.T.B. Nsima ya kokɔtisa sanduku ya kondimana na Esika oyo Eleki Bosantu, lipata ya Yehova etondaki na tempelo, Salomo akumisaki Nzambe.
10 Talelá libondeli ya Salomo mpe simbá malamu maloba yango na motema. Salomo andimaki ete kaka Yehova nde ayebi motema ya moto. (1 Bak. 8:38, 39) Libondeli yango emonisi mpe ete elikya ezali mpo na moto oyo asali lisumu mpe ‘azongeli Nzambe na motema na ye mobimba.’ Soki monguna akangi basaleli ya Nzambe, Yehova akoyoka libondeli na bango soki babondeli ye na motema mobimba. (1 Bak. 8:48, 58, 61) Ya solo, libondeli na biso esengeli kouta na motema.
Ndenge mokanda ya Nzembo ekoki kobongisa mabondeli na yo
11, 12. Liteya nini ozwi na libondeli ya Molevi moko oyo mpo na mwa ntango azalaki na likoki te ya kokende na tempelo?
11 Koyekola mokanda ya Nzembo ekoki kobongisa mabondeli na yo mpe kosalisa yo ozela Nzambe ayanola yango. Tózwa ndakisa ya motema molai ya Molevi moko oyo azalaki na mboka mopaya. Atako azalaki na likoki te ya kokende na tempelo ya Yehova mpo na mwa ntango, ayembaki boye: “Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya, mpe mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai? Zelá Nzambe, mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai mpe azali Nzambe na ngai.”—Nz. 42:5, 11; 43:5.
12 Liteya nini tokoki kozwa epai ya Molevi yango? Soki bakangi yo mpo na bosembo na yo mpe ozali na likoki te ya koyanganaka na makita elongo na bandeko na yo mpo na mwa ntango, osengeli kozela Nzambe. (Nz. 37:5) Kanisá esengo oyo ozwaki na mosala ya Nzambe, mpe bondelá mpo na koyika mpiko wana ozali ‘kozela Nzambe’ apesa yo likoki ya koyangana lisusu na basaleli na ye.
Bondeláká na kondima
13. Na boyokani na Yakobo 1:5-8, mpo na nini osengeli kobondelaka na kondima?
13 Ata okutani na makambo ya ndenge nini, bondeláká ntango nyonso na kondima. Soki bosembo na yo emekami, landá toli ya moyekoli Yakobo. Bondelá Yehova, mpe zalá na kondima ete akopesa yo bwanya oyo ozali na yango mposa mpo na koyika mpiko na mikakatano na yo. (Tángá Yakobo 1:5-8.) Nzambe ayebi makambo nyonso oyo ezali kotungisa yo, mpe akoki kokamba mpe kobɔndisa yo na nzela ya elimo na ye. Fungolelá ye motema na yo na kondima nyonso, ‘kobɛta ntembe ata moke te,’ mpe ndimá litambwisi ya elimo na ye mpe toli ya Liloba na ye.
14, 15. Mpo na nini tokoki koloba ete Hana abondelaki mpe amonisaki kondima?
14 Hana, moko ya basi ya Elekana, oyo azalaki Molevi, abondelaki Nzambe mpe asalaki likambo oyo emonisaki ete azali na kondima. Lokola Hana azalaki kobota te, Penina, mbanda na ye oyo abotaki bana ebele azalaki kotyola ye. Na tabernakle, Hana alapaki ndai ete soki aboti mwana mobali, akopesa ye epai ya Yehova. Lokola ntango azalaki kobondela kaka mbɛbu na ye nde ezalaki koningana, Eli, nganga-nzambe monene akanisaki ete alangwe. Ntango ayokaki ete ezali bongo te, alobaki na ye boye: “Tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo.” Atako Hana ayebaki mpenza te ndenge makambo ekosuka, azalaki na kondima ete Nzambe akoyanola libondeli na ye. Yango wana, “elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” Azalaki lisusu na mawa te to atungisamaki lisusu te.—1 Sa. 1:9-18.
15 Nsima ya kobota mpe kolongola Samwele na mabɛlɛ, Hana apesaki ye epai ya Yehova mpo asalela ye mosala mosantu na tabernakle. (1 Sa. 1:19-28) Kozwa ntango ya komanyola libondeli oyo Hana asalaki na libaku yango, ekoki kobongisa mabondeli na yo mpe kosalisa yo omona ete ata soki ozali na mawa mpo na likambo moko oyo ezali kotungisa yo, okoki kolonga yango soki obondeli Yehova na elikya ete akoyanola yo.—1 Sa. 2:1-10.
16, 17. Lokola Nehemia abondelaki mpe amonisaki kondima likambo nini esalemaki?
16 Nehemia, moto moko ya sembo na ekeke ya mitano L.T.B., abondelaki mpe amonisaki kondima. Alobaki boye: “Aa, Yehova, nabondeli yo, tiká litoi na yo etya likebi na libondeli ya mosaleli na yo mpe na libondeli ya basaleli na yo oyo basepelaka kobanga nkombo na yo; mpe, nabondeli yo, pesá mosaleli na yo elonga lelo mpe salá ete ye azala moto ya koyokela mawa liboso ya mobali oyo.” “Mobali” yango ezalaki nani? Ezalaki Artazerezese, mokonzi ya Perse, oyo Nehemia azalaki mopesi-masanga na ye.—Neh. 1:11.
17 Nehemia abondelaki Nzambe na kondima mikolo ebele nsima ya koyeba ete Bayuda oyo babimaki na boombo na Babilone, “bazali na mpasi mpenza mpe na nsɔni; mpe efelo ya Yerusaleme ebukani.” (Neh. 1:3, 4) Nzambe ayanolaki Nehemia na ndenge oyo akokaki kokanisa te, ntango Mokonzi Artazerezese apesaki ye nzela ya kokende na Yerusaleme kotonga lisusu efelo na yango. (Neh. 2:1-8) Eumelaki te, efelo etongamaki. Nzambe ayokaki mabondeli ya Nehemia mpo ezalaki mpo na losambo ya solo mpe asalaki yango na kondima. Ezali mpe bongo mpo na mabondeli na yo?
Kobosana te kokumisa mpe kotɔnda Nzambe
18, 19. Makambo nini ekoki kotinda mosaleli ya Yehova akumisa mpe atɔnda ye?
18 Ntango ozali kobondela, kobosana te kokumisa mpe kotɔnda Yehova. Tozali na bantina mingi ya kosala yango! Na ndakisa, Davidi azalaki na mposa makasi ya kosanzola bokonzi ya Yehova. (Tángá Nzembo 145:10-13.) Mabondeli na yo emonisaka ete ozwaka na motuya libaku ya kosakola Bokonzi ya Yehova? Maloba ya mokomi ya nzembo ekoki mpe kosalisa yo osala mabondeli oyo euti na motema mpo na komonisa botɔndi mpo na makita mpe mayangani.—Nz. 27:4; 122:1.
19 Botɔndi mpo na libaku ya kozala na boyokani malamu na Nzambe ekoki kotinda yo obondela boye: “Ee Yehova, nakokumisa yo na kati ya bato ya bikólo; Nakobɛtɛla yo mondule na kati ya bituluku ya bato ya bikólo. Mpo motema boboto na yo ezali monene kino na likoló, mpe bosolo na yo kino na mapata. Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló; Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.” (Nz. 57:9-11) Oyo nde maloba kitoko! Omoni te ete maloba wana kitoko ya mokanda ya Nzembo ekoki kobongisa mabondeli na yo?
Bondeláká na limemya
20. Ndenge nini Maria amonisaki kokangama na ye epai ya Nzambe?
20 Mabondeli na yo esengeli komonisa ete omemyaka Nzambe. Maloba ya limemya oyo Maria alobaki ntango ayokaki ete akokóma mama ya Masiya, ekokani na maloba oyo Hana alobaki ntango akendaki kotika Samwele na mosala na tabernakle. Limemya ya Maria epai ya Nzambe emonani na maloba oyo: “Molimo na ngai ezali kokumisa Yehova, mpe elimo na ngai ekoki te komipekisa kosepela mingi mpo na Nzambe Mobikisi na ngai.” (Luka 1:46, 47) Yo mpe okoki kobongisa mabondeli na yo, mpe kosalela maloba lokola wana? Tokokamwa te ndenge Maria aponamaki mpo azala mama ya Yesu Masiya!
21. Ndenge nini mabondeli ya Yesu emonisaki limemya mpe kondima?
21 Yesu abondelaki na limemya mpe na kondima makasi. Na ndakisa, liboso asekwisa Lazare, “Yesu atombolaki miso na likoló mpe alobaki ete: ‘Tata, natɔndi yo na ndenge oyoki ngai. Ya solo, nayebi ete oyokaka ngai ntango nyonso.’” (Yoa. 11:41, 42) Mabondeli na yo emonisaka mpe ete ozali na limemya mpe na kondima ya ndenge wana? Soki otaleli na likebi libondeli ya ndakisa oyo Yesu asalaki na limemya, okomona ete makambo ya ntina oyo ezali na libondeli yango ezali, kosantisama ya nkombo ya Yehova, koya ya Bokonzi na ye, mpe kokokisama ya mokano na ye. (Mat. 6:9, 10) Kanisá naino mabondeli na yo. Emonisaka ete omibanzabanzaka mpo na Bokonzi ya Yehova, kokokisama ya mokano na ye, mpe kosantisama ya nkombo na ye mosantu? Esengeli mpenza kozala bongo.
22. Mpo na nini osengeli kondima ete Yehova akopesa yo mpiko ya kosakola nsango malamu?
22 Botɛmɛli mpe mikakatano mosusu, mbala mingi etindaka biso tósɛnga Yehova asalisa biso tósalela ye na mpiko. Ntango Sanedrina epekisaki Petro ná Yoane ‘báteya lisusu te na nkombo ya Yesu,’ na mpiko nyonso, bantoma yango baboyaki. (Mis. 4:18-20) Ntango babimaki na bolɔkɔ, bayebisaki baninga na bango bandimi makambo oyo ekómelaki bango. Na yango, baoyo nyonso bazalaki wana babondelaki Nzambe asunga bango mpo báloba liloba na ye na mpiko. Na ntembe te, ezalaki mpenza esengo ntango Nzambe ayanolaki libondeli na bango, mpo “batondaki na elimo santu mpe babandaki koloba liloba ya Nzambe na mpiko”! (Tángá Misala 4:24-31.) Mpo na yango, ebele ya bato bakómaki kosambela Yehova. Libondeli ekoki mpe kosalisa yo osakola nsango malamu na mpiko.
Kobá kobongisa mabondeli na yo
23, 24. (a) Tángá bandakisa mosusu oyo emonisi ete koyekola Biblia ekoki kobongisa mabondeli na yo. (b) Okosala nini mpo na kobongisa lisusu mabondeli na yo?
23 Ezali na ebele ya bandakisa oyo tokoki kotánga mpo na komonisa ete kotánga mpe koyekola Biblia ekoki kosalisa yo obongisa mabondeli na yo. Lokola Yona, yo mpe na libondeli okoki kondima ete “lobiko ezali ya Yehova.” (Yona 2:1-10) Soki ozali komitungisa mpo na lisumu moko oyo osalaki mpe osilaki koluka lisalisi ya bankulutu, okoki kosalela na libondeli na yo maloba ya Davidi mpo na komonisa ete obongoli motema. (Nz. 51:1-12) Na mabondeli mosusu, okoki mpe kokumisa Yehova ndenge Yirimia asalaki. (Yir. 32:16-19) Soki ozali koluka molongani, kotalela libondeli oyo ezali na Ezera mokapo 9, mpe kokɔtisa maloba yango na mabondeli na yo, ekoki kosalisa yo okangama na ekateli na yo ya kotosa Nzambe mpe kobala “na kati ya Nkolo kaka.”—1 Ko. 7:39; Ezr. 9:6, 10-15.
24 Kobá kotánga, koyekola mpe kolukaluka na Biblia. Luká makambo oyo okoki kosalela na mabondeli na yo. Okoki kosalela makambo yango na malɔmbɔ na yo mpe na mabondeli na yo ya botɔndi mpe ya masanzoli. Na ndenge yango okopusana penepene na Yehova Nzambe soki obongisi lisusu mabondeli na yo na nzela ya boyekoli ya Biblia.
[Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli koluka mpe kolanda litambwisi ya Nzambe?
• Nini esengeli kotinda biso tóbondela mpo na kosɛnga bwanya?
• Ndenge nini mokanda ya Nzembo ekoki kobongisa lisusu mabondeli na yo?
• Mpo na nini tosengeli kobondelaka na kondima mpe na limemya?
[Elilingi na lokasa 8]
Mosaleli ya Abrahama abondelaki mpo na kozwa litambwisi ya Nzambe. Yo mpe osalaka bongo?
[Elilingi na lokasa 10]
Losambo na kati ya libota ekoki kobongisa mabondeli na yo