“Kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi?”
Jayne alelaki boye: “Nalingi kaka mpasi na ngai esila!” Azalaki na maladi ya kanser, mpe ezalaki kopanzana nzoto mobimba. Bandeko mpe baninga na ye bazalaki na mposa ete maladi mpe mpasi makasi oyo azalaki na yango esila. Bazalaki kobondela Nzambe asalisa ye. Nzambe ayokaki? Atyaki likebi na likambo yango?
NZAMBE ayebi makambo nyonso oyo bato bakutanaka na yango. Liloba na ye Biblia elobi ete: “Biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo.” (Baroma 8:22) Nzambe ayebi ete ezali na bamilio ya bato oyo bazali konyokwama mikolo nyonso na nzoto mpe na makanisi lokola Jayne. Nzambe amonaka bato milio 800 oyo balalaka nzala mokolo na mokolo, mpe bamilio mosusu oyo banyokwamaka na bandako, mpe ebele ya baboti oyo batungisamaka mpo na avenire ya bana na bango. Osilá komituna soki Nzambe akosilisa makambo yango? Na ntembe te, soki biso tolingaka kosalisa bato oyo tolingaka, bongo Nzambe akoki te kosalisa bato oyo akelá?
Soki osilá komituna mituna yango, yebá ete ozali yo moko te. Mbula koleka 2 600 liboso, Habakuku, moto moko ya sembo, amitungisaki ndenge ebele ya bato bazali komitungisa lelo, mpe atunaki Nzambe boye: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te? Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te? Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi, mpe ozali kokoba kotala motungisi? Mpo na nini kopunza ná mobulu ezali liboso na ngai, mpo na nini koswana ezali, mpe mpo na nini kowelana ezali kolonga?” (Habakuku 1:2, 3) Habakuku, mosakoli moko Moebre, amonaki na miso makambo ya nsɔmɔ mpe mobulu oyo ezalaki kosalema na ntango na ye. Lelo oyo, bansango ya ndenge wana oyo tozali koyoka mokolo na mokolo ezali kopesa bato ya motema mawa mpasi.
Nzambe atyolaki kolela ya Habakuku? Te. Ayokaki mituna ya Habakuku oyo eutaki mpenza na motema na ye mpe abɔndisaki mobali yango oyo azalaki komitungisa. Yehova Nzambe alendisaki kondima ya Habakuku na ndenge apesaki ye elaka ete akosilisa bampasi. Nsango ya elikya oyo Nzambe apesi ekoki mpe kobɔndisa yo ndenge ebɔndisaki Jayne mpe libota na ye. Masolo oyo elandi ekoyanola na mituna oyo: Ndenge nini tokoki mpenza kondima ete Nzambe atyelaka biso likebi? Nzambe akosala nini mpo na kosukisa bampasi nyonso, mpe ntango nini akosala yango?