Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/12 nk. 15-19
  • Batelá esengo na ntango ya mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá esengo na ntango ya mpasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova​—“Nzambe ya esengo”
  • Kozala na bokatikati ezali na ntina
  • Sepelá kosala mokano ya Nzambe
  • “Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”
  • Tiká Yehova akitisa yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ana azwaki kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tótya motema epai na Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Abondelaki Nzambe na motema mobimba
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/12 nk. 15-19

Batelá esengo na ntango ya mpasi

“Baoyo nyonso bazali kokima epai [ya Yehova] bakosepela; bakoganga na esengo libela na libela.”​—NZ. 5:11.

1, 2. (a) Wapi mwa makambo oyo epesaka mawa mingi lelo oyo? (b) Longola mikakatano oyo ekómelaka bato nyonso, bakristo ya solo basengeli koyika mpiko na makambo nini?

BATATOLI YA YEHOVA mpe bakutanaka na mikakatano oyo ekómelaka bato nyonso. Basaleli mingi ya Nzambe banyokwamaki na makambo lokola mobulu, bitumba, mpe makambo mosusu ya mabe. Makama, bobola, maladi, mpe liwa epesaka mawa mingi. Ntoma Paulo azalaki na ntina ya kokoma ete: “Toyebi ete biloko nyonso oyo ezalisamá ezali se kokimela elongo mpe konyokwama elongo tii sikoyo.” (Rom. 8:22) Tozali mpe konyokwama mpo na ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Ndenge moko na Mokonzi Davidi, tokoki koloba ete: “Mabunga na ngai eleki na motó na ngai; lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.”​—Nz. 38:4.

2 Longola mikakatano oyo ekómelaka bato nyonso, bakristo ya solo bazali komema nzete ya mpasi na ndenge ya elilingi. (Luka 14:27) Ya solo, ndenge esalemaki mpo na Yesu, bato bazali koyina mpe konyokola bayekoli na ye. (Mat. 10:22, 23; Yoa. 15:20; 16:2) Na yango, mpo na kolanda Kristo tosengeli kosala milende mingi mpe koyika mpiko wana tozali kozela mapamboli ya mokili ya sika.​—Mat. 7:13, 14; Luka 13:24.

3. Ndenge nini toyebi ete esengeli te ete bakristo bázala na bomoi ya mpasi mpo básepelisa Nzambe?

3 Yango elimboli nde ete bakristo bazali na bomoi oyo ezangá esengo? Bomoi na biso esengeli nde kotonda kaka na mawa mpe mpasi tii nsuka ekoya? Yehova alingi ete tózala na esengo wana tozali kozela kokokisama ya bilaka na ye. Mbala mingi, Biblia elobelaka basambeli ya solo ete bazali bato ya esengo. (Tángá Yisaya 65:13, 14.) Nzembo 5:11 elobi boye: “Baoyo nyonso bazali kokima epai [ya Yehova] bakosepela; bakoganga na esengo libela na libela.” Ya solo, tozali na likoki ya kozala mpenza na esengo, na kimya ya motema, mpe kosepela ata na kati ya mikakatano. Tótalela ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tózala kaka na esengo ata ntango tokutani na mikakatano.

Yehova​—“Nzambe ya esengo”

4. Nzambe ayokaka ndenge nini soki mokano na ye etosami te?

4 Tótalela ndakisa ya Yehova. Lokola azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mɔlɔ́ngɔ́ mobimba ezali na nse ya bokonzi na ye. Azangi eloko te mpe azali na mposa ya moto te. Nzokande, atako azali na nguya oyo ezangi nsuka, na ntembe te Yehova ayokaki mawa ntango moko na bana na ye ya elimo atombokaki mpe akómaki Satana. Na ntembe te, Nzambe ayokaki mpe mpasi ntango baanzelu mosusu bakɔtaki na botomboki yango na nsima. Kanisá mpe mpasi oyo Nzambe ayokaki ntango Adama ná Eva, bikelamu ya mayele oyo asalaki awa na mabele, bapesaki ye mokɔngɔ. Banda wana, bamiliare ya bakitani na bango bazali koboya bokonzi ya Yehova.​—Rom. 3:23.

5. Nini epesaka Yehova mpasi koleka?

5 Botomboki ya Satana ezali tii lelo. Na boumeli ya mbula soki 6 000, Yehova amoni ndenge bato bazali kosambela bikeko, kosala mobulu, koboma, mpe kosala makambo ya mbindo. (Eba. 6:5, 6, 11, 12) Lisusu, azali koyoka ndenge bato bazali koloba makambo minene ya lokuta mpo na ye mpe kofinga ye. Ata bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge ya solo, ntango mosusu basalaka makambo oyo epesaka ye mpasi. Biblia elobeli likambo moko ya ndenge wana na maloba oyo: “Mbala boni batombokelaki ye na esobe, bayokisaki ye motema mpasi na mokili oyo ekauká! Mpe mbala na mbala bamekaki Nzambe, mpe bayokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi.” (Nz. 78:40, 41) Na ntembe te, mpasi oyo Yehova ayokaka ntango basaleli na ye bapesi ye mokɔngɔ ezalaka makasi mpenza. (Yir. 3:1-10) Tomoni polele ete makambo ya mabe esalemaka, mpe Yehova ayokaka mawa mingi ntango esalemi.​—Tángá Yisaya 63:9, 10.

6. Nzambe asalaka nini liboso ya makambo oyo epesi ye mpasi?

6 Atako bongo, makambo ya mpasi epekisaka Yehova te azwa makambo na mabɔkɔ. Ntango mikakatano ebimaki, Yehova azwaki mbala moko bibongiseli mpo mbuma mabe oyo mokakatano yango ebimisaki ezala makasi koleka te. Azwaki mpe bibongiseli mpo nsukansuka mokano na ye ekokisama. Lokola azwaki bibongiseli ya malamu, Yehova azali kozela na esengo ntango oyo akolongisa boyangeli na ye mpe ndenge ekomemela basambeli na ye ya sembo mapamboli. (Nz. 104:31) Ya solo, atako makambo nyonso wana efingisi nkombo na ye, Yehova azali kaka “Nzambe ya esengo.”​—1 Tim. 1:11; Nz. 16:11.

7, 8. Ntango makambo ezali kotambola malamu te, ndenge nini tokoki komekola Yehova?

7 Ya solo, tokoki te komikokanisa na Yehova mpo na ndenge ya kosilisa mikakatano. Kasi, tokoki komekola ye ntango tokutani na mikakatano. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge toyokaka mawa ntango makambo ezali kotambola malamu te, kasi, tosengeli te kotikala kaka na mawa yango. Lokola tokelamá na elilingi ya Yehova, tozali na makoki ya kokanisa mpe tozali na mayele, oyo esalisaka biso tótalela mikakatano na biso mpe tósala oyo ekosilisa yango, soki likoki ezali.

8 Likambo moko ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tólonga mikakatano ya bomoi ezali koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo tokoki kosala eloko te mpo na yango. Kokanisakanisa makambo ya ndenge wana ekoki kobakisela biso mitungisi mpe kotinda biso tóbosana makambo mingi oyo epesaka biso esengo na losambo ya solo. Nsima ya kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosilisa mokakatano moko, ezali malamu tótika kokanisakanisa likambo yango mpe tótya makanisi na makambo ya malamu. Masolo ya Biblia oyo elandi emonisi yango malamu.

Kozala na bokatikati ezali na ntina

9. Ndenge nini Hana amonisaki bokatikati?

9 Tózwa ndakisa ya Hana, oyo akómaki mama ya mosakoli Samwele. Azalaki komitungisa mingi mpo azalaki kobota te. Bazalaki kotyola ye mpe kosɛka ye mpo azalaki ekomba. Na bantango mosusu, Hana azalaki mpenza kolɛmba nzoto; azalaki kolela mpe koboya kolya. (1 Sa. 1:2-7) Mokolo mosusu oyo akendaki na esika mosantu ya Yehova, “molimo ya Hana ekómaki bololo, bongo abandaki kobondela Yehova mpe kolela mingi.” (1 Sa. 1:10) Ntango Hana asilisaki koyebisa Yehova makambo oyo azalaki na yango na motema, nganga-nzambe monene Eli apusanaki pembeni na ye mpe alobaki boye: “Kende na kimya, mpe tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo, oyo osɛngi ye.” (1 Sa. 1:17) Na ntango wana, na ntembe te Hana amonaki ete asalaki nyonso oyo akokaki kosala. Azalaki na eloko mosusu ya kosala te mpo abota. Hana amonisaki bokatikati. Na nsima, “asimbaki nzela akei, mpe alyaki, mpe elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.”​—1 Sa. 1:18.

10. Ntango akutanaki na mokakatano oyo akokaki kosilisa te, ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki na makanisi malamu?

10 Ntoma Paulo mpe amonisaki ezaleli ya ndenge wana ntango azalaki na mokakatano. Azalaki na mokakatano moko oyo ezalaki kopesa ye mawa mingi. Abengaki yango “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” (2 Ko. 12:7) Ata soki ezalaki nini, Paulo asalaki oyo akokaki mpo mokakatano yango elongwa, abondelaki Yehova asunga ye. Mbala boni Paulo abondelaki Yehova mpo na likambo yango? Mbala misato. Na nsima, Nzambe amonisaki Paulo ete nzubɛ oyo azalaki na yango na kati ya mosuni ekolongwa na ndenge ya likambwisi te. Paulo andimaki yango mpe atyaki makanisi na ye na mosala ya Yehova.​—Tángá 2 Bakorinti 12:8-10.

11. Libondeli mpe lilɔmbɔ ezali na ntina nini ntango tozali na mokakatano?

11 Bandakisa yango elimboli te ete tosengeli kotika kobondela Yehova mpo na makambo oyo ezali kotungisa biso. (Nz. 86:7) Kutu, Liloba ya Nzambe eyebisi biso boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.” Yehova akosala nini na mabondeli mpe malɔmbɔ ya ndenge wana? Biblia ebakisi ete: “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Flp. 4:6, 7) Ya solo, mbala mosusu Yehova akolongola mokakatano na biso te; kasi mpo na koyanola mabondeli na biso, akoki kobatela makanisi na biso. Nsima ya kobondela mpo na likambo moko, tokoki komona ete komitungisa koleka ndelo ezali na likama.

Sepelá kosala mokano ya Nzambe

12. Mpo na nini kolɛmba nzoto ntango molai ekoki kozala likama?

12 Masese 24:10 elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Lisese mosusu elobi boye: “Mpo na mpasi ya motema elimo elɛmbaka.” (Mas. 15:13) Bakristo mosusu balɛmbi mpenza nzoto tii batiki kutu kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola Liloba ya Nzambe. Mabondeli na bango ekómi ya likolólikoló, mpe mbala mosusu bakómi komitangola na bandeko na bango bakristo. Emonani polele ete kolɛmba nzoto ntango molai ekoki kozala likama.​—Mas. 18:1, 14.

13. Wapi mwa makambo oyo ekoki kosala ete tólɛmba nzoto te kasi tózala na esengo?

13 Epai mosusu, kozala na makanisi ya malamu ekosalisa biso tótya makanisi na makambo oyo ekoki kopesa biso esengo na bomoi. Davidi akomaki boye: “Ee Nzambe na ngai, nasepeli kosala mokano na yo.” (Nz. 40:8) Ntango makambo ezali kotambola malamu te na bomoi na biso, tosengeli soki moke te kotika kosala makambo oyo tomesaná kosala na losambo na biso. Kutu, lolenge malamu ya kosilisa mawa, ezali nde komipesa na makambo oyo epesaka esengo. Yehova ayebisi biso ete tokoki kosepela mpe koyoka esengo soki tozali kotánga Liloba na ye mpe kotalatala na kati na yango mbala na mbala. (Nz. 1:1, 2; Yak. 1:25) Tozwaka “maloba ya kosepelisa” oyo ekoki kolendisa biso mpe kosepelisa mitema na biso, ezala na Makomami Mosantu to na makita ya lisangá.​—Mas. 12:25; 16:24.

14. Likambo nini oyo Yehova alaki epesaka biso esengo lelo oyo?

14 Nzambe apesi biso bantina mingi ya kozala na esengo. Elaka oyo Yehova apesi ete akobikisa biso epesaka esengo mingi mpenza. (Nz. 13:5) Toyebi ete ata soki tokutani na makambo nini lelo oyo, nsukansuka Nzambe akopesa mbano na baoyo balukaka ye na mposa makasi. (Tángá Mosakoli 8:12.) Mosakoli Habakuku amonisaki ete azalaki mpenza kondima likambo yango ntango akomaki ete: “Ata soki nzete ya figi ebimisi fololo te, mpe mbuma ezali te na banzete ya vinyo; ata soki mosala ya nzete ya olive eleki se mpamba, mpe mikala ya bilanga ebimisi bilei te; ata soki etonga esili mpenza na lopango, mpe bibwɛlɛ ezali te na bilanga ya lopango; ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko, nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.”​—Hab. 3:17, 18.

“Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”

15, 16. Tángá mwa makabo ya Nzambe oyo ekoki kosepelisa biso wana tozali kozela mapamboli ya mikolo ezali koya.

15 Wana tozali kozela makambo kitoko oyo ekosalema mpo na biso na mikolo ezali koya, Yehova alingi ete tósepela na makambo kitoko oyo azali kopesa biso. Biblia elobi ete: “Nayei koyeba ete eloko oyo eleki malamu mpo na [bato] ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi; mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.” (Mos. 3:12, 13) “Kosala malamu” elimboli mpe kosala makambo ya malamu mpo na bolamu ya basusu. Yesu alobaki ete esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa. Kosalela molongani, bana, baboti, mpe bandeko mosusu makambo ya boboto, epesaka esengo ya solosolo. (Mas. 3:27) Kozala na motema boboto, koyamba bapaya, mpe kolimbisa bandeko na biso bakristo epesaka mpe esengo mingi, mpe esepelisaka Yehova. (Gal. 6:10; Kol. 3:12-14; 1 Pe. 4:8, 9) Mpe kozala na elimo ya komipimela na mosala ya kosakola epesaka mbano monene.

16 Maloba ya Mosakoli oyo touti kotánga elobeli makambo mikemike oyo epesaka esengo na bomoi, na ndakisa kolya mpe komɛla. Ya solo, ata ntango tozali na mikakatano, tokoki koyoka esengo na biloko ya mosuni oyo Yehova azali kopesa biso. Longola yango, kotala ndenge moi elalaka, zamba moko kitoko, ndenge bana ya banyama bazali kosakana, mpe makambo mosusu ya kitoko oyo Nzambe akelá esɛngaka makambo mingi te, kasi yango ekoki kosepelisa biso mingi mpe kopesa biso esengo. Ntango tozali kokanisa na biloko yango, bolingo na biso mpo na Yehova ekobakisama, mpo ye nde Mopesi ya biloko nyonso ya malamu.

17. Nini ekolongola biso na mikakatano mpo na libela, mpe liboso tókóma kuna, nini ezali kobɔndisa biso?

17 Soki tozali kolinga Yehova, kotosa mibeko na ye, mpe kondimela mbeka ya lisiko, nsukansuka tokosikolama mpo na libela na mikakatano ya bomoi oyo ya kozanga kokoka mpe ekomemela biso esengo ya libela. (1 Yoa. 5:3) Kasi liboso tókóma kuna, tozali kobɔndisama na koyeba ete Yehova ayebi malamu makambo nyonso oyo ezali konyokola biso. Davidi akomaki boye: “Nakozala na esengo mpe nakosepela na motema boboto na yo, mpo omoni mpasi na ngai; oyebi bampasi ya molimo na ngai.” (Nz. 31:7) Lokola Yehova alingaka biso, akolongola biso na bampasi.​—Nz. 34:19.

18. Mpo nini basaleli ya Nzambe basengeli mpenza kozala na esengo?

18 Wana tozali kozela kokokisama ya bilaka ya Nzambe, tómekola Yehova, Nzambe ya esengo. Tótika te ete makanisi ya mabe epekisa biso tókoba kosalela Yehova. Ntango mikakatano ebimi, likoki na biso ya kokanisa mpe mayele etambwisa biso. Yehova akosalisa biso tóyeba kokanga motema mpe tósala makambo oyo tokoki mpo na kolɛmbisa bampasi oyo mikakatano yango ekoki kobimisa. Tósepela na makabo malamu oyo ezali kouta epai na ye, ezala ya mosuni to ya elimo. Soki tozali ntango nyonso penepene na Nzambe, tokozala na esengo mpamba te Biblia elobi ete “esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—Nz. 144:15.

Oyekoli makambo nini?

• Ntango tokutani na mikakatano, ndenge nini tokoki komekola Yehova?

• Ndenge nini kozala na bokatikati ekoki kosalisa biso tóbunda na mikakatano?

• Ntango mpasi ekómeli biso, ndenge nini tokoki kosepela kosala mokano ya Nzambe?

[Bililingi na lokasa 16]

Yehova ayokaka mawa mingi mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© G.M.B. Akash/​Panos Pictures

[Bililingi na lokasa 18]

Nzambe apesá biso makambo mingi oyo esalisaka biso tóbatela esengo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto