Tózala na esengo mpe na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe
YEHOVA alingi ozala na esengo. (Nz. 100:2) Lokola ozali mosaleli na ye, na ntembe te ozali mpe na mingi ya kosala. Mbala mosusu, ntango omipesaki na Nzambe ozalaki mpenza na mingi ya kosala te, kasi sikoyo mosala ya mosuni mpe makambo ya elimo ekoki kosala ete oyoka lokola omemi kilo. Ntango mosusu okoki komipesa foti soki olongi te kosala makambo nyonso oyo okanaki. Okoki kosala nini mpo ozala na bokatikati mpe obatela “esengo ya Yehova”?—Neh. 8:10.
Lokola ozali na bomoi na ntango ya mpasi mpenza mpe ozali na makambo mingi ya kosala, osengeli kozala na programɛ ya malamu. Na likambo yango, batoli mosusu oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekosalisa yo mpenza: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi, mpo mikolo ezali mabe.”—Ef. 5:15, 16.
Na kolanda toli wana ya bwanya, ndenge nini okoki komityela mikano oyo okolonga kokokisa mpe kozala na bokatikati na oyo etali koyekola yo moko, kokokisa bamposa ya libota, kobima mosala ya kosakola, mosala ya mosuni mpe makambo mosusu ya ntina?
Ozali koyeba lisusu esengo oyo oyokaki ntango omipesaki na Nzambe mpe ozwaki batisimo? Okómaki na esengo mpo oyebaki Yehova mpe mikano na ye. Mbala mosusu esɛngaki basanza mingi ya koyekola na mozindo mpo oyeba makambo yango mpe okóma na esengo. Kasi, na ntembe te, milende yango ezalaki ya mpamba te. Boyekoli yango ebongisaki bomoi na yo.
Mpo obatela esengo na yo, osengeli kokoba komileisa na elimo. Soki ozali kokoka te kozwa ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia, osengeli kotalela lisusu programɛ na yo. Koyekola mpe komanyola ata miniti moke mokolo na mokolo ekosalisa yo opusana penepene na Yehova, mpe yango ekobakisa mpenza esengo na yo.
Basaleli mingi ya Nzambe bakoki komisombela ntango ya kosala makambo ya ntina soki batiki kolekisa ntango na makambo oyo ezali na ntina mingi te. Omituna boye, ‘Ntango boni nalekisaka na kotánga bazulunalo ya mokili, kotala televizyo, koyoka miziki, to na kominanola?’ Makambo wana ekoki kopesa esengo kaka soki tozali kosala yango na bokatikati. (1 Tim. 4:8) Soki omoni ete ozali kosalela ntango na yo malamu te, luká ndenge oyo okoki kobongisa programɛ na yo.
Adam, oyo azali na mwasi mpe bana misato, mpe azali nkulutu, ayebisi likambo oyo esalisaka ye; alobi boye: “Nasalaka makasi nazala na bomoi ya pɛpɛlɛ. Naboyaka kosala makambo oyo nalingaka kasi elyaka ntango mpe kozala na biloko oyo esɛngaka likebi mingi. Yango elimboli te ete naboyaka bisengo nyonso ya bomoi; nasalaka nde kaka masano oyo ezangi mindɔndɔ.”
Kokanisa matomba ya bikateli na yo ekoki kozongisa esengo na yo mpe kosalisa yo otalelaka mikolo ezali koya na ndenge ya malamu. Na ndakisa, Mariusz, nkulutu oyo azali na bana misato, alobi boye: “Ntango nabandaki koyekola Biblia, nakómaki na elikya mpo na mikolo ezali koya. Tii lelo, nakutanaka na mikakatano mbala na mbala, mpe kaka Yehova nde ayebi mikakatano yango mingi. Kasi, lokola azali kosunga ngai, nazali kozela mikolo ezali koya mpe nazali na esengo.”
Ndenge ndakisa ya Mariusz emonisi yango, kozala na makanisi malamu ekolongola te mitungisi na yo nyonso. Kasi, ekoki kosalisa yo omiyoka malamu koleka mpe olonga kobundisa mikakatano ya bomoi. Biblia elobi boye: “Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe; kasi ye oyo azali na motema ya esengo azalaka na fɛti ntango nyonso.” (Mas. 15:15) Kanisá mpe bolingo oyo Nzambe asili komonisela yo. Yango ekoki kokómisa bolingo na yo mpo na ye makasi mpe kosala ete osepela na ye lisusu mingi.—Mat. 22:37.
Kotya Yehova mpe mosala na ye na esika ya liboso ebakisaka esengo na libota. Soki bato ya libota na bino bazali komonisa bizaleli ya bokristo, matata ekozala mingi te mpe yango ekosala ete bózala na boyokani makasi mpe bósololaka malamu. Na ndenge yango, ndako na bino ekozala mpenza esika ya kimya mpe bomoko ekozala na libota mobimba.—Nz. 133:1.
Kosala makambo ya elimo elongo mpe epesaka esengo ya solosolo na libota. Mariusz alobi boye: “Nasepelaka mingi na ntango oyo tolekisaka elongo na libota. Mwasi na ngai asalisaka ngai mingi. Soki likoki ezali, abimaka na ngai na mosala ya kosakola, akendaka elongo na ngai mpo na kopɛtola stade liboso ya mayangani ya minene, mpe ntango nakei kosala masukulu na masangá mosusu. Yango elendisaka ngai mingi.”
Biblia elendisi bakristo bákokisaka bamposa ya mosuni ya mabota na bango. (1 Tim. 5:8) Kasi, soki mosala ya mosuni ezali kozwa ntango mpe makasi na yo nyonso, yango ekoki kosilisa yo esengo na mosala ya Nzambe. Yebisá Yehova likambo yango na libondeli. (Nz. 55:22) Nsima ya kokanisa, bato mosusu bamonaki ete mpo na bango, kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso esɛngaki báluka mosala mosusu. Mokristo moko te asengeli kotika ete mbongo oyo azali kozwa na mosala oyo ezali kosilisa ye ntango mpe makasi epekisa ye atya likebi na makambo oyo eleki ntina, makambo ya elimo.—Mas. 22:3.
Okoki komona ete ezali malamu okoma matomba mpe makambo mabe ya mosala oyo olingi kozwa to oyo ozali na yango. Ya solo, tolingaka kozala na mosala ya malamu mpe oyo efutaka mbongo mingi. Kasi, mosala oyo ozali na yango sikoyo ezali kopesa yo nzela osalisa libota na yo ezala makasi na elimo? Talelá makambo nyonso wana na bosembo, mpe zwá bikateli oyo ekosala ete boyokani na yo ná Yehova ezala na esika ya liboso.
Soki mosala oyo ozali na yango sikoyo ekoki te kosalisa yo obongisa boyokani na yo ná Yehova, osengeli koluka ndenge ya kobongisa makambo. Bakristo mingi babongolaki makambo minene na bomoi na bango mpo bákoka kozwa ntango ya kosala makambo ya elimo. Ndeko mobali moko na Pologne alobi boye: “Na ntango moko, nasengelaki kaka kolongwa na kompanyi oyo nazalaki kosala mpo mbala mingi, nazalaki kosala mibembo mpo na mosala. Nazalaki mpenza na ntango te mpo na komipesa na makambo ya elimo mpe kobatela libota na ngai.” Lelo oyo, azwá mosala oyo esɛngaka ye ntango mpe makasi mingi te.
Kosalisa basusu ekopesa yo esengo
Yesu alobaki ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Bakristo bazali na mabaku mingi ya kopesa. Ntango mosusu, komungamunga ya solo, kopesa mbote ya mabɔkɔ na esengo, to kopesa ndeko oyo asali mosala makasi mpo na kokokisa mokumba moko na lisangá matɔndi oyo euti na motema, ekoki kozala nyonso oyo esengelaki mpo na kopesana esengo.
Ntoma Paulo alendisaki bakristo ete: “Bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo enyokwami na makanisi, bósalisa bato ya bolɛmbu.” (1 Tes. 5:14) Milimo oyo enyokwami na makanisi bakoki komona ete bakokoka te kolonga mikakatano na makasi na bango moko. Okoki kosalisa bato ya ndenge wana? Soki omoni ete ndeko moko azali lisusu na esengo te na mosala ya Yehova, meká kolendisa ye. Kosala bongo ekolendisa mpe yo moko. Ezali na makambo mosusu oyo bato bakoki kosilisa te. Kasi, okoki mpenza koyokela ndeko na yo mawa mpe kolendisa ye atya motema na lisungi ya Yehova, oyo ekoki kozanga ata mokolo moko te. Bato oyo basalaka bongo bakoyoka nsɔni ata mokolo moko te.—Nz. 27:10; Yis. 59:1.
Likambo mosusu ya kosala ezali kosɛnga moto oyo omoni lokola abungisi esengo na ye bóbima na ye na mosala ya kosakola. Ntango Yesu atindaki bayekoli 70, atindaki bango “mibalemibale.” (Luka 10:1) Omoni te ete na ndenge yango apesaki bango libaku ya kolendisana? Yo mpe okoki kobimaka na mosala ya kosakola na bandeko mosusu oyo babungisi esengo mpo olendisa bango?
Ya solo, bomoi ezali na makambo mingi oyo tokoki komitungisa mpo na yango. Atako bongo, Paulo alendisi biso boye: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo. Nakoloba lisusu ete: Bósepelaka!” (Flp. 4:4) Lokola olingaka Nzambe, otosaka ye, mpe ozali molende na mosala oyo apesá yo, bomoi na yo ezali na ntina. Yango epesaka yo esengo. Longola yango, Yehova asalisaka yo oyeba ndenge ya kosala mpo na makambo mpe mikakatano oyo ozali kokutana na yango.—Rom. 2:6, 7.
Na miso ya kondima, tozali komona ndenge tokómi mpenza pene ya mokili ya sika oyo Yehova alaki. Tokozala na mapamboli mpe makambo mingi oyo ekopesa biso mpenza esengo! (Nz. 37:34) Na yango, tokoki kozala na esengo, tóbosana te ete Yehova azali kopambola biso mingi ata lelo oyo. Yango wana, tokoki ‘kosalela Yehova na esengo.’—Nz. 100:2.
[Etanda na lokasa 8]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Ekoki kosɛnga ete obongisa ndenge na yo ya kosalela ntango mpo obatela esengo na yo
MASANO mpe KOMINANOLA
NDAKO mpe KOBATELA LIBOTA
MOSALA
MAKITA YA BOKRISTO
KOYEKOLA YO MOKO
MOSALA YA KOSAKOLA
[Bililingi na lokasa 10]
Okoki kosalisa basusu bázongela esengo na bango?