Oyo Yesu ateyaki na ntina na ye moko
“Yesu ayebaki malamumalamu soki azalaki nani, autaki wapi, mpo na nini ayaki na mokili, mpe nini ezalaki kozela ye na mikolo oyo ezalaki koya.”—HERBERT LOCKYER.
LIBOSO tóndima makambo oyo Yesu ateyaki, tosengeli koyeba naino makambo etali ye. Azalaki nani mpenza? Autaki wapi? Mokano na ye na bomoi ezalaki nini? Na Evanzile ya Matai, Marko, Luka mpe Yoane, tokoki koyoka biyano na monɔkɔ ya Yesu, atako tozalaki wana te ntango alobaki maloba yango.
Azalaki na bomoi liboso abotama awa na mabele Mokolo moko Yesu alobaki boye: “Liboso Abrahama azala, ngai nazalaki.” (Yoane 8:58) Abrahama azalaki na bomoi mbula soki 2 000 liboso Yesu abotama. Atako bongo, Yesu azalaki na bomoi liboso moto wana ya sembo abotama. Kasi, Yesu azalaki wapi liboso? Alobaki boye: “Nakitaki uta na likoló.”—Yoane 6:38.
Mwana ya Nzambe Yehova azali na bana to baanzelu mingi. Kasi, Yesu aleki bango. Yesu alobaki ete azali ‘Mwana ya Nzambe, mwana se moko oyo abotamaki.’ (Yoane 3:18) Maloba wana emonisi ete Yesu azali ekelamu kaka moko oyo Nzambe akelaki ye moko. Na nzela ya mwana se moko oyo abotamaki, Nzambe akelaki biloko mosusu nyonso.—Bakolose 1:16.
“Mwana ya moto” Yesu asalelaki maloba yango mbala mingi mpo na ye moko. (Matai 8:20) Na ndenge yango amonisaki ete azalaki te anzelu oyo alataki nzoto ya moto to bomoi oyo ebongwanaki ndenge mosusu. Kasi, azalaki nde moto mpenza. Na nzela ya elimo santu na ye, Nzambe alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe atindaki yango awa na mabelé, mpe asalaki ete Maria, elenge mwasi oyo ayebaki mibali te akóma na zemi. Yango wana Yesu abotamaki moto ya kokoka, moto oyo azangá lisumu.—Matai 1:18; Luka 1:35; Yoane 8:46.
Masiya oyo alakamaki Mwasi Mosamaria moko alobaki na Yesu ete: “Nayebi ete Masiya azali koya.” Yesu ayanolaki ete: “Ngai oyo nazali koloba na yo nde ye.” (Yoane 4:25, 26) Liloba “Masiya” ndenge moko na liloba “Kristo” elimboli ‘oyo atyami mafuta.’ Yesu atyamaki mafuta, to Nzambe aponaki ye mpo akokisa mokumba moko ya ntina na kokokisama ya bilaka na ye.
Mokumba na ye ya libosoliboso Yesu alobaki mokolo mosusu ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . , mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Atako asalaki makambo mingi ya malamu mpo na bato oyo bazalaki na bosɛnga, kosakola Bokonzi ya Nzambe ezalaki likambo ya libosoliboso na bomoi. Makambo oyo ateyaki mpo na Bokonzi yango ekolobelama na nsima.
Emonani polele ete Yesu azalaki te lokola bato nyonso.a Ndenge tokomona, bomoi oyo azalaki na yango na likoló elimbolaki mpenza polele maloba oyo alobaki awa na mabele. Tokoki mpenza kokamwa te ndenge nsango oyo asakolaki ebongolá bomoi ya bamilio ya bato na mokili?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali Yesu mpe mokumba oyo azali na yango na mokano ya Nzambe, talá mokapo 4, na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.