Oyo Yesu ateyaki na ntina na Nzambe
“Moto kaka moko oyo ayebi mpenza Tata ezali Mwana. Kasi Mwana alingi koyebisa basusu na ntina na Tata, mpo bango mpe báyeba ye.”—LUKA 10:22, CONTEMPORARY ENGLISH VERSION.
LIBOSO aya awa na mabele, Mwana ya liboso ya Nzambe alekisaki ntango molai elongo na Tata na ye. (Bakolose 1:15) Na yango, Mwana yango ayebaki makanisi mpe banzela ya Tata na ye. Na nsima, ntango Mwana yango ayaki awa na mabele, azalaki mpenza na mposa makasi ya koteya solo na ntina na Tata na ye. Tokoki koyekola makambo mingi na ntina na Nzambe soki toyoki oyo Mwana yango alobaki.
Nkombo ya Nzambe Nkombo ya Nzambe, Yehova, ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu. Mwana wana ya bolingo azalaki na mposa ete basusu báyeba mpe básalela nkombo ya Tata na ye. Nkombo ya Yesu elimboli: “Yehova azali mobikisi.” Na butu liboso akufa, Yesu abondelaki boye: “Nayebisi . . . nkombo na yo.” (Yoane 17:26) Ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu asalelaki nkombo ya Nzambe mpe alakisaki bato mosusu nkombo yango. Kasi, ndenge nini bato oyo bazalaki koyoka Yesu bakokaki koyeba solo na ntina na Yehova kozanga báyeba nkombo na ye mpe makambo oyo alingaka?a
Bolingo monene ya Nzambe Mokolo moko Yesu abondelaki Nzambe boye: “Tata, . . . olingaki ngai liboso ya ebandeli ya mokili.” (Yoane 17:24) Lokola amonaki bolingo ya Nzambe na likoló, ntango Yesu azalaki awa na mabele alukaki komonisa bolingo yango na ndenge mingi.
Yesu amonisaki ete bolingo ya Yehova ezali monene. Alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mokili” elimboli te “mabele.” Ndenge esalelami na vɛrsɛ oyo, elimboli nde bato—bato nyonso mpenza. Lokola Nzambe alingaka bato mingi mpenza, yango wana apesaki Mwana oyo alingaka mingi koleka mpo ete bato ya sembo básikolama na boombo ya lisumu mpe liwa mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. Tokoki te kososola bolingo monene wana ya Nzambe.—Baroma 8:38, 39.
Yesu alobaki likambo moko ya solo mpenza: Yehova alingaka mpenza mosambeli na ye mokomoko. Yesu ateyaki ete Yehova azali lokola mobateli ya mpate oyo ayebi ete atako bampate na ye nyonso ezali ndenge moko te, kasi mokomoko ezali na motuya mingi. (Matai 18:12-14) Yesu alobaki ete ata mokɛngɛli-mboka moko te ekoki kokwea na mabele kozanga Yehova ayeba. Yesu abakisaki boye: “Nsuki nyonso ya motó na bino etángami.” (Matai 10:29-31) Soki Yehova azali na likoki ya koyeba ete mokɛngɛli-mboka moko ezali te na zumbu na ye, omoni te ete amonaka mpe amibanzabanzaka mingi koleka mpo na mosambeli na ye mokomoko? Soki Yehova akoki kotánga nsuki mokomoko ya motó na biso mpe ayebaka yango, ezali mpenza na likambo moko ya bomoi na biso—bamposa na biso, mikakatano mpe mitungisi na biso, oyo ye akoki koyeba te?
Tata ya likoló Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, Yesu azali Mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki. Tokoki kokamwa te ete Mwana yango ya bolingo azalaki mbala mingi kobenga Yehova mpe koloba ete azali “Tata” na ye. Kutu, na maloba ya liboso oyo ezali na Biblia, oyo Yesu alobaki na tempelo ntango azalaki kaka na mbula 12, abengaki Yehova “Tata na ngai.” (Luka 2:49) Liloba “Tata” emonani mbala soki 190 na Baevanzile. Yesu asalelaki maloba ndenge na ndenge mpo na Yehova, na ndakisa “Tata na bino,” “Tata na biso,” mpe “Tata na ngai.” (Matai 5:16; 6:9; 7:21) Ndenge Yesu azalaki kobenga Nzambe bongo kozanga kokakatana, amonisaki ete ata bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka bakoki kozala na boyokani malamu na Yehova.
Ayokaka mawa mpe alimbisaka Yesu ayebaki ete bato ya kozanga kokoka bazali mpenza na mposa ya motema mawa ya Yehova. Na ndakisa oyo apesaki ya mwana ya mobulu, Yesu akokanisaki Yehova na tata ya motema mawa, oyo alimbisaka, oyo atandaka mabɔkɔ mpo na koyamba mwana na ye oyo abongoli motema. (Luka 15:11-32) Na yango, maloba ya Yesu esalisi biso tóyeba ete Yehova alukaka komona ata mbongwana ya moke na motema ya mosumuki oyo ekoki kotinda ye amonisela ye motema mawa. Yehova azalaka mpenza na mposa ya kolimbisa mosumuki oyo abongoli motema. Yesu alobaki ete: “Nazali koyebisa bino ete esengo ekozala mingi ndenge wana na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema koleka mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa (99) oyo basengeli kobongola motema te.” (Luka 15:7) Nani akolinga te kopusana pene ya Nzambe yango oyo ayokelaka bato mawa?
Ayokaka mabondeli Ntango azalaki naino na likoló, Yesu amonaki libosoliboso ete Yehova azali “Moyoki ya libondeli” mpe asepelaka na mabondeli ya basambeli na ye ya sembo. (Nzembo 65:2) Yango wana, na boumeli ya mosala na ye, Yesu ateyaki bayoki na ye ndenge ya kobondela mpe makambo oyo bakoki kobondela mpo na yango. Apesaki bango toli ete: “Kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.” Alendisaki bango bábondelaka mpo mokano ya Nzambe “esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” Tokoki mpe kobondela mpo na kosɛnga bilei ya mokolo na mokolo, bolimbisi ya masumu na biso mpe mpo na kolonga komekama. (Matai 6:5-13) Yesu ateyaki ete Yehova ayanolaka na mabondeli ya basaleli na ye lokola tata, mpe ayanolaka makambo oyo basɛngaka ye na kondima.—Matai 7:7-11.
Mpo na koloba solo, Yesu alukaki koteya solo na ntina na Yehova mpe lolenge ya Nzambe oyo azali. Kasi ezalaki na likambo mosusu oyo Yesu azalaki na mposa makasi ya kosakola—likambo oyo Yehova akosala mpo na kosala mbongwana na mokili mobimba mpo na kokokisa mokano na ye mpo na mabele oyo mpe bato. Kutu, likambo yango ezalaki motó ya likambo ya mosala na ye ya kosakola.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo Yehova emonani mbala soki 7 000 na makomi ya Ebre. Ndimbola oyo eyokani na nkombo yango ezali “nakozala oyo nakozala.” (Kobima 3:14) Nzambe akoki kokóma lolenge nyonso oyo amoni ete esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Na yango, nkombo yango epesi ndanga ete Nzambe akozala ntango nyonso sembo na maloba na ye mpe likambo nyonso oyo alaki ekokokisama.