Moto oyo molongani akufá azalaka na mposa ya nini? Ndenge nini okoki kosalisa ye?
Na kuku na ye ya molili na kati ya mwa apartema na ye, Jeanne atandi mesa kozanga kokanisa. Alingi kolya mwa eloko. Na mbala moko, amoni basaani mibale oyo atye na mesa . . . mpe abandi kolela. Ndenge amesaná, atandi mesa mpo na bato mibale! Eleki mbula mibale banda mobali na ye oyo alingaki mingi akufá.
BAOYO bakutaná na likambo yango te, bakoki koyeba te mpasi oyo moto ayokaka soki abungisi molongani na ye. Ya solo, makanisi ya moto emesanaka kaka mokemoke na likambo wana ya mpasi. Beryl, oyo azali na mbula 72, akokaki te kondima liwa ya mbalakaka ya mobali na ye. Alobi boye: “Ezalaki lokola ndɔtɔ. Nakokaki kondima te ete akokɔta na ndako lisusu te.”
Soki bakati moto enama moko, ntango mosusu “ayokaka” ete enama yango ezali kaka. Ndenge moko mpe, soki moto abungisi molongani na ye akoki “komona” ye na kati ya ebele ya bato to komona ete azalaki koloba likambo moko na molongani na ye oyo azali lisusu te!
Mbala mingi, baninga mpe bandeko bayebaka te soki bakosala nini ntango ndeko na bango azali konyokwama mpo abungisi molongani. Oyebi moto moko oyo molongani na ye akufá? Na yango, ndenge nini okoki kosalisa ye? Makambo nini osengeli koyeba mpo osalisa baoyo bazali na mpasi mpo molongani akufá? Ndenge nini okoki kosalisa moto oyo molongani na ye akufi akóma lisusu kosepela na bomoi mokemoke?
Makambo oyo tosengeli kosala te
Baninga mpe bandeko bakoki kotungisama mingi na mpasi oyo ndeko na bango azali koyoka mpe, mpo na kosalisa ye, bakoki koluka kopekisa ye alela ntango molai. Nzokande, moto moko ya mayele oyo atunaki bato 700 oyo babungisaki balongani na bango, akomaki boye: “Ndelo ya ‘malamu’ oyo moto asengeli kotika kolela ezali te.” Na yango, na esika ya koluka kopekisa molongani oyo atikali alela, bótikela ye ntango abimisa mpasi na ye.—Ebandeli 37:34, 35; Yobo 10:1.
Atako ekoki kozala malamu osalisa na makambo oyo etali kokundama ya ebembe, kokanisa te ete osengeli kotambwisa makambo nyonso oyo etali likambo yango. Paul, oyo azali na mbula 49 mpe abungisá mwasi na ye, alobi boye: “Namoni ete ezalaki malamu ndenge baoyo basalisaki ngai mpenza bazalaki kaka kotikela ngai nzela ya kozwa bikateli oyo esengeli mpo na likambo yango. Mpo na ngai, ezalaki na ntina mingi nasala nyonso mpo likambo nyonso eleka malamu na molulu ya kokunda mwasi na ngai. Namonaki ete ezali eloko ya nsuka oyo nakokaki kosala mpo na kokumisa ye.”
Ya solo, bato mingi basepelaka na mwa lisalisi. Eileen, oyo azali na mbula 68 mpe abungisá mobali na ye, alobi boye: “Kobongisa bokundami mpe mikanda ya Leta ezalaki mpasi, mpo makanisi na ngai ezalaki kimya te. Kasi, mwana na ngai ya mobali ná mwasi na ye basalisaki ngai mingi.”
Lisusu, kobanga te kolobela moto oyo akufi. Beryl, oyo tolobelaki likoló, alobi boye: “Baninga na ngai bazalaki kosalisa ngai mingi. Kasi, namonaki ete mingi bazalaki koboya koloba makambo etali John, mobali na ngai. Ezalaki kaka lokola nde John azalaki na bomoi ata mokolo moko te, mpe ezalaki kosala ngai mwa mpasi.” Nsima ya mikolo, baoyo molongani na bango akufá bakoki kolinga kosolola polele mpo na molongani na bango. Oyebi lisusu likambo moko to lisolo moko ya kosɛkisa oyo etali mowei? Boye, sɛngá molongani oyo atikali soki okoki koyebisa ye yango; kotika te ete kobanga ezongisa yo nsima. Soki omoni ete akosepela na lisolo yango, yebisá ye makambo oyo kolinga epai ya molongani yango to mpe makambo oyo ezali kopesa yo mawa. Kosala bongo ekoki kosalisa moto oyo azali kolela molongani na ye amona ete bato bazali kolela elongo na ye.—Baroma 12:15.
Ntango ozali kosalisa moto oyo azali kolela molongani na ye, kopesa ye batoli ebeleebele te. Kotya ye mbamba te mpo azwa bikateli mbangumbangu.a Zalá nde na bososoli mpe omituna boye: ‘Makambo nini ya malamu nakoki kosala mpo na kosalisa moninga to ndeko na ngai oyo akɔti na moko ya bambongwana oyo eleki mpasi mingi na bomoi?’
Makambo oyo okoki kosala
Na mikolo oyo elandi liwa ya molongani na ye, molongani oyo atikali akoki kondima lisalisi oyo esengeli. Okoki kolambela ye eloko ya kolya, kopesa bato oyo bayei kotala ye esika ya kolala, to kolekisa ntango elongo na ye?
Osengeli mpe koyeba ete mibali ná basi bakeseni na oyo etali koyika mpiko na mpasi ya kobungisa molongani to mpe ya koyoka ete batikali kaka bango moko. Na ndakisa, na bisika mosusu, soki ozwi mibali zomi, mibali koleka mitano oyo basi na bango bakufá babalaka liboso sanza 18 eleka—eloko oyo esalemaka mingi te epai ya basi. Mpo na nini bokeseni ya ndenge wana?
Na bokeseni na ndenge oyo bato mingi bakanisaka, mibali babalaka lisusu kaka te mpo na kokokisa bamposa ya nzoto. Nzokande, momeseno oyo mibali bazalaka na yango ya kofungola motema kaka na basi na bango nde etindaka mobali amiyoka ete atikali mpenza kaka ye moko nsima ya liwa ya mwasi na ye. Kasi, mbala mingi basi bazwaka lisungi oyo ekitisaka bango motema, atako mbala mosusu baninga ya mobali babosanaka bango. Momeseno wana ya mibali nde emonisi mwa moke mpo na nini mibali bamonaka ete kobala lisusu nde ekoki kosilisa mpasi na bango ya komiyoka ete batikali kaka bango moko—atako kosala bongo ekoki kotinda bango bákɔta na libala ya mbangumbangu. Na yango, basi bazalaka na makoki mingi ya kobunda na mpasi ya komiyoka ete batikali kaka bango moko.
Ndeko to moninga na yo azala mobali to mwasi, okoki kosala nini mpo na kolɛmbisa mpasi wana ya komiyoka ete atikali kaka ye moko? Helen, oyo azali na mbula 49 mpe oyo mobali akufá, alobi boye: “Mingi bazalaka na makanisi malamu, kasi basalaka eloko te. Mbala mingi bakoloba ete, ‘Soki ezali na eloko oyo nakoki kosala, yebisá ngai.’ Kasi nasepelaki ntango bamosusu balobaki na mbala moko, ‘Nakei wenze. Tokoki kokende elongo?’” Paul, oyo mwasi na ye akufaki na kanser, alimboli ntina oyo azalaki kosepela soki babengisi ye. Alobi boye: “Na bantango mosusu, okoyoka ete ozali na mposa ya kosolola na bato te to koyebisa bango likambo na yo. Kasi nsima ya kolekisa mpokwa moko elongo na baninga, omiyoki malamu; okomiyoka mpenza te ete otikali kaka yo moko. Oyebi ete bato bazali komibanzabanza mpo na yo, mpe yango esalisaka mpenza.”b
Ntango oyo basepelaka mingi basusu bámitya na esika na bango
Helen amonaki ete ntango bandeko na ye mingi bazongelaki bomoi na bango ya mokolo na mokolo nde akómaki na mposa makasi ya libɔndisi. Alobi boye: “Baninga mpe bandeko bakozala na yo na ebandeli, kasi na nsima bomoi na bango ezongi nde ezalaka. Nzokande, oyo ya yo ezongi naino te.” Soki bayebi likambo yango, baninga ya solo basengeli kozala wana mpo na kokoba kosalisa.
Mbala mosusu moto oyo molongani na ye akufá akoki kozala na mposa ya kozala elongo na basusu mingimingi na mikolo ya anivɛrsɛrɛ, na ndakisa ya libala na bango to ya liwa ya molongani na ye. Eileen, oyo tolobelaki likoló, alobi ete mwana na ye ya mobali oyo akómi mokóló asalisaka ye amiyoka te ete atikali kaka ye moko na anivɛrsɛrɛ ya libala na bango. Alobi boye: “Mbula nyonso, mwana na ngai Kevin abimisaka ngai mokolo wana mobimba. Tolyaka elongo, mpe ezalaka kaka likambo ya mama ná mwana.” Mpo na nini te koluka koyeba mikolo wana ya mpasi mingi mpo na ndeko moko ya libota to mpo na moninga moko oyo abungisá molongani? Okoki bongo kozwa bibongiseli mpo ete yo moko to bato mosusu bázala elongo na moto yango na mokolo wana ya mpasi.—Masese 17:17.
Bato mosusu bamonaka ete bato oyo babungisá mpe molongani bakoki kobɔndisa. Mpo na boyokani na ye ná mwasi mosusu oyo abungisá mpe molongani na ye, Annie, oyo molongani akufá eleki mbula mwambe, alobi boye: “Milende na ye esimbaki mpenza motema na ngai mpe elendisaki ngai nakoba kokende liboso.”
Ya solo, soki mpasi ya ebandeli eleki, bato oyo balongani na bango bakufá bakoki koyeba kopesa basusu makanisi mpe elikya. Biblia elobeli basi mibale oyo mibali na bango bakufaki: elenge Ruta ná bokilo na ye Naomi; basalisanaki. Lisolo wana ya mawa elobeli ndenge boboto oyo basi wana mibale bamoniselanaki esalisaki bango bákitisa mpasi na bango mpe bámesana na makambo oyo bakutanaki na yango.—Ruta 1:15-17; 3:1; 4:14, 15.
Ntango ya kobika
Mpo azongela mpenzampenza bomoi ndenge ezalaka, moto oyo molongani akufá asengeli kokanisa molongani na ye, kozanga abosana bamposa na ye moko ya sikoyo. Salomo, mokonzi ya bwanya andimaki ete ezali na “ntango ya kolela.” Kasi alobaki mpe ete esengeli kozala na “ntango ya kobika.”—Mosakoli 3:3, 4.
Paul, oyo tolobelaki liboso, amonisi ndenge ezali mpasi kobosana bomoi ya kala. Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai, tozalaki lokola mwa nzete mibale oyo ekolaki, ekangani esika moko. Kasi na nsima nzete moko ekufaki mpe balongolaki yango, mpe nzete mosusu oyo etikalaki emonanaki ete etɛngamá. Ezalaki kosimba te nazala kaka ngai moko.” Mpo na komonisa bosembo epai ya molongani oyo akufá, basusu baboyaka kobosana bomoi na bango ya kala. Basusu bamonaka ete kosepela na bomoi ezali lokola kozanga bosembo epai ya molongani oyo akufá, na yango baboyaka kobima mpe kosangana na baninga. Ndenge nini tokoki kosalisa na boboto bato oyo balongani na bango bakufá mpo bábika—mpo bákoba na bomoi na bango?
Likambo ya liboso ekoki kozala nde kosalisa moto abimisa mayoki na ye. Herbert, oyo mwasi na ye akufaki eleki mbula motoba, alobi boye: “Nasepelaka mingi ntango bato oyo bayei kotala ngai bafandi kimya mpe bazali kolanda ndenge nazali kolobaloba makambo ya kala to likambo moko oyo ezali na motema na ngai na ntango wana. Mbala mosusu nazalaki kosepelisa bango te, kasi nazalaki kosepela mingi ndenge bazalaki komitya na esika na ngai.” Paul asepelaki mingimingi ndenge moninga moko oyo akɔmɛli azalaki kosala: azalaki ntango nyonso kotuna ye ndenge azali komiyoka na motema. Paul alobi boye: “Nazalaki kosepela ndenge azalaki kosala na makanisi malamu mpe na boboto mpe mbala mingi nazalaki koyebisa ye ndenge nazalaki komiyoka na ntango wana.”—Masese 18:24.
Soki azali kobimisa mayoki ndenge na ndenge, na ndakisa mawa, komipesa foti, to nkanda, boye moto oyo azali kolela molongani akómi pene mpo na kondima bomoi na ye ya sika. Mpo na Mokonzi Davidi, kosopa motema liboso ya Yehova Nzambe, moto oyo abongi mpenza kofungolela ye motema, nde esalisaki ye azwa makasi ya ‘kotɛlɛma’ mpe ya kondima likambo wana ya mpasi, elingi koloba liwa ya mwana na ye ya mobali.—2 Samwele 12:19-23.
Atako na ebandeli ezalaka naino mpasi, nsukansuka esɛngaka moto oyo molongani akufi azongela bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Okoki kokɔtisa ye na misala na yo mosusu ya mokolo na mokolo, na ndakisa kokende wenze to kokende kotambola? Okoki kosɛnga moninga na yo asalisa yo na mwa misala? Ezali lolenge mosusu ya kosalisa moto atika kozala kaka ye moko. Na ndakisa, soki azali mwasi, okoki kosɛnga ye atikala na bana ntango obimi to alakisa yo ndenge ya kolamba eloko moko oyo alambaka malamu? Soki azali mobali, okoki kosɛnga ye asalisa yo na kobongisa ndako? Kosɛnga ye asala bongo ekopesa ye kaka mosala te oyo ekolendisa ye, kasi ekomonisa ye mpe ete bomoi na ye ezali na ntina.
Soki afungoleli bato motema lisusu, moto oyo molongani na ye akufá akoki mokemoke kobanda kosepela na bomoi mpe ata komityela mikano ya sika. Ezalaki bongo mpo na Yonette, oyo azali na mbula 44 mpe mobali atiká ye na bana. Alobi boye: “Kozongela bomoi ya mokolo na mokolo ezalaki mpasi mingi! Kosala misala ya ndako, kosalela mbongo na ngai malamu, mpe kobatela bana misato ezalaki mpenza mpasi.” Nzokande, nsima ya mikolo, Yonette ayebaki kotya makambo na molɔngɔ mpe kosolola malamu na bana na ye. Ayekolaki mpe kondima lisalisi ya baninga ya motema.
“Bomoi ezali kaka likabo ya motuya mingi”
Mpo lisalisi na bango esimba, baninga mpe bandeko basengeli komona makambo ndenge ezali. Na boumeli ya basanza, ata mpe ya bambula, makambo ya bomoi mpe elikya ya moto oyo abungisi molongani ekoki kobongwanabongwana, akoki mbala mosusu kozala mwa kimya mpe mbala mosusu alɛmbi na makanisi. Ya solo, “mpasi ya motema na ye” ekoki kozala makasi.—1 Bakonzi 8:38, 39.
Na ntango wana oyo alɛmbi nde molongani oyo atikali akoki kozala na mposa ya mwa bilendiseli mpo amona makambo ndenge ezali mpe atika kozala kaka ye moko. Lisalisi ya ndenge wana epesaki bato mingi oyo babungisaki balongani na bango makasi ya kotambwisa bomoi na bango na ndenge ya sika. Claude, mobali moko ya mbula 60 oyo mwasi na ye akufá mpe oyo azali lelo mosakoli ya ntango nyonso na Afrika, alobi boye: “Bomoi ezali kaka likabo ya motuya mingi, ata nsima ya koyoka mpasi na motema mpo na liwa ya molongani.”
Nsima ya liwa ya molongani, bomoi ezali lisusu ndenge ezalaki te. Atako bongo, bato oyo balongani na bango bakufá bazali naino na mingi ya kosala mpo na kosalisa basusu.—Mosakoli 11:7, 8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etanda “Biloko oyo azalaki kosalela: suvenire ya malamu to ya mabe?” na lokasa 12.
b Mpo na kozwa makanisi mosusu na ndenge ya kosalisa moto oyo ndeko to moninga na ye akufi, talá mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi, nkasa 20-25, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]
Baninga ya solo basengeli kozala wana mpo na kokoba kosalisa
[Etanda/Elilingi na lokasa 12]
Biloko oyo azalaki kosalela: suvenire ya malamu to ya mabe?
Helen, oyo mobali na ye akufaki eleki mwa bambula alobi boye: “Nabombaki biloko ebele oyo mobali na ngai azalaki kosalela. Namonaka ete lokola mikolo ezali koleka, biloko yango ekundwelaka ngai makambo mingi oyo epesaka ngai esengo. Nalingaki kolongola ata eloko moko te na mbala moko mpo mayoki ekoki kobongwana nsima ya mikolo.”
Kasi, Claude, oyo mwasi na ye akufá eleki sikoyo mbula mitano, alobi boye: “Mpo na ngai, nazali na mposa ya komonaka biloko na ye pembenipembeni na ngai te mpo nakanisaka ye. Namonaka ete ndenge nalongolaki biloko na ye esalisaki ngai nandima ete azali lisusu te mpe mpasi na ngai ekita.”
Maloba oyo touti komona emonisi ete ndenge oyo moto na moto akosala na biloko oyo molongani oyo akufá azalaki kosalela ekeseni. Na yango, baninga mpe bandeko ya libota oyo bazali na bwanya bakoluka te kotinda na makasi moto oyo molongani na ye akufi alanda makanisi na bango.—Bagalatia 6:2, 5.
[Bililingi na lokasa 9]
Ezali nde na mikolo oyo lisalisi na yo ekozala na ntina mingi?
[Elilingi na lokasa 9]
Kobosana te kobengisa bango bóbima
[Bililingi na lokasa 10]
Kɔtisá bato oyo balongani na bango bakufá na misala na yo ya mokolo na mokolo to na kominanola