Oyebaki yango?
Lotomo ya mwana mobali ya liboso ezalaki komema ntomo mpe mikumba nini?
▪ Banda kala na ntango ya bakonzi ya mabota, basaleli ya Nzambe bazalaki kopesa ntomo ya ndenge mosusu na mwana mobali ya liboso. Soki tata akufi, mwana na ye ya mobali ya liboso azalaki kozwa mikumba ya mokonzi ya libota. Azalaki kobatela libota mpe azalaki na bokonzi likoló ya bato nyonso ya libota oyo bafandi naino na ndako na bango. Mwana ya liboso azalaki mpe komonisa libota liboso ya Nzambe. Bana nyonso ya mibali bazalaki kozwa libula, kasi mwana ya liboso azalaki kozwa libula ya monene. Soki tokokanisi yango na libula oyo bana mosusu ya mibali bakokaki kozwa, mwana ya liboso azalaki kozwa yango mbala mibale.
Na mikolo ya bakonzi ya mabota, mwana mobali ya liboso akokaki kobungisa lotomo na ye ya mwana ya liboso. Na ndakisa, Esau, atɛkɛlaki leki na ye mobali lotomo na ye ya mwana ya liboso. (Ebandeli 25:30-34) Yakobo azwaki lotomo ya mwana ya liboso oyo ezalaki ya mwana na ye ya liboso Rubene mpe apesaki yango Yozefe. Rubene abungisaki lotomo wana mpo na etamboli na ye ya nsɔni. (1 Ntango 5:1) Nzokande, na Mibeko ya Moize, moto oyo azalaki na basi mibale to koleka akokaki te kozwa lotomo ya mwana ya liboso ya mwana mobali ya liboso ya mwasi moko mpo na kopesa yango na mwana mobali ya liboso ya mwasi mosusu, kaka mpo alingaka mwasi mosusu wana mingi koleka. Tata asengelaki kotosa lotomo oyo mwana na ye ya liboso azalaki na yango.—Kolimbola Mibeko 21:15-17.
Mpo na nini bakomeli mpe Bafarisai bazalaki kolata ‘mwa bakɛsi mike oyo batyá Makomami na kati’?
▪ Yesu alobaki mabe mpo na bato ya mangomba oyo bazalaki kotɛmɛla ye, bakomeli ná Bafarisai, mpo bazalaki kokómisa minene ‘mwa bakɛsi mike oyo batyá Makomami na kati, oyo bazalaki kolata mpo na komibatela.’ (Matai 23:2, 5, maloba na nse ya lokasa) Bato oyo bazalaki na mangomba yango bazalaki kolata na bilongi na bango mwa bakɛsi ya mike oyo esalemá na mposo ya nyama mpe ezalaki kare to rectangle. Bazalaki mpe kotya yango na nse ya lobɔkɔ, pembeni ya motema. Na kati ya bakɛsi yango, ezalaki na bavɛrsɛ ya Makomami. Momeseno wana ya kolata bakɛsi oyo batyá Makomami na kati, oyo babengaka phylactères, euti na ndenge bakómaki kolanda liloba na liloba ya malako oyo Nzambe apesaki Bayisraele ete: “Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo . . . Mpe osengeli kokanga yango lokola elembo na lobɔkɔ na yo” mpe “na elongi na yo lokola mwa nsinga oyo bakangaka na elongi.” (Kolimbola Mibeko 6:6-8) Ntango mpenza oyo bakɔtisaki momeseno ya kolata phylactères eyebani te, kasi bato mingi ya mayele balobaka ete ezalaki na ekeke ya misato to ya mibale liboso ya ntango na biso (L.T.B.).
Yesu akweisaki momeseno yango mpo na bantina mibale. Ya liboso, bakomeli ná Bafarisai bazalaki kokómisa bakɛsi na bango minene mpo na komonisa bato mosusu ete bango nde bakangami mpenza na Nzambe. Ya mibale, bituluku yango bazalaki na makanisi mabe; bazalaki komona mwa bakɛsi na bango oyo batyá Makomami na kati ete ezali nkisi to bikelakela oyo ekobatela bango. Na mikanda mosusu ya kala, liloba ya Grɛki oyo basaleli na Biblia mpo na kolobela bakɛsi yango, phulaktêrion, ebongolamaka na “etuluku ya basoda oyo bakɛngɛlaka,” “lopango ya makasi,” to “nzela ya komibatela.”