Yesu ateyi biso
Ndenge ya kolanda Kristo
Ntango bato bazalaki kondimela Yesu, mbala mingi azalaki koloba boye: “Landá ngai.” (Matai 9:9; 19:21) Kolanda Yesu, elingi koloba kozala mokristo, esɛngi nini? Talá biyano na mituna misato ya ntina mingi.
Ndenge nini osengeli kosalela basusu makambo?
▪ Moyekoli ya Yesu asengeli kolanda malako oyo etali ndenge ya kosalela basusu makambo. Na ndakisa, Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” Bongo soki moto apesi yo mpasi? Yesu alobaki boye: “Salá noki obongisa makambo elongo na moto oyo azali na likambo . . . na yo.” Ayebisaki mpe bayekoli na ye ete: “Soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango te, Tata na bino akolimbisa mpe mabunga na bino te.”—Matai 5:25; 6:15; 7:12.
Epai ya bato oyo babalá, Yesu apesaki toli oyo: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” Mokristo ya solo atikaka mateya ya Yesu etambwisa makanisi mpe motema na ye.—Matai 5:27, 28.
Bakristo ya solo bamipimelaka makambo mosusu mpo na kosalisa basusu. Yesu azalaki na elimo ya komipimela. Na ndakisa, ntango basalaki mobembo moko mpo na kosakola, Yesu ná bantoma na ye bazangaki ata ntango mpo na kolya. Yango wana, Yesu akɔtisaki bango na masuwa mpo bákende kopema na esika moko oyo bato bazali te. Kasi, bato bayebaki esika oyo azalaki kokende mpe bakendaki mbangu kuna liboso na ye. Biblia elobi boye: “Ntango abimaki, amonaki ebele mpenza ya bato, kasi mawa ekangaki ye mpo na bango, mpamba te bazalaki lokola bampate ezangi mobateli. Mpe abandaki koteya bango makambo mingi.” (Marko 6:30-34) Okoki komekola Yesu soki ozali kosala oyo Nzambe azali kosɛnga yo, ata soki okoki kokutana na mikakatano.
Mpo na nini osengeli kosakola nsango malamu?
▪ Yesu ateyaki bayekoli básakolaka nsango malamu. Alobaki na bantoma na ye boye: “Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Matai 10:7) Bayekoli ya Yesu bazali na nsango moko ya motuya monene. Yesu abondelaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko.”—Yoane 17:3.
Yesu asakolaki mosala moko oyo bamilio ya bayekoli na ye bakosala. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Soki oyekoli makambo na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe ondimi makambo oyo Biblia elobi, na ntembe te okosepela koyebisa basusu makambo oyo oyebi. Bayekoli mingi ya Yesu babandaka na kolobela Bokonzi ya Nzambe epai ya bandeko na bango ya libota.—Yoane 1:40, 41.
Mpo na nini osengeli kobatisama?
▪ Ntango Yesu azwaki batisimo na ebale Yordani, mbala mosusu abondelaki boye: “Nayei kosala mokano na yo, Ee Nzambe.” (Baebre 10:7) Soki olingi kosala mokano ya Nzambe, yo mpe osengeli kobatisama. Yesu apesaki mitindo boye: “Bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango.”—Matai 28:19.
Mikumba mpe matomba nini eyaka soki moto azwi batisimo? Bayekoli ya Yesu oyo bazwá batisimo basalelaka Nzambe na molimo na bango mobimba. Yesu azongelaki Mibeko ya Nzambe oyo elobi boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.” (Matai 22:37) Alobaki mpe boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya.” (Matai 16:24) Batisimo emonisaka ete moto azwi ekateli ya komiboya mpo na kokóma eloko ya Nzambe. Bato oyo bazali na boyokani ya ndenge wana na Nzambe bakoki kosɛnga ye apesa bango lisosoli ya pɛto.—1 Petro 3:21.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 18 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.