Pusaná penepene na Nzambe
Ntango “motema oyo ebukani mpe etutami” eluki bolimbisi
BISO nyonso tosalaka masumu mbala mingi. Ata soki toyoki mawa ndenge nini, tokoki komituna boye: ‘Nzambe ayoki mabondeli ya kobongola motema oyo nasali na motema moko? Akolimbisa ngai?’ Biblia eteyaka likambo oyo ya kokitisa motema: Atako Yehova andimaka lisumu moko te, andimaka kolimbisa mosumuki oyo abongoli motema. Likambo yango emonisamaki polele na likambo oyo ekómelaki Davidi, mokonzi ya Yisraele ya kala, ndenge ezali na 2 Samwele mokapo 12.
Talá ndenge makambo ezalaki. Davidi asali masumu minene. Asalaki ekobo na Bate-sheba, mpe ntango milende na ye mpo na kobomba lisumu yango esimbaki te, asalaki ete mobali na ye abomama. Na yango, na boumeli ya basanza mingi, Davidi ayebisaki lisumu na ye te; akobaki kolakisa lokola asali likambo te. Nzokande, Yehova azalaki kotala. Amonaki masumu ya Davidi. Kasi, amonaki mpe ete Davidi akoki kobongola motema. (Masese 17:3) Yehova akosala nini?
Yehova atindaki mosakoli Natane epai ya Davidi. (Vɛrsɛ 1) Na lisalisi ya elimo santu, Natane alobaki na mokonzi na mayele, ayebaki ete asengelaki kopona maloba na ye malamu. Ndenge nini akosalisa Davidi atika komikosa mpe amona monene ya lisumu na ye?
Mpo Davidi aluka komilongisa te, Natane abɛtelaki ye lisolo moko oyo esengelaki kosimba mpenza motema ya moto oyo azalaki mobateli ya bampate. Elobelaki mibali mibale, moko azalaki mozwi mpe mosusu mobola. Mozwi azalaki na “bampate mpe bangɔmbɛ ebele mpenza,” kasi mobola azalaki kaka na “mwana-mpate moko ya mwasi.” Mozwi yango ayambaki mopaya mpe alingaki kolambela ye. Na esika aboma moko ya bampate na ye, azwaki mpate kaka moko ya moto oyo azalaki mobola. Lokola akanisaki ete lisolo yango ezali solo, Davidi asilikaki makasi mpe alobaki na mbala moko ete: “Moto oyo asali boye asengeli kokufa!” Mpo na nini? Davidi alobaki boye: “Mpo ayokaki mawa te.”a—Vɛrsɛ 2-6.
Ndakisa ya Natane ekokisaki mokano na yango. Davidi amifundaki nde ye moko. Na yango, Natane alobaki na ye polele ete: “Moto yango nde yo!” (Vɛrsɛ 7) Lokola Natane azalaki koloba mpo na Nzambe, ezali polele ete mpo na Yehova Davidi asalelaki nde Ye mabe. Lokola Davidi abukaki mibeko ya Nzambe, amonisaki ete azangi limemya mpo na Moto oyo apesaki mibeko yango. Nzambe alobaki boye: “Otyoli ngai.” (Vɛrsɛ 10) Lokola mpamela wana makasi esimbaki mpenza motema na ye, Davidi ayambolaki boye: “Nasaleli Yehova lisumu.” Natane ayebisaki Davidi ete Yehova alimbisi ye, kasi na bomoi na ye, Davidi akobuka mbuma mabe ya misala na ye.—Vɛrsɛ 13, 14.
Ntango lisumu na ye eyebanaki polele, Davidi akomaki maloba oyo ezali lelo Nzembo 51. Na loyembo yango, Davidi asopaki motema na ye, amonisaki ndenge abongolaki mpenza motema. Mpo na masumu na ye, Davidi atyolaki Yehova. Kasi, ntango kaka mokonzi yango oyo abongolaki motema amonaki ndenge bolimbisi ya Nzambe ezali malamu, ayebisaki Yehova ete: “Motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.” (Nzembo 51:17) Maloba ekoki mpenza kokitisa motema ya mosumuki oyo abongoli motema mpe azali koluka Yehova ayokela ye mawa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kolambela mopaya mwana-mpate ezalaki komonisa ete moto ayebi koyamba bapaya. Kasi, koyiba mwana-mpate ezalaki likambo ya mabe, etumbu na yango ezalaki kosɛnga moto azongisa yango mbala minei. (Kobima 22:1) Na makanisi ya Davidi, mozwi wana asalaki likambo ezangá mawa na ndenge azwaki mwana-mpate ya moninga. Na ndenge yango, azangisaki mobola wana nyama oyo ekokaki kopesa libota miliki mpe lɛni, to kutu kozala ebandeli ya etonga na ye ya bampate.