Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/7 nk. 19-21
  • Batoli 7 mpo na kozwa litomba na botángi ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batoli 7 mpo na kozwa litomba na botángi ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toli 1​—Tángá na makanisi ya malamu
  • Toli 2​—Poná libongoli ya malamu
  • Toli 3​—Bondeláká
  • Toli 4​—Tangáká mokolo na mokolo
  • Toli 5​—Salelá mayele ndenge na ndenge
  • Toli 6​—Kanisáká na mozindo
  • Toli 7​—Luká lisalisi mpo na koyeba
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Oyo okoki kosala mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kangamá makasi na Liloba ya Nzambe
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/7 nk. 19-21

Batoli 7 mpo na kozwa litomba na botángi ya Biblia

“Biblia ezali kaka te buku oyo etɛkamá mingi banda kala, kasi ezali mpe buku oyo ezali kotɛkama mingi mbula na mbula.”​—TIME MAGAZINE.

“Ntango mosusu natángaka Biblia, kasi kotánga yango elɛmbisaka ngai.”​—KEITH, ALANGÁ-NZEMBO MOKO NA ANGLETERRE OYO AYEBANI MINGI.

BATO mingi bazalaka na Biblia kaka mpo na kozala na yango, kasi bato moke kaka nde bazwaka litomba na kotánga yango. Bato mosusu bapesaka motuya na makambo oyo batángaka na Biblia. Na ndakisa, mwasi moko na nkombo Nancy alobi boye: “Bandá nakómá kotánga Biblia ntɔngɔ nyonso mpe kokanisa na makambo oyo natángaka, namonaka ete nakoki koyika mpiko na likambo nyonso oyo nakokutana na yango na mokolo. Momeseno yango esalisi ngai nalonga ezaleli ya mawamawa oyo likambo moko te ekokaki kosalisa ngai nalonga yango na boumeli ya mbula 35 oyo eleki.”

Ata otángá naino Biblia te, osepelaka koyeba ete esalisá bato mosusu? Soki otángaka Biblia, okosepela kozwa litomba mingi lisusu na makambo oyo otángaka? Soki ezali bongo, meká batoli 7 oyo ezali na lisolo oyo.

Toli 1​—Tángá na makanisi ya malamu

◼ Okoki kotánga Biblia kaka ndenge batángaka buku moko ya kitoko to kotánga mpo kaka otánga, to mpo na kozwa toli na ndenge ya komitambwisa na mokili oyo mabe. Kasi, okozwa litomba mingi soki mokano na yo ezali ya koyeba solo na ntina na Nzambe. Lisusu, okozwa mapamboli mingi soki mokano na yo ezali ya komona ndenge nsango ya Biblia ekoki kobongola bomoi na yo.

Makomami emonisi ntina ya kotánga Biblia na makanisi ya malamu na ndenge ekokanisi Biblia na talatala; elobi boye: “Soki moto azali moyoki ya liloba, kasi azali motosi te, moto yango azali lokola moto oyo azali kotala elongi na ye na talatala. Mpo amitali, mpe akei mpe na mbala moko abosani ndenge azali. Kasi moto oyo azali kotalatala na mobeko ya kokoka mpe ya bonsomi mpe oyo azali kotingama na yango, moto wana, lokola akómi moyoki oyo abosanaka te, kasi moto oyo azali kosala mosala, akozala na esengo ndenge azali kosalela yango.”​—Yakobo 1:23-25.

Moto oyo balobeli na ndakisa oyo atalaki elongi na ye na talatala kasi abongisaki te ndenge amonanaki. Ntango mosusu amitalaki kaka, to ntango mosusu azalaki te na mposa ya kobongisa makambo oyo esengelaki abongisa. Ndenge moko, tokozwa litomba mpenza te soki tozali kotánga Biblia kaka mpo na kotánga to mpe tozali kosalela te makambo oyo tozali kotánga. Nzokande, tokoki kozwa esengo ya solosolo soki tozali kolukaluka na kati ya Liloba ya Nzambe na mokano ya kokóma “moto oyo azali kosala,” azali kotika makanisi ya Nzambe ebongisa makanisi mpe makambo oyo asalaka.

Toli 2​—Poná libongoli ya malamu

◼ Ekoki kozala ete monɔkɔ na bino ezali na mabongoli mingi ya Biblia oyo okoki kopona. Atako libongoli nyonso ya Liloba ya Nzambe ekoki komemela yo litomba, mabongoli mosusu esalelaka maloba ya kala to maloba oyo ebongi na bato oyo batángá mingi oyo ekoki kozala mpasi mpo na kokanga ntina na yango. (Misala 4:13) Mabongoli mosusu kutu ebongolá nsango kitoko ya Nzambe mpo na kolanda mateya ya bato. Na ndakisa, ndenge tomonaki yango na masolo ya ebandeli ya zulunalo oyo, bato mosusu balongolaki nkombo ya Nzambe, Yehova mpe batyaki batitre lokola “Nzambe” to “Nkolo.” Na yango, ntango ozali kopona Biblia oyo okosalela, poná oyo ebongolami na bosikisiki mpe na elobeli ya pɛtɛɛ oyo ekotinda yo osepelaka kotánga yango.

Bamilio ya batángi na mokili mobimba, bamoni ete Libongoli ya mokili ya sika ebongolami na bosikisiki mpe na elobeli ya pɛtɛɛ.a Tózwa ndakisa ya mobange moko na Bulgarie. Mobali yango azalaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova mpe bapesaki ye Biblia Libongoli ya mokili ya sika. Na nsima, alobaki boye: “Natángá Biblia bambula ebele, kasi natángá naino te libongoli oyo ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina mpe ezali kosimba mpenza motema.”

Toli 3​—Bondeláká

◼ Okoki koyeba malamumalamu Biblia soki osɛngi lisalisi epai ya moto oyo akomisá yango, ndenge mokomi ya nzembo asalaki; alobaki boye: “Fungolá miso na ngai, mpo natala makambo ya kokamwa oyo euti na mobeko na yo.” (Nzembo 119:18) Bondeláká Nzambe ntango nyonso oyo ozali kotánga Makomami, sɛngá ye asalisa yo okanga ntina ya Liloba na ye. Okoki mpe komonisa botɔndi mpo na Biblia, mpo soki yango te tolingaki koyeba Nzambe te.​—Nzembo 119:62.

Nzambe ayokaka mabondeli ya ndenge wana? Tótalela likambo oyo ekómelaki bilenge basi mibale na Uruguay. Bakamwaki na oyo Biblia elobi na Danyele 2:44 mpe babondelaki Nzambe atindela bango moto moko asalisa bango bákanga ntina na yango. Wana Biblia na bango ezalaki naino polele, Batatoli ya Yehova mibale babɛtaki porte na bango, batángaki kaka vɛrsɛ oyo bilenge basi wana basambelaki mpo na yango, mpe balimbolaki ete vɛrsɛ yango ezalaki kolobela baguvɛrnema ya bato oyo esengeli kolongwa mpe Bokonzi ya Nzambeb ekozwa esika na yango. Bilenge basi wana mibale bandimaki ete Nzambe ayanolaki na libondeli na bango.

Toli 4​—Tangáká mokolo na mokolo

◼ Buku moko elobaki ete “bato bakómaki kosomba Biblia mingi” nsima ya likama oyo esalemaki na États-Unis na mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 2001. Bato mingi batalelaka Liloba ya Nzambe kaka soki bakutani na mpasi. Nzokande, Biblia elendisi biso tótángaka yango mikolo nyonso mpo elobi boye: “Buku oyo ya mobeko esengeli kolongwa na monɔkɔ na yo te, mpe osengeli kotángaka yango na mongongo ya nse butu moi, mpo okeba ete otosa makambo nyonso ndenge ekomami na kati na yango; mpo, na ndenge yango nde okolongisa nzela na yo mpe na ndenge yango nde okosala makambo na bwanya.”​—Yosua 1:8.

Mpo na komona ntina ya kotángá Biblia mokolo na mokolo, tózwa ndakisa ya mobali moko oyo azwi maladi ya motema mpe azwi ekateli ya kolya bilei oyo etongaka nzoto. Bilei yango ekosalisa ye soki azali kolya yango kaka ntango ayoki mpasi? Te. Asengeli ntango nyonso kolyaka bilei oyo ekomemela ye litomba mpenza. Ndenge moko mpe, kotánga Biblia mokolo na mokolo ekoki kosalisa yo ‘olonga na nzela na yo.’

Toli 5​—Salelá mayele ndenge na ndenge

◼ Kotánga Biblia banda na mokanda ya Ebandeli tii na Emoniseli ekoki kozala malamu, kasi osengeli mpe kosalela mayele ndenge na ndenge mpo osepelaka kotánga. Talá mwa makanisi.

Tángá lisolo ya moto moko. Tángá mikapo to mikanda nyonso oyo elobeli mosaleli moko ya Nzambe, na ndakisa baoyo bazali awa na nse:

• Yozefe: Ebandeli 37-50.

• Ruta: Ruta 1-3.

• Yesu: Matai 1-28; Marko 1-16; Luka 1-24; Yoane 1-21.c

Tyá makanisi na lisolo moko. Tángá bavɛrsɛ oyo elobeli lisolo yango. Na ndakisa, luká lisolo oyo elobeli libondeli, mpe na nsima tángá toli oyo Biblia epesi na likambo etali libondeli mpe mabondeli mosusu mingi oyo ezali na Biblia.d

Tángáká na mongongo makasi. Okoki kozwa matomba mingi soki ozali kotánga Biblia na mongongo makasi. (Emoniseli 1:3) Bokoki kotánga na mongongo makasi na libota, kosɛnga moto mokomoko atángaka baparagrafe na ngala na ye to kosɛnga moto mokomoko na libota asala lokola moto oyo Biblia elobeli. Bato mosusu basepelaka kolanda botángi ya Biblia na kasɛti. Mwasi moko alobi boye: “Ezalaki mokakatano mpo nabanda kotánga Biblia, yango wana nabandaki kolanda botángi ya Biblia na kasɛti. Lelo oyo, namonaka ete Biblia ezali kitoko mingi koleka babuku mosusu ya kitoko.”

Toli 6​—Kanisáká na mozindo

◼ Bomoi ya lelo oyo, epesaka mpenza bato nzela te ya kokanisa na mozindo. Kasi, kaka ndenge ebongi ete biloko enikama malamu na estoma mpo etonga nzoto na biso, ndenge moko mpe tosengeli kokanisaka mozindo makambo oyo tozali kotánga na Biblia mpo na kozwela yango litomba. Tosalaka yango ntango tozali kokanisa makambo oyo totángi mpe tozali komituna mituna lokola: ‘Likambo nini nayekoli na ntina na Yehova Nzambe? Ndenge nini likambo yango etaleli ngai? Ndenge nini nakoki kosalela yango mpo na kosalisa basusu?’

Kokanisa ndenge wana ekoki kosala ete nsango ya Biblia esimba motema na biso mpe ebakisa esengo na biso ya kotángaka Liloba ya Nzambe. Nzembo 119:97 elobi boye: “Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza! Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.” Lokola azalaki kokanisa na mozindo, mokomi ya nzembo akómisaki Makomami lobanzo na ye moko mokolo mobimba. Kosala bongo esalisaki ye alinga makasi makambo oyo azalaki koyekola.

Toli 7​—Luká lisalisi mpo na koyeba

◼ Nzambe asɛngi biso te ete tókanga ntina ya Liloba na ye na ndenge na biso moko. Ata Biblia endimi ete ezali na ‘makambo mosusu oyo ezali mpasi moto akanga ntina na yango.’ (2 Petro 3:16) Mokanda ya Misala elobeli mokonzi moko ya Etiopi oyo azalaki kokanga ntina te ya eteni moko ya Biblia oyo atángaki. Nzambe atindaki moko ya basaleli na ye mpo asalisa ye, mpe na nsima mobali yango “akobaki nzela na ye, azali kosepela.”​—Misala 8:26-39.

Yo mpe okoki kozwa litomba mingi na botángi ya Biblia soki oluki lisalisi mpo na kokanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga. Luká Batatoli ya Yehova na kartye na bino, to komá na adrɛsi oyo ezali na lokasa 4 ya zulunalo oyo mpo na kosɛnga ete moto moko aya koyekola na yo Biblia kozanga ofuta mbongo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Libongoli ya Mokili ya Sika, ebimisami na Batatoli ya Yehova na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 83, okoki mpe kokuta yango na minɔkɔ 17 na internet na esika oyo www.jw.org.

b Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo yango ekosala, talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

c Soki obandi kotánga Biblia sika, bandá na lisolo kitoko ya mosala ya Yesu oyo ezali na mokanda ya Marko.

d Buku Biblia eteyaka mpenza nini? esalisi bato mingi na masolo ya Biblia. Na ndakisa, mokapo 17, emonisi oyo Makomami elobi na likambo etali libondeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto