Mituna ya batángi . . .
Nzambe azali na ebandeli?
▪ Biblia eyanoli ete Nzambe azali na ebandeli te. Azalaka ntango nyonso. Atako ezalaka mpasi kokanga ntina ya likanisi oyo ete Nzambe azali na ebandeli mpe nsuka te, tokoki te kobwaka likanisi yango kaka mpo ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango malamumalamu.
Ebongi mpenza tótya motema ete tokoki kososola banzela nyonso ya Nzambe? Ntoma Paulo alobaki ete: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza! Bikateli na ye ya lisambisi ekoki kososolama te mpe banzela na ye ekoki koyebana te!” (Baroma 11:33) Makanisi na biso ekoki koyeba na mozindo te bwanya mpe boyebi ya Nzambe, ndenge kaka mwana akoki te koyeba makambo nyonso ya moboti na ye. Maloba wana ya Paulo, atako elobeli libosoliboso bwanya mpe motema mawa ya Nzambe oyo eleki mosusu nyonso, emonisi ete ezali na makambo mosusu ya Yehova Nzambe mpe misala na ye oyo mayele na biso ekoki te kokanga ntina na yango nyonso. Emonani ete likanisi oyo elobelaka Nzambe azali na ebandeli te ezali moko na yango. Kasi, tokoki mpenza kotya motema mobimba na makambo oyo Biblia eteyaka na ntina na Nzambe. Yesu Kristo alobaki na ntina na makomi mosantu ete: “Liloba na yo ezali solo.”—Yoane 17:17.
Moize abondelaki Yehova boye: “Longwa bobɛlɛ na liboso mpenja mpe lobiko na lobiko, yɔ ojali.” (Nzembo 90:2, Biblia haut fleuve) Na maloba wana Moize amonisaki ete molai ya bomoi ya Nzambe eyebani te. Ezali mpe na nsuka te. Yehova azali “Oyo azali na bomoi libela na libela.” (Emoniseli 4:10) Na yango, Nzambe azali na nsuka te. Azali mpe na ebandeli te. Na maloba mosusu, Nzambe akelamá te, abandá mpe te. Kutu, ntango oyo bomoi na ye ebandá eyebani te.
Bato mingi bakokaka te kokanga ntina ya makambo oyo bamonaka te. Kasi, ntango mosusu tondimaka makambo oyo ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina na yango, na ndakisa liteya moko oyo bana-kelasi bayekolaka na matematiki ete kotánga mitángo ezali na nsuka te okoki kokende liboso to kozanga nsima (moins l’infini, plus l’infini). Tokoki te kosalela ndakisa wana mpo na bambula ya bomoi ya Mozalisi na biso?
Na yango, ebongi mpenza ete kaka Nzambe nde azala na titre “Mokonzi ya seko.” (1 Timote 1:17) Kanisá naino: Yesu Kristo, ebele ya baanzelu na likoló, mpe bato awa na mabele bango nyonso bazali na ebandeli mpo bakelamá. (Bakolose 1:15, 16) Kasi, Nzambe akelamá te. Kotingama kaka ete Nzambe asengeli kozala na ebandeli, ebimisaka makanisi mosusu ebeleebele ya koluka koyeba nani akelaki Mozalisi. Te, Yehova ye moko nde azali na bomoi “lobiko na lobiko.” (Nzembo 90:2, Biblia haut fleuve) Na maloba mosusu, Yehova azalaki “seko na bileko nyonso oyo eleká.”—Yuda 25.
Kasi, kobosana te ete likanisi oyo ete Nzambe azali libela na libela ezali te kaka likanisi mpamba. Soki totaleli mpenza libondeli ya Moize, tokomona ete lokola Nzambe azali libela na libela, yango ezali ndanga mpo na biso ete elikya ya bomoi ya seko ezali likambo ya solo. Na bokeseni na bomoi ya mokuse oyo tozali na yango lelo oyo, Biblia emonisi Nzambe lokola “esika na biso ya kofanda ya solosolo libota na libota.” Lokola Tata ya bolingo, Yehova azalaki, azali mpe akozala ntango nyonso mpo na bato na ye. Tiká ete solo ya likambo yango ebɔndisa yo!—Nzembo 90:1.