Nzambe asɛngaka bato báyambola masumu?
Koyambola masumu liboso ya sango to mokonzi moko ya lingomba, ezali likambo oyo ezali kokoba kosalema na milulu ya losambo na mangomba mingi. Kasi, na mokili oyo epesaka nzela na bato básala makambo oyo balingi, koyambola masumu ezali mpenza na ntina?
BATO bazali na makanisi ndenge na ndenge na likambo yango. Na ndakisa, Zulunalo moko (National Post) ya Canada elobi ete moto moko akoki kondima ete ezalaka mpasi koyebisa moto mosusu mabe oyo osali; kasi epai mosusu akoki koloba ete “koyebisa moto mabe oyo osali esalaka malamu, ntango moto yango ayebi yango, asambeli na yo, mpe ayebisi yo, talá oyo osengeli kosala.” Nzokande, buku moko (Bless Me, Father, for I Have Sinned) etángi maloba ya moto moko oyo alobaki boye: “Koyambola masumu ezali likambo oyo ebebisaka lingomba. Esalaka ete moto amitungisa koleka ndelo.” Biblia elobi nini mpo na likambo yango?
Oyo Biblia elobi
Na Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele, ezali na malako ya sikisiki mpo na oyo esengeli kosala ntango moto asali lisumu. Na ndakisa, ntango moto moko asaleli moninga na ye lisumu to abuki mibeko ya Nzambe, asengelaki koyambola yango epai ya nganga-nzambe ya libota ya Levi, oyo akokaki kozipa masumu mpo na ye na nzela ya mbeka oyo azalaki kopesa Nzambe mpo na bolimbisi ya masumu.—Balevi 5:1-6.
Bikeke mingi na nsima, ntango mosakoli Natane apamelaki Mokonzi Davidi mpo na lisumu na ye, Davidi asalaki nini? Na mbala moko andimaki boye: “Nasaleli Yehova lisumu.” (2 Samwele 12:13) Abondelaki Nzambe mpe asɛngaki ye amonisela ye boboto. Likambo nini emonanaki? Na nsima, Davidi akomaki boye: “Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te. Nalobaki ete: ‘Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.’ Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.”—Nzembo 32:5; 51:1-4.
Koyambola masumu ezalaki likambo oyo Nzambe asɛngaki na bakristo ya lisangá ya ekeke ya liboso ya ntango na biso. Yakobo, ndeko ya Yesu mpe mibali mosusu oyo bazalaki kokamba lisangá na Yerusaleme, balendisaki baninga na bango bakristo boye: “Bóyambolaka masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelanaka, mpo bóbikisama.” (Yakobo 5:16) Bakristo basengeli koyambola nini mpe epai ya nani?
Esengeli koyambola nini?
Mokolo na mokolo, biso bato ya kozanga kokoka tosalaka makambo ya mabe to tosalelaka na ndenge ya mabe lolemo na biso mpe na ndenge yango tosalelanaka masumu. (Baroma 3:23) Yango elingi koloba ete tosengeli koyambola masumu nyonso ya ndenge wana epai ya moto moko oyo azali na bokonzi?
Atako lisumu nyonso ezali mabe na miso ya Nzambe, na motema mawa na ye ayebaka ete tosalaka yango mpo na kozanga kokoka oyo tosangolá epai ya baboti na biso ya liboso. Ya solo, mokomi ya nzembo alobaki boye: “Soki otalaka kaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akotɛlɛma? Mpo yo olimbisaka mpenza, mpo bábanga yo.” (Nzembo 130:3, 4) Na yango, tosengeli kosala nini ntango tosali libunga mpe tosaleli basusu lisumu, ntango mosusu kozanga kokana? Kobosana te ete libondeli ya ndakisa oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye básalaka ezali mpe na likambo oyo: “Limbisá biso masumu na biso, mpo biso moko mpe tolimbisaka moto nyonso oyo azali na nyongo na biso.” (Luka 11:4) Ya solo, Nzambe akolimbisa biso soki toyei epai na ye mpe tosɛngi bolimbisi na nkombo ya Yesu.—Yoane 14:13, 14.
Simbá ete Yesu alobaki mpe ete biso mpe tosengeli kolimbisaka moto nyonso oyo “azali na nyongo na biso.” Ntoma Paulo akundwelaki baninga na ye bakristo likambo oyo: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.” (Baefese 4:32) Soki tozali kolimbisa basusu mabunga na bango, tokolikya ete Nzambe mpe akolimbisa oyo ya biso.
Kasi, ezali boni mpo na masumu ya minene, na ndakisa, koyiba, kokana kokosa, pite, molangwa, mpe masumu mosusu? Moto nyonso oyo akosala masumu ya ndenge wana azali kobuka mobeko ya Nzambe mpe na ndenge yango azali kosalela Nzambe masumu. Asengeli kosala nini?
Esengeli koyambola masumu epai ya nani?
Nzambe apesá bato nzela te ete bálimbisaka masumu oyo moto asaleli ye; kaka ye moko nde akoki kolimbisa yango. Biblia eyebisi biso polele: “Soki toyamboli masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na makambo nyonso ya kozanga boyengebene.” (1 Yoane 1:9) Kasi, esengeli koyambola masumu ya ndenge wana epai ya nani?
Lokola kaka Nzambe nde akoki kolimbisa masumu, esengeli koyambola masumu kaka epai na ye. Ezali yango nde Davidi asalaki ndenge tomonaki yango. Kasi, esengeli nini mpo moto alimbisama? Biblia eyebisi biso boye: “Na yango, bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko.” (Misala 3:19) Ya solo, mpo na kolimbisama esɛngi kaka te moto ayeba mabe oyo asali mpe ayambola yango, kasi amonisa nde mposa ya kotika nzela ya mabe. Mbala mingi kosala likambo yango ezalaka mpasi. Kasi, lisungi ezali.
Kanisá lisusu maloba ya moyekoli Yakobo oyo tolobelaki liboso: “Bóyambolaka masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelanaka, mpo bóbikisama.” Abakisaki mpe boye: “Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.” (Yakobo 5:16) “Moyengebene” ekoki kozala moko ya “bankulutu ya lisangá,” oyo Yakobo alobeli na vɛrsɛ 14. Na lisangá ya bokristo, ezali na “bankulutu,” to mibali oyo bakɔmeli na elimo, oyo batyami mpo na kosalisa baoyo balingi Nzambe alimbisa bango. “Bankulutu” yango te nde bakolimbisa masumu mpo moto moko te azali na lotomo ya kolimbisa moninga na ye moto masumu oyo asaleli Nzambe.a Kasi, babongi mpenza mpo na kopamela mpe kosembola moto oyo asali lisumu, kosalisa ye ayeba bonene ya lisumu na ye mpe ntina oyo asengeli kobongola motema.—Bagalatia 6:1.
Mpo na nini koyambola masumu?
Lisumu, ezala monene to te, moto oyo asali yango abebisi boyokani na ye ná moninga na ye mpe Nzambe. Mpo na yango, akoki kotungisama to koyoka nsɔni. Yango nde mosala ya lisosoli, likoki oyo Nzambe apesá biso. (Baroma 2:14, 15) Esengeli kosala nini?
Soki tozongi lisusu na mokanda ya Yakobo, tokokuta maloba oyo ya kolendisa: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi [ya elimo] na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.”—Yakobo 5:14, 15.
Awa mpe, mikóló to bankulutu, bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bampate. Ndenge nini? Ezali te kaka na koyoka ndenge moto azali koyambola mabe na ye. Kasi, lokola ezali maladi ya elimo, esɛngaka kosala likambo moko mpo na ‘kobikisa moto oyo azali kobɛla.’ Ezali na makambo mibale oyo Yakobo alobeli ete esengeli kosalema.
Ya liboso, ‘kopakola mafuta.’ Maloba yango emonisi nguya oyo Liloba ya Nzambe ezali na yango ya kobikisa. Ntoma Paulo alimbolaki ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya . . . mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema,” elingi koloba kokɔta mpenza na kati ya motema mpe makanisi ya moto. (Baebre 4:12) Soki basaleli Biblia malamu, bankulutu bakoki kosalisa moto oyo azali kobɛla na elimo amona likambo oyo etindi ye asala mabe mpe likambo oyo asengeli kosala mpo na kobongisa makambo ná Nzambe.
Ya mibale, “libondeli ya kondima.” Atako mabondeli ya bankulutu ekopekisa te Nzambe asalela bosembo na ye, mabondeli yango ezalaka na ntina mingi na miso ya Nzambe, oyo azalaka pene mpo na kolimbisa lisumu na nzela ya mbeka ya lisiko ya Kristo. (1 Yoane 2:2) Nzambe azalaka pene ya kosalisa mosumuki nyonso oyo abongoli mpenza motema mpe oyo amonisi ‘misala ya kobongola motema.’—Misala 26:20.
Likambo ya libosoliboso oyo esengeli kotinda moto ayambola lisumu—oyo asaleli moninga na ye to Nzambe—ezali koluka kondimama na miso ya Nzambe. Yesu Kristo amonisaki ete tosengeli libosoliboso kosilisa mikakatano nyonso na baninga na biso mpe kozongisa kimya, liboso ete tózala na likoki ya kosambela Nzambe na lisosoli ya malamu. (Matai 5:23, 24) Masese 28:13 elobi: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.” Ntango tomikitisi na miso ya Yehova Nzambe mpe tosɛngi bolimbisi, akondima biso mpe akotombola biso na ntango oyo ekoki.—1 Petro 5:6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bamosusu bamonaka ete maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 20:22, 23 endimisi mpenza likambo ya kokende koyambola masumu epai ya moto. Mpo na koyeba makambo mingi na likambo yango, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1996, nkasa 28-29.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 23]
Nzambe akotala mabunga na biso te mpe akolimbisa biso soki toyei epai na ye mpe tosɛngi bolimbisi na nkombo ya Yesu
[Elilingi na lokasa 24]
Likambo ya libosoliboso oyo esengeli kotinda moto ayambola lisumu ezali koluka kondimama na Nzambe