Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w10 1/10 lok. 13
  • Batatoli ya Yehova basalaka makamwisi ya kobikisa bato?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova basalaka makamwisi ya kobikisa bato?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Masolo mosusu
  • Nzambe andimaka kobikisama ya bato na nzela na bikamwiseli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • ‘Makamwisi ya kobikisa’ bato eutaka epai ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Lolenge oyo kondima ekoki kosalisa mobɛ́li
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Makamwisi ya kobikisa bato
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
w10 1/10 lok. 13

Mituna ya batángi . . .

Batatoli ya Yehova basalaka makamwisi ya kobikisa bato?

▪ Batatoli ya Yehova basalá ata mokolo moko te makamwisi mpo na kobikisa bato. Lokola Yesu, bandimaka ete mokumba na bango ya libosoliboso, ezali ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bandimaka mpe ete bakristo ya solo bayebanaka te mpo na makamwisi ya kobikisa, kasi mpo na likambo moko ya ntina mingi.

Mpo na koloba solo, ndenge oyo motema mawa ezalaki kotinda Yesu Kristo abikisa bato na ekeke ya liboso ya ntango na biso, ezali na ntina mingi mpo na biso nyonso. Na ndenge yango, amonisaki ete ntango akoyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yisaya 33:24.

Ezali boni lelo oyo? Bato oyo babikisaka bato ya maladi na lingomba ya bokristo to mpe na mangomba mosusu, balobaka ete basalaka yango na nzela ya makamwisi. Kasi, Yesu ye moko akebisaki makasi bayekoli na ye na bato oyo bakoloba ete na nkombo na ye ‘basalaki makamwisi ebele.’ Akoloba na bango ete: “Nayebi bino té! Bino bozalaki kotosa Nzambe té, bólongwa liboso na ngai!” (Matai 7:22, 23, Bible na Lingala ya lelo oyo) Na yango, makamwisi oyo babikisi yango ya ntango na biso balobaka ete basalaka yango nde emonisaka ete Nzambe andimi mpe azali kopambola bango?

Tótalela oyo Biblia elobi mpo na kobikisa oyo Yesu abikisaki bato. Soki tokokanisi masolo yango na makamwisi oyo babikisi ya lelo basalaka, tokomona soki bazali kosala yango na nguya ya Nzambe to te.

Yesu azalaki soki moke te kosala makamwisi mpo na kobenda bato ebele. Kutu, asalaki makamwisi mingi na esika oyo bato bazalaki te. Mbala mingi azalaki koloba na bato oyo abikisaki báloba na moto te likamwisi oyo asalaki.​—Luka 5:13, 14.

Yesu azalaki ata moke te kosɛnga mbongo mpo na makamwisi oyo azalaki kosala. (Matai 10:8) Azalaki ntango nyonso kolonga kosala makamwisi yango. Bato nyonso ya maladi oyo bazalaki koya epai na ye bazalaki mpenza kobikisama, mpe kobika yango etalelaki te kondima ya moto. (Luka 6:19; Yoane 5:5-9, 13) Yesu asekwisaki kutu ata bakufi!​—Luka 7:11-17; 8:40-56; Yoane 11:38-44.

Atako asalaki makamwisi wana, makanisi na ye ezalaki te ya kozwa bato na nzela ya makamwisi yango. Kutu, mosala na ye ya libosoliboso ezalaki ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo bákómisa bato bayekoli, baoyo basengelaki kolakisa basusu na ntina na elikya ya kokóma na nzoto ya kokoka na Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 28:19, 20.

Ya solo, bayekoli mosusu ya Yesu na ekeke ya liboso bazwaki makabo ya kobikisa bato, kasi makabo yango esengelaki kosuka. (1 Bakorinti 12:29, 30; 13:8, 13) Lelo oyo, bakristo ya solo bayebani te mpo na mosala ya kobikisa bato, kasi nde mpo na bolingo ya komipimela. (Yoane 13:35) Babikisi ya lelo oyo babimisi te libota moko ya bokristo oyo kati na yango tozali kokuta bato ya mposo mpe mikili ndenge na ndenge oyo bazali na bolingo yango.

Nzokande, ezali na etuluku moko ya bakristo oyo bazali na bomoko mpo na bolingo makasi oyo epekisaka bango básalana mabe​—to básala moto mosusu mabe—​ata ntango kowelana makasi ezali kati na bato. Bato yango bazali banani? Batatoli ya Yehova. Na mokili mobimba, bayebani mpo na bolingo ya bokristo oyo bamonisaka. Tokoki koloba ete kosangisa bato ya mposo, bikólo, mpe mimeseno ndenge na ndenge ezali likamwisi, mpe esalemaka kaka na nguya ya elimo santu ya Nzambe. Mpo na nini te kokende na makita na bango mpe omona yo moko na miso?

[Elilingi na lokasa 13]

Bato oyo babikisaka bato na makamwisi lelo oyo (talá elilingi na lobɔkɔ ya mobali) basalaka yango mpenza na nguya ya Nzambe?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto