Yesu ateyi biso
Baanzelu basalaka biso nini?
Yesu azalaki kofanda na likoló ná Tata na ye “liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:5) Yango wana, abongi mpenza mpo na koyanola na mituna oyo elandi.
Baanzelu batyelaka biso likebi?
▪ Yesu amonisi biso ete baanzelu batyelaka mpenza bato likebi. Alobaki boye: “Baanzelu ya Nzambe bakozala na esengo . . . mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.”—Luka 15:10.
Yesu amonisaki ete baanzelu bazali na mokumba ya kosalisa basaleli ya Nzambe bábatela boyokani makasi na Nzambe. Yango wana, ntango Yesu akebisaki bayekoli na ye na likambo ya kobɛtisa basusu libaku, alobaki boye: “Bókeba, bótyola moko ya bana mike oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 18:10) Na maloba wana, Yesu alingaki koloba te ete moyekoli na ye mokomoko azali na anzelu mobateli oyo Nzambe atyá mpo na ye. Kasi, Yesu amonisaki ete baanzelu oyo basalaka na bomoko na Nzambe batyaka likebi na basangani ya lisangá ya bokristo.
Ndenge nini Zabolo akoki kosala biso mabe?
▪ Yesu akebisaki bayekoli na ye ete Satana alukaka kopekisa bato báyekola solo na ntina na Nzambe. Alobaki boye: “Ntango moto ayoki liloba ya bokonzi kasi akangi ntina na yango te, moto mabe ayaka kobɔtɔla oyo elonamaki na motema na ye.”—Matai 13:19.
Yesu amonisaki polele mayele moko oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato, ntango apesaki ndakisa ya mobali moko oyo alonaki mbuma ya blé na elanga na ye. Na ndenge ya elilingi, mobali yango ezalaki Yesu, mpe mbuma ya blé ezalaki elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela na Yesu na likoló. Nzokande, Yesu alobaki ete monguna ayaki “kolona matiti mabe na katikati ya blé.” Matiti mabe emonisaki bakristo ya lokuta. “Monguna oyo alonaki yango ezali Zabolo.” (Matai 13:25, 39) Ndenge kaka matiti mabe ekoki komonana lokola blé oyo ebandi kobima sika, baoyo bamibengaka bakristo bakoki komonana lokola basambeli ya solo. Mangomba oyo eteyaka mateya ya lokuta ekosaka bato mpo bátosa Nzambe te. Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kopekisa bato bákóma baninga ya Yehova.
Ndenge nini tokoki kosala mpo Satana asala biso mabe te?
▪ Yesu abengaki Satana “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 14:30) Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Nzambe, Yesu amonisaki ndenge oyo tokoki kobatelama mpo Satana azwa biso te. Mpo na bayekoli na ye, Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló boye: “Okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. Santisá bango na solo; liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:15-17) Boyebi ya Liloba ya Nzambe ekoki kobatela biso mpo tólanda te mokili mabe oyo Satana azali koyangela.
Ndenge nini baanzelu babatelaka biso lelo oyo?
▪ Yesu alobaki boye: “Na bosukisi ya makambo ya ntango oyo: baanzelu bakobima mpe bakokabola bato mabe na bayengebene.” (Matai 13:49) Tozali lelo oyo kobika na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” mpe bamilio ya bato bazali kondima nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 24:3, 14.
Kasi, bato nyonso te oyo babandi koyekola Liloba ya Nzambe nde bakondimama na ye. Baanzelu batambwisaka mosala ya basaleli ya Yehova, mpe bato oyo balingaka mpenza Nzambe bazali kokabolama na baoyo balingaka te kosalela makambo oyo bazali koyekola. Mpo na baoyo bazali kondimama na Nzambe, Yesu alobaki boye: “Ezali bato oyo, nsima ya koyoka liloba na motema ya kitoko mpe ya malamu, basimbi yango mpe baboti mbuma wana bazali koyika mpiko.”—Luka 8:15.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 10 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 16]
Baanzelu bakokisaka mokumba monene mpo na koyanganisa bato na lisangá ya bokristo