Mpo na nini baboyaki Masiya?
NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, ebele ya bato bakamwaki na makambo oyo azalaki koloba mpe na makamwisi oyo azalaki kosala. Yango wana bato mingi “bandimelaki ye” mpe bandimaki ye lokola Masiya to Kristo oyo alakamaki. Batunaki boye: “Ntango Kristo akoya, akosala nde bilembo mingi koleka oyo moto oyo asali?”—Yoane 7:31.
Atako makambo mingi emonisaki ete Yesu azali Masiya, ebele ya bato oyo bamonaki mpe bayokaki Yesu bandimelaki ye te. Likambo ya mawa, ata baoyo bandimaki ye na ebandeli, na nsima bapesaki ye mokɔngɔ. Mpo na nini bato mingi baboyaki Yesu lokola Masiya atako bamonaki makambo minene oyo asalaki? Tiká tótalela mpo na nini baboyaki ye, mpe ntango tozali kotalela yango, omituna boye: ‘Ngai mpe nakoki kosala libunga ya ndenge wana lelo oyo?’
Bilikya na bango ekokisamaki te
Ntango Yesu abotamaki, Bayuda mingi bazalaki kozela komonana ya Masiya. Ntango bamemaki Yesu na tempelo, wana azalaki naino mwana, akutanaki na baoyo “bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme” na Masiya oyo alakamaki. (Luka 2:38) Na nsima, bato mingi oyo bamonaki misala ya Yoane Mobatisi, batunaki boye: “Mbala mosusu ye nde Kristo?” (Luka 3:15) Kasi, Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki na elikya ete Masiya akokokisa makambo nini?
Bayuda mingi na mikolo wana bazalaki na elikya ete Masiya akoya mpe akosikola bango na minyoko ya Baroma mpe akozongisa bokonzi ya Yisraele. Liboso Yesu abanda mosala na ye, batomboki mingi babimaki mpe bakómaki kotɛmɛla bakonzi oyo bazalaki koyangela na ntango wana. Na ntembe te, makambo oyo bato wana basalaki, etindaki bato bátya motema ete Masiya akokokisela bango makambo oyo bango bazali kozela.
Yesu akesanaki mpenza na Bamasiya wana ya lokuta. Azalaki kotinda bato bátomboka te, kasi azalaki koteya bayoki na ye bálinga banguna na bango mpe bátosa bakonzi. (Matai 5:41-44) Aboyaki milende oyo bato basalaki mpo na kokómisa ye mokonzi. Kutu, ateyaki ete bokonzi na ye ezalaki “ya mokili oyo te.” (Yoane 6:15; 18:36) Na yango, makanisi oyo bato bazalaki na yango mpo na Masiya ezalaki mpenza na bopusi makasi epai ya bato.
Yoane Mobatisi amonaki na miso mpe ayokaki nsango ya makamwisi oyo emonisaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Kasi, ntango Yoane akɔtaki bolɔkɔ, atindaki bayekoli na ye bátuna Yesu boye: “Yo ozali Moto oyo azali koya, to tosengeli nde kozela mosusu?” (Matai 11:3) Ntango mosusu Yoane amitunaki soki Yesu azalaki Mosikoli oyo alakamaki, oyo asengelaki kokokisa bilikya ya Bayuda.
Ezalaki mpasi mpo na bantoma ya Yesu bándima ete esengeli abomama mpe na nsima asekwa. Mokolo moko, ntango Yesu amonisaki ete esengeli Masiya anyokwama mpe akufa, Petro “abendaki ye pembeni mpe abandaki kopamela ye.” (Marko 8:31, 32) Petro akangaki naino ntina te ndenge oyo liwa ya Yesu ekoyokana na mokumba na ye ya Masiya.
Ntango akɔtaki na Yerusaleme, mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 33 ya ntango na biso, ebele ya bato bayambaki Yesu na esengo; bakumisaki ye lokola mokonzi. (Yoane 12:12, 13) Eumelaki te makambo ebongwanaki! Na nsima, kaka na pɔsɔ yango, bakangaki Yesu mpe babomaki ye. Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli mibale ya Yesu bamilelaki boye: “Tozalaki kolikya ete moto yango nde azalaki moto oyo asengelaki kosikola Yisraele.” (Luka 24:21) Ata ntango Yesu asekwaki mpe amonanaki na bayekoli na ye, likanisi ete Masiya akozongisa bokonzi ya Yisraele ezalaki kaka makasi. Batunaki boye: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Emonanaki polele ete bilikya ya mabe na ntina na Masiya ezwaki mpenza misisa na mitema mpe makanisi ya bayoki ya Yesu.—Misala 1:6.
Ntango Yesu amataki na likoló, mpe elimo santu ekitelaki bayekoli na ye, bamonaki polele ete Masiya akoyangela lokola Mokonzi kuna na likoló. (Misala 2:1-4, 32-36) Na mpiko nyonso, ntoma Petro mpe Yoane basakolaki na ntina na lisekwa ya Yesu mpe bamonisaki polele ete Nzambe azalaki kosunga bango na makamwisi oyo bazalaki kosala. (Misala 3:1-9, 13-15) Bato mingi na Yerusaleme bandimaki mpe bakómaki bakristo. Kasi, likambo yango esepelisaki te bakonzi ya Bayuda. Kaka ndenge batɛmɛlaki Yesu, bakómaki sikoyo kotɛmɛla bantoma mpe bayekoli na ye. Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda baboyaki Yesu na nkanza nyonso?
Bakonzi ya mangomba baboyaki ye
Ntango Yesu ayaki awa na mabele, mateya mpe misala ya lingomba ya Bayuda ekesanaki mpenza mosika na oyo Makomami ezalaki koteya. Bakonzi ya mangomba ya ntango wana—Basadukai, Bafarisai, mpe bakomeli—bazalaki kokangama na mimeseno ya bato, bazalaki kotya yango liboso ya oyo Liloba ya Nzambe elobi. Mbala mingi, bazalaki kofunda Yesu ete azalaki kobuka mibeko mpo azalaki kosala makamwisi ya kobikisa bato na mokolo ya Sabata. Lokola aboyaki mpenza mateya na bango ya lokuta, Yesu amonisaki ete andimi te bokonzi na bango mpe ndenge bazalaki koloba ete bandimami na miso ya Nzambe. Kutu, Yesu autaki na libota moko ya bozwi mingi te mpe akɔtaki bakelasi na bango te. Tokoki kokamwa te ete ezalaki mpasi mpo bato wana ya lolendo bándima Yesu ete azali Masiya! Likambo ya ndenge wana ematisaki nkanda na bango mpe “basalelaki [Yesu] likita mpo na koboma ye.”—Matai 12:1-8, 14; 15:1-9.
Kasi, ndenge nini bakonzi yango ya mangomba batalelaki likoki oyo Yesu azalaki na yango ya kosala makamwisi? Bawanganaki te ete asalaki makamwisi. Kasi, batyolaki ye mpe balukaki bato bándimela Yesu te na ndenge balobaki ete nguya na ye ezalaki kouta epai ya Satana; balobaki boye: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube, mokonzi ya bademo.”—Matai 12:24.
Ezalaki na likambo mosusu ya monene oyo esalaki ete báboya kondima Yesu lokola Masiya. Ntango Yesu asekwisaki Lazare, bakonzi ya mangomba ndenge na ndenge, bayokanaki mpe balobaki ete: “Tósala nini, mpo moto oyo azali kosala bilembo mingi? Soki totiki ye kaka boye, bango nyonso bakondimela ye, mpe Baroma bakoya kobɔtɔla esika na biso mpe ekólo na biso.” Lokola bazalaki kobanga kobungisa bokonzi mpe esika na bango, bakonzi ya mangomba basalaki likita mpo na koboma Yesu mpe Lazare!—Yoane 11:45-53; 12:9-11.
Bazalaki kokanisela bayekoli ya Yesu mabe mpe konyokola bango
Ezaleli oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda ya ekeke ya liboso bamonisaki, esalaki ete moto nyonso oyo azalaki kondima Yesu lokola Masiya azala na likama. Lokola bazalaki na lolendo mingi mpo na bokonzi na bango, bazalaki kotyola moto nyonso oyo azalaki kondima Yesu, bazalaki koloba: “Moko ya bankumu to ya Bafarisai andimeli nde ye?” (Yoane 7:13, 48) Bakonzi mosusu ya Bayuda, na ndakisa Nikodeme mpe Yozefe ya Arimatea, bakómaki bayekoli ya Yesu, kasi bazalaki kosala yango na kobatama, mpo bazalaki kobanga. (Yoane 3:1, 2; 12:42; 19:38, 39) Bakonzi ya Bayuda babimisaki mobeko ete “soki moto alobi polele ete [Yesu] azali Kristo, bakobengana moto yango na sinagoga.” (Yoane 9:22) Moto ya ndenge wana basusu bakoboya mpe bakokima ye.
Nsukansuka, botɛmɛli mpe minyoko oyo babimiselaki bantoma mpe bayekoli ya Yesu ekómaki makasi. Lokola bazalaki kosakola na molende, Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda enyokolaki bantoma. (Misala 5:40) Batɛmɛli bakoselaki moyekoli stefano makambo. Sanedrina ekatelaki ye etumbu mpe bato babomaki ye na mabanga. Na nsima, “monyoko moko monene ebimelaki lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme; bango nyonso, longola kaka bantoma, bapanzanaki na bitúká ya Yudea mpe ya Samaria.” (Misala 6:8-14; 7:54–8:1) Saulo oyo na nsima akómaki ntoma Paulo, apesaki mpe mabɔkɔ na botɛmɛli oyo nganga-nzambe monene mpe “liyangani mobimba ya mikóló” babongisaki.—Misala 9:1, 2; 22:4, 5.
Ata na ntango wana ya minyoko mpenza, lisangá ya bokristo ekolaki nokinoki na bambula oyo elandaki liwa ya Yesu. Atako bato mingi bakómaki bandimi, kasi, bakristo bazalaki kaka moke na Palestine na ekeke ya liboso. Komimonisa ete ozali moyekoli ya Kristo ezalaki komilukela mpasi mpe mobulu.
Liteya oyo tozwi
Ndenge tomoni yango, makanisi ya mabe, bopusi ya bato, mpe botɛmɛli epekisaki bato mingi na ekeke ya liboso bándimela Yesu. Lelo oyo mpe, makanisi ya mabe na ntina na Yesu mpe mateya na ye ekoki kosala bongo epai ya bato. Na ndakisa, bateyá bato mingi ete Bokonzi ya Nzambe ezali na mitema na bango, to ekoya mpo na milende ya bato. Bandimisaka bato mosusu ete bátya motema na siansi to teknoloji mpo na kosilisa mikakatano ya bato, na ndenge wana balongolaka bato mposa ya kondima Masiya. Bato mingi lelo balobaka ete masolo ya Biblia oyo elobeli mosala ya Yesu ezali masapo mpamba; mpo na yango, basali ete bato báboya kondima Yesu lokola Masiya.
Makanisi mpe mateya ya ndenge wana esali ete bato mingi bákóma na mobulungano na ntina na mokumba ya Masiya mpe bámona ete ezali na ntina te kotalela likambo yango. Nzokande, mpo na baoyo bazali na mposa ya kotalela likambo yango, lelo oyo koleka ndenge ezalaki na ekeke ya liboso, ezali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete Yesu azali Masiya. Tozali na Makomami ya Ebre na mobimba na yango oyo ezali na ebele ya bisakweli oyo elobeli makambo oyo Masiya asengelaki kosala mpe masolo oyo ezali na Baevanzile minei ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na kokokisa bisakweli yango.a
Mokomoko azangi te bilembeteli ya polele oyo ekoki kotinda ye apona to azwa ekateli ya malamu na likambo yango. Mpe ekateli yango esengeli kozwama kozanga koumela. Mpo na nini? Mpo Biblia emonisi ete lokola azali Masiya, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mosika te, Yesu akolongola bato nyonso oyo bazali kobebisa mabele mpe akotya boyangeli ya sembo oyo ekopesa nzela na bato nyonso ya botosi bázala na bomoi libela na libela awa na mabele oyo ekobongwana paradiso. (Danyele 2:44; Emoniseli 11:15, 18; 21:3-5) Yo mpe okoki kozala na elikya kitoko wana soki osali molende mpo na koyekola makambo na ntina na Yesu mpe ondimeli ye uta sikoyo. Batelá na motema maloba oyo ya Yesu: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá karte “Bisakweli oyo etali Masiya,” na lokasa 200 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 20]
Soki ozalaki na mikolo ya Yesu, olingaki kondima ye lokola Masiya?
[Elilingi na lokasa 21]
Kotika te ete makanisi mabe epekisa yo koyekola solo na ntina na Yesu