Mituna ya batángi . . .
Paradiso oyo Biblia elobeli ezali wapi?
▪ Epai ya moto moko oyo azalaki kobundana na mpasi ya liwa mpe amonisaki na mpiko nyonso kondima epai na ye, Yesu alakaki boye: “Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:43) Moto yango asengelaki kozala wapi? Paradiso yango ezalaki na likoló, na mabele, to na esika mosusu epai bato bazelaka lisambisi?
Bankɔkɔ na biso bafandaki liboso na Paradiso. Biblia eyebisi biso boye: “Yehova Nzambe alonaki elanga na Edene, epai ya ɛsti, mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki. . . . Mpe Yehova Nzambe akamataki moto mpe atyaki ye na elanga ya Edene mpo na kolona yango mpe kobatela yango.” (Ebandeli 2:8, 15) Ntango maloba wana ebongolamaki na Grɛki, liloba “elanga” ebongolamaki na pa·raʹdei·sos, epai liloba ya Lingala “paradiso,” eutá.
Kaka ndenge mwasi ná mobali bakoki kokómisa ndako na bango monene ntango bakómi na bana mingi, baboti na biso ya liboso basengelaki koyeisa Paradiso monene koleka bandelo ya Edene, ntango bato balingaki kokóma mingi na mokili. Nzambe ayebisaki bango boye: “Bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.”—Ebandeli 1:28.
Na yango, mokano ya Mozalisi na biso ezalaki ete bato bázala na bomoi, bábota bana na Paradiso awa na mabele. Basengelaki kozala na bomoi libela na libela na elanga yango; basengelaki kozala ata na mposa ya esika moko te mpo na kokundaka bato. Mabele esengelaki kokóma esika ya libela mpo na bato nyonso. Tozali kokamwa te ndenge biloko oyo ezalaka na planɛti na biso esepelisaka biso mingi! Tokelamaki mpo tófanda na mabele moko kitoko.
Mokano ya Nzambe ebongwaná? Te. Mpo Yehova alaki biso boye: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai ekozala ndenge wana. Ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango.” (Yisaya 55:11) Mbula 3 000, nsima ya kokelama ya moto, Biblia elobaki boye mpo na ‘Ye oyo asalaki mabele mpe akelaki yango,’ ete “azalisaki yango mpamba te,” kasi, “asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Mokano ya Nzambe ebongwaná te. Mabele ekozala kaka paradiso.
Likambo ya esengo, bavɛrsɛ mingi ya Biblia oyo elobeli Paradiso emonisaka kaka bomoi awa na mabele. Na ndakisa, esakweli moko ya Yisaya elobi boye: “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.” (Yisaya 65:21) Epai wapi batongaka bandako, balonaka banzete ya vinyo, mpe balyaka bambuma? Awa na mabele. Masese 2:21 elobi polele ete: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele.”
Yesu mpe alobelaki paradiso ya mabele. Ya solo, alakaki mpe paradiso ya likoló, kasi ezalaki kaka mpo na bato moke oyo baponamaki. (Luka 12:32) Nsima ya liwa, bato yango basekwaka mpo na kozala na Paradiso ya likoló mpe bazalaka elongo na Kristo mpo na koyangela Paradiso ya mabele. (Emoniseli 5:10; 14:1-3) Bato yango oyo bakoyangela ná Yesu na likoló, bakosala ete Paradiso ya mabele eyangelama na ndenge ebongi mpe ebatelama na kolanda mitinda ya Nzambe.
Yesu ayebaki ete yango ezalaki mokano ya Nzambe mpo na mabele. Kutu, azalaki na likoló ná Tata na ye ntango akelaki elanga ya Edene. Moto nyonso oyo azali na kondima lelo oyo akoki kozala na bomoi na paradiso awa na mabele. (Yoane 3:16) Epai ya bato ya ndenge wana, Yesu alakaki boye: “Okozala na ngai na Paradiso.”—Luka 23:43.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
© FORGET Patrick/SAGAPHOTO.COM/Alamy