Yekolá na Liloba ya Nzambe
Nzambe azali nani?
Lisolo oyo ebimisi mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe ekomonisa esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.
1. Nzambe azali nani?
Nzambe ya solo azali Mozalisi ya biloko nyonso. Biblia ebengi ye “Mokonzi ya seko,” yango elingi koloba ete azalaki na ebandeli te mpe akozala na nsuka te. (Emoniseli 15:3) Lokola Nzambe azali Liziba ya bomoi, tosengeli kosambela kaka ye.—Tángá Emoniseli 4:11.
2. Nzambe azalaka ndenge nini?
Moto ata moko te amoná Nzambe mpo azali Elimo, yango elakisi ete azali na lolenge moko ya bomoi oyo eleki mosika bikelamu oyo ezali awa na mabele. (Yoane 1:18; 4:24) Bizaleli ya Nzambe emonanaka na biloko oyo akelá. Na ndakisa, ntango tozali kotala ndenge oyo akelá biloko mpe bambuma ndenge na ndenge mpe bafololo, tomonaka mpenza bolingo mpe bwanya ya Nzambe. Bonene ya molɔ́ngɔ́ emonisaka biso nguya ya Nzambe.—Tángá Baroma 1:20.
Tokoki kutu koyekola makambo mingi na ntina na Nzambe na Biblia. Na ndakisa, eyebisaka biso oyo Nzambe alingaka mpe oyo aboyaka, ndenge asalelaka bato makambo, mpe ndenge oyo ayokaka soki tosali likambo boye to boye.—Tángá Nzembo 103:7-10.
3. Nzambe azali na nkombo?
Yesu alobaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Atako Nzambe azali na batitre mingi, azali kaka na nkombo moko. Monɔkɔ mokomoko ezali na ndenge ya kobenga nkombo yango. Na Lingala, ebengamaka mbala mingi “Yehova” to na bantango mosusu “Yawe.”—Tángá Nzembo 83:18.
Babiblia mingi elongolá nkombo ya Nzambe mpe etyá na esika na yango batitre lokola Nkolo to Nzambe. Kasi, ntango Biblia ekomamaki, nkombo ya Nzambe ezalaki mbala soki 7 000 na Biblia. Yesu alakisaki bato nkombo ya Nzambe na ndenge azalaki kosalela yango ntango azali kolimbola Liloba ya Nzambe epai ya bato. Asalisaki bato báyeba Nzambe.—Tángá Yoane 17:26.
4. Yehova atyelaka biso likebi?
Yehova amonisaka ete atyelaka biso likebi na ndenge ye moko nde ayokaka mabondeli na biso. (Nzembo 65:2) Ndenge mpasi etondi boye, yango elingi koloba ete Nzambe akipaka biso te? Bato mosusu balobaka ete Nzambe nde anyokolaka biso mpo na komeka biso, kasi yango ezali solo te. Biblia elobi ete: “Nzambe ya solo akoki kosala mabe ata moke te.”—Yobo 34:10; tángá Yakobo 1:13.
Nzambe apesá moto lokumu na ndenge apesá ye bonsomi ya kopona. Tosepelaka te na bonsomi oyo tozali na yango ya kopona kosalela Nzambe? (Yosua 24:15) Mpasi etondi mingi mpo bato mingi baponá kosala basusu mabe. Yehova ayokaka mpasi na motema ndenge amonaka kozanga bosembo ya ndenge wana.—Tángá Ebandeli 6:5, 6.
Mosika te, Yehova akosalela Yesu mpo na kolongola mpasi mpe baoyo babimisaka yango. Kasi, liboso ntango yango ekoka, ezali na ntina oyo Yehova atiki mpo na mwa ntango mpasi ezala. Liteya moko na kati ya masolo oyo ekolanda na nsima, ekolimbola ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi.—Tángá Yisaya 11:4.
5. Nzambe alingi biso tósala nini?
Yehova akelá biso na likoki ya koyeba mpe kolinga ye. Alingaka tóyekola solo na ntina na ye. (1 Timote 2:4) Soki toyekoli Biblia, tokoyeba Nzambe mpe akokóma moninga na biso.—Tángá Masese 2:4, 5.
Lokola Yehova apesá biso bomoi, tosengeli kolinga ye mingi koleka bato nyonso. Tokoki komonisa ete tolingaka Nzambe ntango tozali kosolola na ye na libondeli mpe ntango tozali kosala makambo oyo asɛngaka biso. (Masese 15:8) Yehova asɛngaka biso tósalela bato mosusu makambo na boboto.—Tángá Marko 12:29, 30; 1 Yoane 5:3.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 1 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 17]
Ezali mpenza na ntina oyo Nzambe atiki mpo na mwa ntango mpasi ezala?