Kelasi ya mbala ya 129 ya Gileade
“Lelo ezali mokolo na bino”
NA MOKOLO ya 11 Sɛtɛmbɛ 2010, bato pene na 8 000 bayanganaki mpo na molulu moko ya ntina mingi ya kopesa badiplome epai ya bana-kelasi ya mbala ya 129 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Ndeko Samuel Herd ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova alobaki na bana-kelasi boye: “Lelo ezali mokolo na bino. Tozali awa mpo na kokabola esengo ná bino.”
“Litoi oyo ezali koyoka”
Ndeko Herd abandaki programɛ yango na kolobela ntina oyo bakristo nyonso basengeli kosalela malamu “litoi oyo ezali koyoka” soki bazali kotya likebi na Liloba ya Nzambe. (Masese 20:12) Ndeko Herd ayebisaki bana-kelasi ete “bódefisaki Yehova matoi na bino na boumeli ya mwa basanza mpe bokokoba kosala bongo mpo na seko.”
Ndenge nini bamisionɛrɛ bakoki kosalela matoi na bango na bwanya? Ndeko Herd alobaki ete “soki bazali kotya likebi na Liloba ya Nzambe.” Abakisaki ete: “Makambo mingi oyo ekolobama na programɛ oyo, ekobongisa bino mpo na mosala na bino ya misionɛrɛ na bambula oyo ezali liboso.”
“Tyelá Yehova motema na yo mobimba”
Ndeko Gerrit Lösch, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asololaki na bana-kelasi na lisolo wana ya kosimba motema. Alobelaki mabaku mingi, oyo basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala mpe ya ntango na biso, batyelaki Yehova motema.
Ndeko Lösch, alobaki ete ndenge moko mpe, “bamisionɛrɛ basengeli kotya motema mobimba na mosala na bango.” Alobaki ete: “Na ndakisa, okoki komituna boye: ‘Nakokoka mpenza koyekola monɔkɔ mosusu? Nakokoka mpenza komesana na mimeseno mosusu? Ndenge nini kolonga makanisi ya kokanisaka mboka na ngai?’” Eyano nini ndeko Lösch apesaki? Alendisaki bana-kelasi “batyelá Yehova motema.”
Ndeko Lösch atángaki mpe Masese 14:26, oyo elobaka ete: “Moto oyo abangaka Yehova, atyelaka ye motema mingi.” Tokokóma kotyela Yehova motema mingi koleka soki tozali kokanisa na ebele ya makambo oyo asalá mpo na biso.
Biblia elobi ete moto oyo atyelaka Yehova motema “akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pembeni na mai, oyo ezali kotinda misisa na yango tii pembeni ya mokɛli ya mai; mpe akomona te molunge ntango ekoya, kasi nkasa na ye ekotondana mpenza.”—Yirimia 17:7, 8.
Liteya ezali polele. Ndeko Lösch, alobaki ete, “ezala likambo nini oyo ezali kozela bino, bosengeli kotyela Yehova motema.”
“Bómekola baanzelu ya sembo”
Yango nde motó ya likambo ya lisolo oyo Ndeko Stephen Lett, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki. Baanzelu bapesaka biso ndakisa moko malamu mpenza. Ndeko Lett alobaki ete, “makambo nyonso oyo Biblia elobi mpo na bango, ezali mpenza ya kolanda.” Na nsima, alobelaki bizaleli minei ya baanzelu ya sembo oyo ekozala malamu tómekola—molende na bango, komikitisa na bango, ndenge bandimaka kosalisa, mpe bosembo na bango.
Biblia elobi ete anzelu moko atɛmɛlaki ‘nkumu ya Perse’—demo moko ya nguya—na boumeli ya mikolo 21. (Danyele 10:13) Anzelu wana amonisaki molende. Ndeko Lett alobaki ete bakristo mpe bazali “kobunda etumba . . . na mampinga ya bilimo mabe.” (Baefese 6:12) Ayebisaki bana-kelasi ete: “Bóbunda makasi mpo bókoba kokokisa mokumba na bino.”
Ntango Manoa, tata ya Samesona atunaki anzelu moko nkombo na ye, Anzelu yango aboyaki kopesa ye nkombo na ye. Anzelu yango amonisaki komikitisa. (Basambisi 13:17, 18) Ndeko Lett ayebisaki bana-kelasi boye: “Soki moto moko aluki kokumisa bino mpo na makoki oyo bozali na yango, na komikitisa nyonso bósala ete likebi etyama epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye, kasi epai na bino te.”—1 Bakorinti 4:7.
Ntango Yesu azalaki na elanga ya Getesemane, mwa moke liboso ya liwa na ye, “anzelu moko autaki na likoló abimeli ye mpe alendisi ye.” (Luka 22:43) Anzelu wana andimaki kosalisa. Ndeko Lett alobaki ete: “Luká mpenza koyeba makambo nini ozali na yango mposa na mosala na yo ya misionɛrɛ mpe na nsima, na lisalisi ya Yehova, luká kokokisa bamposa yango.”
Lokola kaka mwa ndambo ya baanzelu nde balandaki Satana na botomboki na ye, tokoki koloba ete ebele ya baanzelu oyo bazali na likoló bazali ndakisa malamu mpenza ya bosembo.—Emoniseli 12:4.
Ndeko Lett alendisaki bana-kelasi ete “na ndakisa ya baanzelu wana ya sembo, bótɛmɛlaka Zabolo mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
Makambo misato mosusu ya ntina ya programɛ yango
“Bótalelaka Yehova lokola libanga ya motema na bino.” Ntango asalaki lisolo wana ya kosimba mpenza motema, oyo euti na Nzembo 73:26, ndeko Gary Breaux, ya komite ya filiale ya États-Unis, asalisaki bana-kelasi bámona ntina ya kotalelaka Yehova. Na ndenge nini Yehova azali lokola libanga? Ndeko Breaux alobaki ete: “Libanga ekoki kopekisa ete mopɛpɛ makasi emema papye. Ndenge moko, Yehova akoki kobatela motema na bino mpo ememama te.” Na ntembe te, motema ekoki kokosa biso ntango tokutani na makambo oyo ekosɛnga tómonisa molende. (Yirimia 17:9) Klima ya sika, bilei mosusu, kofanda na baninga ya sika na ndako ya bamisionɛrɛ—makambo wana nyonso ekoki kosala ete moto amona ete ebongi atika mosala. Ndeko Breaux alobaki ete: “Bokokutana na makambo oyo ekosɛnga bino bótalela likanisi boye to boye mpo na kozwa bikateli. Bokozwa ekateli oyo ekosepelisa Yehova? Soki bosali bongo, Yehova akokóma ‘libanga ya motema na bino.’ Akotambwisa bino.”
“Bózali na kondima makasi mpo na kopɔlisa makolo na bino na mai?” Ndeko Sam Roberson, moko ya balakisi ya Gileade asalaki lisolo yango, oyo euti na Yosua mokapo 3. Ndenge nini bamilio ya Bayisraele bakokaki kokatisa Ebale Yordani ntango etondaki naino na mai? Yehova ayebisaki Yosua ayebisa banganga-nzambe ‘bátɛlɛma na kati ya Yordani.’ Nzambe alakaki ete: “Ntango makolo ya banganga-nzambe . . . ekonyata mai ya Yordani, mai ya Yordani ekokatana . . . mpe ekotɛlɛma lokola efelo.” (Yosua 3:8, 13) Ndeko Roberson ayebisaki bana-kelasi ete: “Bokokutana na ‘bayordani’ na bomoi na bino, oyo ekopekisa bino bózwa mapamboli soki botikeli yango nzela.” Na ndakisa, bokoki kozala na mokakatano ya koyokana malamu ná baninga na bino bamisionɛrɛ. Bokosala nini? Ndeko Roberson alendisaki bana-kelasi ete: “Bótala nde mosala na bino; kasi te bato. Soki bomonisi kondima ya kopɔlisa makolo na bino na mai, Yehova akosalisa bino bókatisa ‘bayordani’ oyo bokotuna na yango na mosala na bino ya misionɛrɛ.”
“Bópika myango na bino makasi.” Yango nde lisolo oyo ndeko William Samuelson, molakisi mosusu ya Gileade asalaki. Lisolo na ye eutaki na Masese 16:3, oyo elobaka ete: “Tikelá Yehova misala na yo mpe myango na yo ekopikama makasi.” Ndeko Samuelson atunaki bana-kelasi boye: “Vɛrsɛ oyo elingi koloba ete bino bokoki kosala myango na bino te, kasi ‘bótikelaka kaka Yehova misala na bino?’” Alobaki ete te, mpo Masese 16:1 elobi ete: “Kotya makambo ya motema na molɔngɔ ezali likambo ya moto ya mabele.” Ndeko Samuelson alobaki ete: “Yehova akotya te makambo na molɔngɔ na mitema na bino na ndenge ya likamwisi. Kasi, bosengeli mpenza komindimisa ete bozali kokende na nzela ya malamu. Soki bozali koyekola, kobondela, mpe koyokana malamu ná bafiliale na bino, bokokoba kozala na mitema oyo ekosalisa bino malamu, mpe Yehova akopika makasi myango na bino.”
Makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna oyo batunaki bango
Na kati ya formasyo na bango, bana-kelasi ya Gileade babimaka mosala ya kosakola ná masangá ya Batatoli ya Yehova oyo batindaka bango. Ndeko Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileade, atunaki bana-kelasi báloba makambo oyo bakutanaki na yango. Mingimingi balobelaki makambo oyo bakutanaki na yango oyo emonisi ndenge libondeli esalisaka mpo na kokutana na bato oyo bazali na mitema ebongi na teritware.
Na ndakisa, mobali moko ná mwasi na ye bayaki na restora. Moto moko oyo azalaki kosala na restora yango amonaki ete mobali yango ná mwasi na ye bazalaki kobondela. Apusanaki mpe atunaki soki bazali Batatoli ya Yehova. Ntango ayebaki ete bazali Batatoli ya Yehova, moto yango ayebisaki bango ete akolá na libota ya Batatoli kasi asalelaki te makambo oyo ayekolaki. Asalaká kutu likambo moko ya mabe mpe akɔtaká bolɔkɔ. Elenge mobali yango amonaki sikoyo ete azali lisusu na mposa ya lisalisi ya Yehova na bomoi na ye. Alobaki mpe ete liboso mwasi wana ná mobali na ye bákɔta na restora, azalaki kobondela, koyebisa Nzambe ete asalisa ye mpo abongisa bomoi na ye. Nzambe ayokaki libondeli na ye!
Na lisolo na ye oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu,” ndeko Rudi Hartl ya departema oyo esalaka mosala ya kopesa biyano na mituna ya Biblia oyo bato batunaka, asololaki na ndeko Wayne Wridgway ya Ekólo Mozambique, Jason Reed ya Chili, mpe Kenji Chichii ya Népal. Bango nyonso misato bazali bamisionɛrɛ oyo batángá na Gileade. Bandeko yango balobelaki polele mwa mikakatano oyo bakutanaki na yango ntango babandaki mosala ya misionɛrɛ—koyekola monɔkɔ ya sika, komesana na mimeseno ya sika, to kolonga makanisi ya kokanisaka mboka na bango. Ndeko Chichii alobaki boye: “Likambo esalisaki biso ezali ete tosalaki boninga ná bandeko ya masangá na biso ya sika ntango kaka tokómaki. Ntango tomesanaki na lisangá, ezalaki lisusu mpasi te kolonga makanisi ya kokanisa bamboka na biso.”
Ntango bana-kelasi nyonso 56 bazwaki badiplome, mwa moke na nsima, moko na bango atángaki mokanda ya kosimba motema oyo bana-kelasi bazongisaki matondi mpo na kelasi yango. Na kati, mokanda yango elobaki boye mpo na Lisangani ya Mikóló-Bakambi: “Biso nyonso bana-kelasi tomonaki libosoliboso ndenge bomipesaki mpenza na bolingo mpe molende nyonso, bobongisaki programɛ ya kitoko, bozalaki koya kotala biso na kelasi, mpe bopesaki biso mateya kitoko ya Nzambe. Lokola bomoniseli biso bolingo, tokosala nyonso mpo tómekola ndakisa na bino malamu ya bolingo, motema molai, komikitisa mpe kotyela bato likebi ntango tokokóma epai batindi biso.”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 28]
“Soki moto moko aluki kokumisa bino . . . , bósala ete likebi etyama . . . epai na bino te”
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
“Bokokutana na ‘bayordani’ na bomoi na bino”
[Etanda/Karte na lokasa 31]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 9
Bana-kelasi: 56
Babalani: 28
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,0
Mwayene ya mbula ya batisimo: 17,9
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,3
[Karte]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Batindami na mikili: 25 oyo ezali awa na nse:
EPAI BAMISONƐRƐ BATINDAMI
ALLEMAGNE
BOLIVIE
BOTSWANA
BULGARIE
CONGO (KINSHASA)
CÔTE D’IVOIRE
GAMBIE
INDE
INDONÉSIE
KENYA
LIBÉRIA
MACÉDOINE
MADAGASCAR
MALAISIE
MOZAMBIQUE
OUGANDA
PANAMA
PÉROU
POLOGNE
ROUMANIE
SERBIE
SIERRA LEONE
SWAZILAND
TANZANIE
ZIMBABWE
[Elilingi na lokasa 30]
Bana-kelasi ya Gileade bazali kosala elakiseli moko ya makambo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 31]
Kelasi ya mbala ya 129 ya Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi, mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Munaretto, R.; Olofsson, Y.; Budden, K.; Najdzion, L.; Moya, G.; Treviño, G.; Dion, A.; Fleegle, A.
(2) Smith, J.; Michael Raj, J.; Smith, S.; Paramo, A.; McDonald, J.; Deans, M.; Joyal, S.; Watson, L.
(3) Joyal, C.; Crawley, T.; Hacker, D.; Shynkarenko, J.; Knapp, T.; Ayling, J.; Highley, C.; Olofsson, B.
(4) Fitzpatrick, M.; Najdzion, B.; Skallerud, L.; Harris, A.; Harris, S.; Budden, R.; Paramo, Y.; Skallerud, K.
(5) Crawley, B.; Michael Raj, J.; Lodge, A.; Lodge, R.; Herms, N.; Fitzpatrick, J.; Moya, R.; Munaretto, P.
(6) Watson, S.; Deans, M.; Hacker, J.; McDonald, J.; Treviño, J.; Harris, S.; Herms, C.; Harris, P.
(7) Shynkarenko, V.; Highley, T.; Smith, A.; Dion, J.; Ayling, R.; Smith, B.; Knapp, T.; Fleegle, B.