Oyinaka makambo ya kobuka mibeko?
“[Yesu] oyinaki makambo ya kobuka mibeko.”—EBR. 1:9.
1. Yesu ateyaki nini na ntina etali bolingo?
MPO na komonisa ntina ya bolingo, Yesu Kristo alobaki na bayekoli na ye boye: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka bino na bino. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo bázala na bolingo oyo ekotinda bango bámipimela makambo mosusu mpo na basusu. Bolingo yango ekozala elembo oyo ekokesenisa bango na basusu. Yesu alendisaki bango mpe ete: “Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.”—Mat. 5:44.
2. Bayekoli ya Kristo basengeli koyekola koyina nini?
2 Nzokande, Yesu asukaki kaka na koteya bayekoli na ye bolingo te; ateyaki bango mpe makambo oyo basengelaki koyina. Biblia elobi mpo na Yesu ete: “Olingaki boyengebene, mpe oyinaki makambo ya kobuka mibeko [makambo ya mabe].” (Ebr. 1:9; Nz. 45:7) Yango emonisi ete tosengeli koyekola kaka kolinga boyengebene te, kasi mpe koyina lisumu, to makambo ya kobuka mibeko. Tóyeba ete ntoma Yoane alobaki boye: “Moto nyonso oyo asalaka lisumu azali mpe kobuka mibeko, mpe na yango lisumu nde kobuka mibeko.”—1 Yoa. 3:4.
3. Na oyo etali koyina makambo ya kobuka mibeko, makambo nini ya bomoi tokolobela na lisolo oyo?
3 Na yango, biso bakristo tosengeli komituna boye: ‘Nayinaka makambo ya kobuka mibeko?’ Tótala ndenge tokoki komonisa ete toyinaka oyo ezali mabe na makambo minei oyo ya bomoi: (1) ndenge na biso ya kotalela masanga, (2) ndenge na biso ya kotalela misala ya molili, (3) ndenge na biso ya kotalela pite ná ekobo, mpe (4) ndenge na biso ya kotalela bato oyo balingaka makambo ya kobuka mibeko.
Tótika masanga na esika na yango
4. Mpo na nini Yesu azalaki na elobeli ya bosembo mpe ya polele ntango apesaki toli na oyo etali komɛla mingi?
4 Na bantango mosusu, Yesu amɛlaki vinyo mpe andimaki bongo ete ezali likabo oyo euti na Nzambe. (Nz. 104:14, 15) Kasi, asalelaki yango na ndenge ya mabe ata mokolo te; amipesaki na komɛla mingi te. (Mas. 23:29-33) Na yango, Yesu azalaki na elobeli ya bosembo mpe ya polele ntango apesaki toli na likambo yango. (Tángá Luka 21:34.) Kolekisa ndelo na komɛla masanga ekoki komema na masumu mosusu ya minene. Yango wana ntoma Paulo akomaki boye: “Bólangwaka vinyo te, mpo bomoi ya mbindo ezali na kati na yango, kasi bókoba kotonda na elimo.” (Ef. 5:18) Apesaki mpe mibange basi na lisangá toli ete bázala “baombo ya vinyo te.”— Tito 2:3.
5. Mituna nini baoyo baponi komɛla masanga bakoki komituna?
5 Soki oponi komɛla masanga, ekozala mpe malamu omituna boye: ‘Nazali na likanisi moko ná Yesu na oyo etali komɛla mingi? Soki esɛngi napesa moto toli na likambo yango, nazalaka na elobeli ya bosembo mpe ya polele? Namɛlaka mpo na kokima basusi to mpo na kokitisa mitungisi? Milangi to kɔpɔ boni ya masanga namɛlaka na pɔsɔ moko? Nasalaka boni soki moto alobi ete namɛlaka mingi? Nalukaka komilongisa to kutu nasilikaka?’ Kokóma moombo ya masanga ekoki kobebisa makoki na biso ya kokanisa malamu mpe ya kozwa bikateli ya malamu. Bayekoli ya Kristo basalaka makasi bábatela likoki na bango ya kokanisa.—Mas. 3:21, 22.
Tókima misala ya molili
6, 7. (a) Yesu asalaki nini na Satana mpe bademo? (b) Mpo na nini misala ya molili epalangani mingi lelo?
6 Ntango azalaki awa na mabele, Yesu atɛmɛlaki mpenza Satana ná bademo. Aboyaki makambo ya polele oyo Satana asalaki mpo na komeka bosembo na ye. (Luka 4:1-13) Lisusu, asosolaki mpe atɛmɛlaki mayele ya nsense oyo basalelaki mpo na kobongola makanisi mpe misala na ye. (Mat. 16:21-23) Yesu asalisaki baoyo bazalaki na ezaleli oyo ebongi bálongwa na boombo mabe ya bademo.—Mrk. 5:2, 8, 12-15; 9:20, 25-27.
7 Nsima ya kotyama Mokonzi na 1914, Yesu apɛtolaki likoló mpe alongolaki bopusi mabe ya Satana mpe bademo na ye. Yango wana lelo, koleka na eleko mosusu nyonso, Satana azali na ekateli makasi “kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (Em. 12:9, 10) Na yango, tosengeli kokamwa te ndenge mposa ya koyeba makambo ya molili ezali se kopalangana mpe kokola. Tosengeli kosala nini mpo tómibatela?
8. Mituna nini mokomoko na biso asengeli komituna na oyo etali kopona kominanola?
8 Biblia ekebisi biso polele ete kosala boyokani na bilimo mabe ezali na makama mingi. (Tángá Kolimbola Mibeko 18:10-12.) Lelo, Satana ná bademo bazali kobebisa makanisi ya bato na nzela ya bafilme, babuku, mpe masano ya video oyo elendisaka misala ya molili. Na yango, ntango tolingi kopona ndenge ya kominanola, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Na basanza oyo eleki, natalaki bafilme, baemisyo ya televizyo, nabɛtaki masano ya video, natángaki babuku, to natalaki bateyatre oyo emonisaki misala ya bilimo mabe? Namonaka ntina ya koboya makambo oyo etyaka moto na boyokani na bademo, to namonaka ete makambo yango ezali likama te? Nasilá komituna ndenge oyo Yehova akoki koyoka mpo na kominanola oyo naponi? Soki nafungolelaki bopusi wana ya Satana porte na bomoi na ngai, bolingo oyo nalingaka Yehova mpe mitinda na ye ya sembo ekotinda ngai nazwa bikateli ya makasi mpe nakangela yango porte mbala moko?’—Mis. 19:19, 20.
Tótosa likebisi ya Yesu na oyo etali pite mpe ekobo
9. Ndenge nini moto akoki kobanda kolinga makambo ya kobuka mibeko?
9 Yesu akɔtelaki mitinda ya Yehova na oyo etali kosangisa nzoto. Alobaki boye: “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:4-6) Yesu ayebaki ete makambo oyo tozali kotala na miso na biso ekoki kosala mosala na motema na biso. Yango wana na Lisolo Likoló ya Ngomba, alobaki boye: “Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te.’ Kasi ngai nalobi na bino ete moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Mat. 5:27, 28) Baoyo bazali koboya kolanda likebisi wana ya Yesu, bazali nde kokolisa bolingo ya makambo ya kobuka mibeko.
10. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete moto akoki kolongwa na boombo ya pornografi.
10 Satana azali kolendisa pite mpe ekobo na nzela ya pornografi. Mokili ya lelo etondi na makambo yango. Baoyo batalaka pornografi bazalaka na mokakatano ya kolongola na mitó na bango bililingi ya mbindo oyo batalaki. Bakoki kutu kokóma baombo ya pornografi. Tótala likambo oyo ekómelaki mokristo moko. Alobi boye: “Nazalaki kotala pornografi na kobombana. Na kati ya makanisi na ngai, namisalelaki mokili moko ya bisengo oyo ezalaki mosika na mokili epai nazalaki kosalela Yehova. Nayebaki ete momeseno yango ezalaki mabe kasi nazalaki koloba ngai moko ete atako bongo, Nzambe azali kaka kondima mosala oyo nazali kosalela ye.” Nini ebongolaki makanisi ya ndeko mobali yango? Alobi boye: “Nasalaki likambo oyo eleki mpasi na makambo nyonso oyo nasalá: nazwaki ekateli ya koyebisa bankulutu mokakatano na ngai.” Nsukansuka, ndeko yango alongwaki na boombo ya momeseno wana ya mbindo. Alobi boye: “Nsima ya kolongola lisumu wana na bomoi na ngai, nsukansuka nayokaki ete nakómi mpenza na lisosoli ya pɛto.” Bato oyo bayinaka makambo ya kobuka mibeko basengeli koyekola koyina pornografi.
11, 12. Ndenge nini tokoki komonisa ete toyinaka makambo ya kobuka mibeko na oyo etali kopona miziki?
11 Miziki mpe maloba na yango ekoki mpenza kosimba mayoki na biso, mpe na bongo, motema na biso ya elilingi. Miziki yango moko ezali likabo oyo euti na Nzambe mpe banda kala, ezalaka na esika na losambo ya solo. (Kob. 15:20, 21; Ef. 5:19) Kasi, mokili mabe ya Satana ezali kopalanganisa miziki oyo ekumisaka pite mpe ekobo. (1 Yoa. 5:19) Ndenge nini okoki koyeba soki miziki oyo oyokaka ezali kokómisa yo mbindo to te?
12 Bandá naino na komituna boye: ‘Banzembo oyo nayokaka ekumisaka koboma, ekobo, pite, mpe kofinga? Soki esɛngi natángela moto maloba ya banzembo yango mosusu, moto yango akomona ete nayinaka makambo ya kobuka mibeko, to maloba ya banzembo yango ekomonisa ete motema na ngai ekómá mbindo?’ Tokoki te koyina makambo ya kobuka mibeko na maloba mpe kokumisa yango na banzembo. Yesu alobaki boye: “Makambo oyo ebimaka na monɔkɔ eutaka na motema, mpe makambo wana nde ekómisaka moto mbindo. Na ndakisa, makanisi mabe, koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga eutaka na motema.”—Mat. 15:18, 19; talá mpe Yakobo 3:10, 11.
Landá likanisi ya Yesu mpo na baoyo balingaka kobuka mibeko
13. Ndenge nini Yesu atalelaki baoyo batingamaki na masumu?
13 Yesu alobaki ete ayaki kobenga bato ya masumu, to bato oyo basalaka makambo ya kobuka mibeko, mpo bábongola motema. (Luka 5:30-32) Kasi, ndenge nini atalelaki baoyo batingamaki na nzela ya masumu? Yesu akebisaki bayekoli na ye makasi ete bálanda bato yango te. (Mat. 23:15, 23-26) Alobaki mpe polele ete: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Na mokolo yango [ntango Nzambe akopesa bitumbu na ye], bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’” Kasi, akoboya baoyo basalaka makambo ya kobuka mibeko kozanga kobongola mpe akoloba na bango ete: “Bólongwa mosika na ngai.” (Mat. 7:21-23) Mpo na nini akosala bango ndenge wana? Mpo bato yango bazali kofinga Nzambe mpe konyokola basusu na misala na bango ya kobuka mibeko.
14. Mpo na nini basumuki oyo baboyi kobongola motema babimisamaka na lisangá?
14 Liloba ya Nzambe elobi ete basumuki oyo baboyi kobongola motema bábimisama na lisangá. (Tángá 1 Bakorinti 5:9-13.) Esengeli kosalema bongo mpo na bantina soki misato: (1) mpo nkombo ya Yehova efingama te, (2) mpo na kobatela lisangá ekóma mbindo te, mpe (3) mpo na kosalisa mosumuki abongola motema soki likoki ezali.
15. Soki olingi kotikala sembo epai ya Yehova, osengeli komituna mituna nini ya ntina mingi?
15 Biso mpe totalelaka bato oyo bakangami na etamboli na bango ya kobuka mibeko ndenge Yesu atalelaka bango? Tosengeli komanyola mituna oyo: ‘Nakosepela kozalaka mbala na mbala na moto oyo abimisami na lisangá to oyo aponi ye moko kolongwa na lisangá ya bokristo? Bongo soki moto yango azali ndeko ya libota oyo tofandaka na ye lisusu ndako moko te?’ Likambo ya ndenge wana ekoki mpenza komeka bolingo na biso mpo na boyengebene mpe bosembo na biso epai ya Nzambe.a
16, 17. Mama mokristo moko akutanaki na mokakatano nini, mpe nini esalisaki ye atosa ebongiseli ya kobimisa basumuki na lisangá soki baboyi kobongola motema?
16 Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo mwana na ye ya mobali ya mokóló azalaki kolinga Yehova na bomwana. Kasi ntango akolaki, amipesaki na makambo ya kobuka mibeko mpe abongolaki motema te. Na yango, abimisamaki na lisangá. Ndeko mwasi wana alingaki Yehova, kasi alingaki mpe mwana na ye mpe amonaki ete ezali mpasi mingi mpo asalela etinda ya Biblia ya koboya kosololaka na ye.
17 Toli nini okokaki kopesa ndeko wana? Nkulutu moko asalisaki ye amona ete Yehova ayebi mpasi oyo azali koyoka. Nkulutu yango asɛngaki ye akanisa mpasi oyo na ntembe te Yehova ayokaki ntango baanzelu na ye mosusu batombokaki. Nkulutu yango ayebisaki ye ete atako Yehova ayebi mpasi oyo likambo yango ekoki kosala, asɛngi ete basumuki oyo babongoli motema te bábimisama na lisangá. Ndeko mwasi yango atyaki likebi na batoli wana mpe atosaki na bosembo ebongiseli ya kobimisa moto na lisangá.b Bosembo ya ndenge wana esepelisaka motema ya Yehova.—Mas. 27:11.
18, 19. (a) Kokata boyokani na moto oyo asalaka makambo ya kobuka mibeko emonisaka ete toyinaka nini? (b) Nini ekoki kosalema ntango tozali sembo epai ya Nzambe mpe ebongiseli na ye?
18 Soki okutani na likambo ya ndenge wana, tobondeli yo obosana te ete Yehova ayebi mpasi na yo. Soki okati boyokani na moto oyo abimisami na lisangá to oyo aponi ye moko kotika lisangá, ozali komonisa ete oyinaka bizaleli mpe misala oyo ememaka na likambo wana. Kasi, ozali mpe komonisa ete olingi mpenza mosali mabe yango mpe mpo na yango, olingi kosala oyo eleki malamu mpo na ye. Bosembo na yo epai ya Yehova ekoki mpe kotinda moto oyo azwi disiplini abongola motema mpe azongela Yehova.
19 Ndeko mwasi moko oyo abimisaki na lisangá mpe na nsima azongisamaki akomaki boye: “Nazali na esengo ndenge Yehova alingaka bato na ye mingi mpe asalaka nyonso mpo na kobatela ebongiseli na ye pɛto. Oyo bato ya libándá bakoki komona ete ezali makambo makasi, ezali nde likambo oyo esengeli kosalema mpe oyo emonisaka mpenza bolingo.” Okanisi ete moto yango akokaki koloba bongo soki bandeko ya lisangá, ata mpe baoyo bazali na libota moko na ye, bakobaki kosolola na ye mbala na mbala ntango azalaki libándá ya lisangá? Soki tozali kotosa ebongiseli ya kobimisa moto na lisangá, ndenge Biblia esɛngi, tokomonisa ete tolingaka boyengebene mpe tondimi ete Yehova azali na lotomo ya kotyela biso mitinda na oyo etali etamboli.
‘Tóyina oyo ezali mabe’
20, 21. Mpo na nini ezali na ntina tóyekola koyina makambo ya kobuka mibeko?
20 Ntoma Petro akebisi biso boye: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka.” Mpo na nini? Mpo “monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Pe. 5:8) Moto yango ekozala nde yo? Etali mingimingi ndenge oyo ozali koyekola koyina makambo ya kobuka mibeko.
21 Koyekola koyina oyo ezali mabe ezalaka pɛtɛɛ te. Tobotamá na kati ya lisumu, mpe tozali kofanda na mokili oyo elendisaka bato bálanda bamposa ya mosuni. (1 Yoa. 2:15-17) Nzokande, soki tomekoli Yesu Kristo mpe toyekoli kolinga Yehova Nzambe na motema mobimba, tokoki kolonga koyina makambo ya kobuka mibeko. Tózala na ekateli ya ‘koyina oyo ezali mabe,’ tótya motema mobimba ete Yehova “abatelaka . . . bato na ye ya sembo; abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”—Nz. 97:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba likambo yango malamumalamu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1981, nkasa 26-31 (na Lifalanse).
b Talá mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2007, nkasa 17-20.
Okopesa eyano nini?
• Nini ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo totalelaka masanga?
• Makambo nini tokoki kosala mpo tómibatela na misala ya molili?
• Mpo na nini pornografi ezali likama?
• Ndenge nini tokomonisa ete toyinaka makambo ya kobuka mibeko ntango moto oyo tolingaka abimisami na lisangá?
[Elilingi na lokasa 29]
Soki oponi komɛla masanga, mituna nini osengeli komituna?
[Elilingi na lokasa 30]
Kebá na bopusi ya Satana ntango ozali kominanola
[Elilingi na lokasa 31]
Moto oyo atalaka pornografi azali kokolisa bolingo ya nini?