Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/3 nk. 12-16
  • Tótyela Yehova motema awa nsuka ekómi pene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótyela Yehova motema awa nsuka ekómi pene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango tomekami mpo na kosala mabe
  • Ntango bato basepeli na nsango na biso te to bazali kotɛmɛla biso
  • Ntango tozali na mitungisi
  • “Kimya ya Nzambe” ebatela motema na yo
  • Komisá elikya na yo makasi epai ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Botya elikya na bino epai na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/3 nk. 12-16

Tótyela Yehova motema awa nsuka ekómi pene

“Ntango nyonso, bótyela Yehova motema.”​—YIS. 26:4.

1. Bokeseni nini ezali kati na basaleli ya Nzambe ná bato ya mokili?

TOFANDI na mokili oyo bamilio ya bato bayebi lisusu te soki bakotyela nani to nini motema, mbala mosusu mpo bazokisá bango mingi na motema to mpe bakosá bango mingi. Ezali bongo te mpo na basaleli ya Yehova! Lokola batambwisami na bwanya oyo euti na Nzambe, bayebi malamu mpenza ete bakoki te kotyela mokili oyo mpe “bankumu” na yango motema. (Nz. 146:3) Kasi, batiká bomoi na bango ya lelo mpe ya mikolo ezali koya na mabɔkɔ ya Yehova, mpo bayebi ete alingaka bango mpe ete akokisaka ntango nyonso Liloba na ye.​—Rom. 3:4; 8:38, 39.

2. Yosua alobaki nini mpo na komonisa ete Nzambe abongi kotyelama motema?

2 Na ntango ya kala, Yosua amonisaki ete Nzambe abongi kotyelama motema. Na nsuka ya bomoi na ye, ayebisaki bandeko na ye Bayisraele ete: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino.”​—Yos. 23:14.

3. Nkombo ya Nzambe emonisaka nini mpo na ye?

3 Yehova akokisaka bilaka na ye, kaka te mpo alingaka basaleli na ye kasi mingimingi mpo na nkombo na ye moko. (Kob. 3:14; 1 Sa. 12:22) Na maloba ya ebandeli ya libongoli na ye ya Biblia (The Emphasized Bible), Joseph Rotherham alobaki ete nkombo ya Nzambe elimboli ete akoki kokóma nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa bilaka na ye. Ntango toyoki nkombo na ye, tozongisaka na makanisi ete asalaka ntango nyonso makambo oyo alobi. Akoki kosala nyonso oyo alingi, ata na ngonga to na esika nini. Eloko moko te ezali mpasi mpo na ye. Nzambe asalaka ntango nyonso makambo na kolanda nkombo na ye.

4. (a) Yisaya 26:4 elendisi biso tósala nini? (b) Lisolo oyo ekolobela nini?

4 Omituna boye: ‘Nayebi mpenza Yehova malamu mpo natyela ye motema mobimba? Nabangaka te mpo na mikolo ezali koya, mpo nayebi ete makambo nyonso ezali na mabɔkɔ ya Nzambe?’ Yisaya 26:4 elobi boye: “Ntango nyonso, bótyela Yehova motema, mpo Yah Yehova nde Libanga ya libela na libela.” Ya solo, lelo Nzambe asalaka lisusu makamwisi na bomoi ya bato te ndenge asalaki na mabaku mosusu na ntango ya kala. Atako bongo, lokola azali “Libanga ya libela na libela,” tokoki kotyela ye motema “ntango nyonso.” Ndenge nini Nzambe na biso oyo abongi kotyelama motema asalisaka basambeli na ye ya sembo lelo? Tólobela makambo misato: Apesaka biso makasi ntango toluki lisalisi mpo na kotɛmɛla komekama, asungaka biso ntango bato bazali kosepela te na nsango na biso to ntango tokutani na botɛmɛli makasi, mpe alendisaka biso ntango tozali na mitungisi. Wana tozali kotalela makambo yango, kanisá ndenge oyo okoki kotyela Yehova motema mingi koleka.

Ntango tomekami mpo na kosala mabe

5. Na oyo etali kotyela Nzambe motema, mokakatano monene ekoki kozala wapi?

5 Ezalaka mpasi te kotyela Yehova motema mpo na elaka oyo apesi biso ya Paradiso mpe lisekwa​—makambo oyo tozali kozela na mposa makasi. Kasi, ekoki kozala mpasi kotyela ye motema ntango esɛngi tótosa mitinda na ye oyo etali bizaleli mpe tóndima na motema mobimba ete kolanda banzela mpe mibeko na ye ezali likambo ya malamu mpe ekopesa biso esengo mingi. Mokonzi Salomo apesaki toli oyo: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Mas. 3:5, 6) Awa balobeli “banzela” na biso. Ya solo, tosengeli komonisa ete totyelaka Yehova motema na bomoi na biso mobimba​—kaka te na oyo etali elikya oyo apesá biso. Ndenge nini tokoki komonisa yango ntango tokutani na komekama?

6. Ndenge nini tokoki kolendisa ekateli na biso ya koboya makanisi ya mabe?

6 Koboya oyo ezali mabe ebandaka na makanisi. (Tángá Baroma 8:5; Baefese 2:3.) Na yango, ndenge nini okoki kolendisa ekateli na yo ya koboya makanisi ya mabe? Makambo oyo mitano ekoki kosalisa yo: 1. Luká lisalisi ya Nzambe na nzela ya libondeli. (Mat. 6:9, 13) 2. Manyolá bandakisa oyo Biblia epesi ya bato oyo bayokaki Yehova te mpe ya baoyo bayokaki ye. Na nsima talelá ndenge makambo na bango esukaki.a (1 Ko. 10:8-11) 3. Kanisá mpasi mpe mawa oyo lisumu ekoki kosala yo mpe balingami na yo. 4. Kanisá ndenge Nzambe ayokaka ntango mosaleli na ye moko akwei na lisumu ya monene. (Tángá Nzembo 78:40, 41.) 5. Kanisá esengo makasi oyo Yehova ayokaka na motema ntango azali komona mosambeli na ye ya sembo azali koboya mabe mpe azali kosala oyo ezali malamu, ezala na miso ya bato to ntango azali ye moko. (Nz. 15:1, 2; Mas. 27:11) Yo mpe okoki komonisa Yehova ete otyelaka ye motema.

Ntango bato basepeli na nsango na biso te to bazali kotɛmɛla biso

7. Yirimia akutanaki na komekama nini, mpe ndenge nini ayokaki na bantango mosusu?

7 Bandeko na biso mingi bazali kosala na bateritware ya mpasi mpenza. Mosakoli Yirimia mpe asalaki na teritware moko ya ndenge wana​—bokonzi ya Yuda, ntango ezalaki na yikiyiki liboso ebebisama. Kondima ya Yirimia ezalaki komekama mokolo na mokolo mpo azalaki kotosa Nzambe mpe kosakola bansango ya lisambisi na Ye. Na eleko moko, ata Baruke, sɛkrɛtɛrɛ na ye ya sembo, amilelaki ete alɛmbi. (Yir. 45:2, 3) Yirimia alɛmbaki nzoto? Ezali solo ete na bantango mosusu, akómaki mawamawa. Alobaki boye: “Mokolo oyo nabotamaki elakelama mabe! . . . Mpo na nini nabimaki na libumu ete namona mosala makasi ná mawa mpe mpo mikolo na ngai esuka kaka na nsɔni?”​—Yir. 20:14, 15, 18.

8, 9. Na kolanda Yirimia 17:7, 8 mpe Nzembo 1:1-3, tosengeli kosala nini mpo tókoba kobota mbuma ya malamu?

8 Atako bongo, Yirimia atikaki mosala na ye te. Akobaki kotyela Yehova motema. Mpo na yango, mosakoli yango ya sembo amonaki ndenge maloba ya Yehova oyo ezali na Yirimia 17:7, 8 ekokisamaki: “Apambolama mobali makasi oyo azali kotyela Yehova motema, mpe oyo Yehova akómi moto na ye oyo atyelaka motema. Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pembeni na mai, oyo ezali kotinda misisa na yango tii pembeni ya mokɛli ya mai; mpe akomona te molunge ntango ekoya, kasi nkasa na ye ekotondana mpenza. Mpe na mbula ya eleko ya kokauka makasi akomitungisa te, mpe akotika te kobota mbuma.”

9 Ndenge moko na nzete oyo etondi na nkasa, oyo “elonami pembeni na mai” to oyo basopelaka mai ntango nyonso, Yirimia ‘atikaki kobota mbuma’ ata mokolo moko te. Aboyaki kolanda makanisi ya bato mabe mpe basɛki oyo bazalaki zingazinga na ye. Akangamaki nde na Yehova, Liziba ya “mai” oyo ebatelaka bomoi mpe alandaki na likebi makambo nyonso oyo Yehova ayebisaki ye. (Tángá Nzembo 1:1-3; Yir. 20:9) Yirimia azali ndakisa malamu mpenza mpo na biso, mingimingi mpo na baoyo bazali kosalela Nzambe na bateritware ya mpasi! Soki ezali bongo mpo na yo, kobá kotyela Yehova motema mobimba, mpo akosalisa yo oyika mpiko wana ozali “kosakola nkombo na ye polele.”​—Ebr. 13:15.

10. Mapamboli nini tozali na yango, mpe motuna nini tosengeli komituna?

10 Yehova apesi biso biloko mingi mpo na kosalisa biso tóyika mpiko na makambo oyo tozali kokutana na yango na bomoi na mikolo oyo ya nsuka. Na ndakisa, apesi biso Liloba na ye na mobimba na yango, oyo ezali kobongolama na bosikisiki na minɔkɔ mingi. Azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo na ntango ebongi na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Mpe apesá biso bandeko ebele oyo bakoki kosunga biso, oyo tokutanaka na bango na makita mpe na mayangani. Ozali kosalela malamu bibongiseli wana nyonso? Bato nyonso oyo bazali kosalela yango “bakoganga na esengo na ndenge bakoyoka malamu na motema.” Kasi, baoyo baboyaka koyoka Nzambe ‘bakoganga mpo na mpasi na motema mpe bakoganga na kolela mpo elimo elɛmbi.’​—Yis. 65:13, 14.

Ntango tozali na mitungisi

11, 12. Na mikakatano oyo ezali na mokili, nzela nini ezali na bwanya ya solosolo?

11 Ndenge esakolamaki, bato bazali se konyokwama na makambo mingi ya mawa. (Mat. 24:6-8; Em. 12:12) Soki mboka moko ezindi na mai, bato mingi balukaka kokima na bisika oyo etombwani to bamataka na nsamba ya ndako mpo na komibatela. Ndenge moko mpe, lokola makambo na mokili ezali se kobakisama, bamilio ya bato bazali kokima na bisika oyo ezali komonana lokola etombwaná, na ndakisa na bibongiseli ya mbongo, ya politiki to ya mangomba, ata mpe na siansi to na teknoloji. Nzokande, moko te kati na yango ekoki mpenza kobatela. (Yir. 17:5, 6) Kasi, basaleli ya Yehova bazali na esika ya malamu mpo na kokima​—epai ya “Libanga ya libela na libela.” (Yis. 26:4) Mokomi ya nzembo alobaki boye: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.” (Tángá Nzembo 62:6-9.) Ndenge nini tokoki kokómisa Libanga yango esika na biso ya kokima?

12 Tomonisaka ete tokangami na Yehova ntango tozali kotosa Liloba na ye, oyo mbala mingi ekesanaka na bwanya ya bato. (Nz. 73:23, 24) Na ndakisa, bato oyo balandaka bwanya ya bato bakoki koloba ete: ‘Bomoi ezali kaka moko; buká ndika ntango ozali naino na mino.’ ‘Salá mosala.’ ‘Salá mbongo.’ ‘Sombá nyonso oyo okoki.’ ‘Salá mibembo; sepelá na mokili.’ Nzokande, bwanya oyo euti na Nzambe eyokani na toli oyo: “[Tiká] baoyo bazali kosalela mokili [bázala] lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te; mpo makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Ko. 7:31) Yesu mpe alendisaki biso tótyaka ntango nyonso matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, mpe na ndenge yango tómibombela “biloko ya motuya na likoló,” epai ekobatelama malamu mpenza.​—Mat. 6:19, 20.

13. Na kolanda likanisi oyo ezali na 1 Yoane 2:15-17, tosengeli komituna mituna nini?

13 Ndenge oyo otalelaka “mokili” mpe “biloko oyo ezali na mokili” emonisaka ete otyelaka Nzambe motema na yo mobimba? (1 Yoa. 2:15-17) Omonaka ete bozwi ya elimo mpe mikumba oyo okoki kozwa na mosala ya Nzambe ezali na motuya mingi mpe na ntina mingi koleka biloko oyo okoki kozwa na mokili? (Flp. 3:8) Osalaka makasi mpo obatela ‘liso alima’? (Mat. 6:22) Ya solo, Nzambe asɛngi te ete ozala mafumafu mpe okokisaka mikumba na yo te, mingimingi soki ozali na libota. (1 Tim. 5:8) Kasi asɛngi nde basaleli na ye bátyela ye motema mobimba​—bátya motema te na mokili ya Satana, oyo ekómi na nsuka.​—Ebr. 13:5.

14-16. Ndenge nini bato mosusu bazwi matomba ya kobatela ‘liso alima’ mpe ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso?

14 Tózwa ndakisa ya Richard ná Ruth, oyo bazali na bana misato. Richard alobi boye: “Motema na ngai ezalaki koyebisa ngai ete nakoki kosala mingi mpo na Yehova. Nazalaki na bomoi ya malamu kasi nazalaki komona ete oyo nazalaki kopesa Yehova, ezalaki kaka lokola biloko oyo etikali nsima ya kokokisa bamposa na ngai. Nsima ya kobondela mpo na likambo yango mpe kokanisa malamu, ngai ná Ruth tolobaki ete nasɛnga patrɔ mpo nasalaka kaka mikolo minei na pɔsɔ​—atako nkita ya ekólo ebebaki mingi. Patrɔ andimaki, mpe nabandaki kosala bongo na sanza oyo elandaki.” Richard azali koyoka ndenge nini sikoyo?

15 Alobi boye: “Lifuti na ngai ekitá mingi (na 20%), kasi nakómi sikoyo na mikolo mosusu 50 na mbula mobimba, oyo nakoki kolekisa na libota na ngai mpe koteya bana na ngai. Ngonga oyo nakómi kolekisa na mosala ya kosakola eleki mbala mibale oyo nazalaki kolekisa liboso, motángo ya bato oyo nazali koyekola na bango Biblia eleki oyo ya liboso mbala misato, mpe nakómi komipesa mingi na kokamba lisangá. Mpe lokola nakómi na ntango mingi ya kolekisa na bana, Ruth asalaka mbala na mbala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Nazali na ekateli ya kokoba na programɛ oyo, ntango nyonso oyo likoki ekozala.”

16 Roy ná Petina, oyo bazali naino na mwana na bango ya mwasi na ndako, balongaki kokitisa ntango oyo bazalaki kolekisa na mosala ya mosuni mpo bázwa likoki ya kokóma basakoli ya ntango nyonso. Roy alobi boye: “Nakómi kosala mikolo misato na pɔsɔ, mpe Petina mikolo mibale. Longola yango, tolongwaki na ndako ya monene mpe tokendaki na ndako ya moke, oyo esɛngaka makambo mingi te. Tozalaki babongisi-nzela liboso tóbota mwana na biso ya mobali mpe ya mwasi, mpe mposa wana esilá te. Na yango, ntango bana na biso bakolaki, tozongelaki mosala ya mobongisi-nzela. Ata mbongo mingi ndenge nini ekoki kokokana te na mapamboli oyo tozwi.”

“Kimya ya Nzambe” ebatela motema na yo

17. Lokola toyebi te makambo oyo ekoya lobi, ndenge nini Makomami ebɔndisaka yo?

17 Moko te kati na biso ayebi makambo oyo ekoya lobi, mpo “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekwelaka biso nyonso. (Mos. 9:11) Nzokande, kozanga koyeba makambo oyo ekoya lobi esengeli te kolongola biso kimya ya motema, ndenge ezalaka mbala mingi mpo na baoyo bazalaka motema likolólikoló mpo bazali na boyokani malamu te na Nzambe. (Mat. 6:34) Ntoma Paulo akomaki boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—Flp. 4:6, 7.

18, 19. Ndenge nini Nzambe abɔndisaka biso? Pesá ndakisa.

18 Bandeko mibali mpe basi mingi oyo bakutanaki na mikakatano bayokaki kimya ya motema oyo euti na Yehova. Ndeko mwasi moko alobi boye: “Monganga moko oyo asalaka mapaso alukaki mbala mingi kobangisa ngai mpo nandima bázongisa ngai makila. Moko na makambo oyo azalaki koloba soki kaka amoni ngai ezalaki: ‘Oyo bozoba nini ya koboya makila?’ Na ntango wana mpe na bantango mosusu, nazalaki kobondela Yehova na nse ya motema, mpe kimya na ye ezalaki kokɔtela ngai. Nayokaki ete nakómi makasi lokola libanga. Atako nzoto na ngai elɛmbaki mpo nazalaki na makila mingi te, nalongaki kolimbola bantina oyo Makomami epesi, oyo etindaki ngai naboya makila.”

19 Na bantango mosusu, Nzambe akoki, na ntango oyo ebongi, kopesa lisalisi oyo tosengeli na yango na nzela ya ndeko moko ya boboto to na nzela ya bilei ya elimo. Na ntembe te, osilá koyoka ndeko moko alobi ete: “Nazalaki mpenza na mposa ya lisolo ya boye. Ekomamaki mpenza mpo na ngai!” Ya solo, ata soki bomoi na biso ezali ndenge nini to tozali na mposa ya nini, Yehova akomonisa bolingo na ye mpo na biso soki totyeli ye motema. Mpo tozali kaka “bampate” na ye, mpe atye nkombo na ye likoló na biso.​—Nz. 100:3; Yoa. 10:16; Mis. 15:14, 17.

20. Mpo na nini basaleli ya Yehova bakofanda na kimya ntango mokili ya Satana ekosuka?

20 Na “mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova” oyo ezali koya nokinoki, eloko nyonso oyo mokili ya Satana etyeli motema ekobebisama. Wolo, palata, mpe biloko mosusu ya motuya ekobatela moto ata moke te. (Sef. 1:18; Mas. 11:4) Esika kaka moko ya kokima ekozala Yehova, “Libanga [na biso] ya libela na libela.” (Yis. 26:4) Na yango, tómonisa sikoyo ete totyelaka Yehova motema na biso mobimba na kotamboláká na banzela na ye ntango nyonso mpe na kosakoláká nsango ya Bokonzi ata soki bato bazali kosepela te to bazali kotɛmɛla biso, mpe na kotaleláká ye ntango tozali na mitungisi. Soki tozali kosala makambo wana, na ntembe te ‘tokofanda na kimya mpe tokotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.’​—Mas. 1:33.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá nkasa 102-106 ya buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.”

Okoki kolimbola?

Ndenge nini tokoki kotyela Nzambe motema

• ntango tomekami mpo na kosala mabe?

• ntango bato basepeli na nsango na biso te to bazali kotɛmɛla biso?

• ntango tozali na mitungisi?

[Elilingi na lokasa 13]

Kotosa mitinda ya Nzambe epesaka esengo

[Elilingi na lokasa 15]

“Yehova nde Libanga ya libela na libela”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto