Tósɛnzɛla lokola Yirimia
“[Ngai Yehova] nazali kosɛnzɛla na ntina etali liloba na ngai mpo na kokokisa yango.”—YIR. 1:12.
1, 2. Mpo na nini basaleli nzete ya amande mpo na komonisa ndenge Yehova ‘asɛnzɛlaka’?
MOKO na banzete ya liboso oyo ebimisaka fololo na bangomba ya Libá mpe na Yisraele ezali nzete ya amande. Bafololo na yango ya langi ya rozɛ to ya mpɛmbɛ ekoki komonana banda na nsuka ya sanza ya Yanuali to na ebandeli ya Febwali. Nkombo na yango ya Ebre elimboli mpenzampenza “oyo alamukaka.”
2 Ntango Yehova aponaki Yirimia azala mosakoli na ye, asalelaki likambo wana oyo esalemaka na nzete ya amande mpo na komonisa likambo moko ya ntina mingi. Ntango mosakoli yango abandaki mosala ye, Yehova alakisaki ye etape ya nzete ya amande na emonaneli moko. Alingaki komonisa nini? Yehova alobaki boye: “Nazali kosɛnzɛla na ntina etali liloba na ngai mpo na kokokisa yango.” (Yir. 1:11, 12) Ndenge kaka nzete ya amande ‘elamukaka’ liboso, na ndenge ya elilingi, Yehova azalaki “kolamuka ntɔngɔntɔngɔ” mpo na kotinda basakoli na ye bákebisa bato na ye mpo na mabe oyo ekokómela bango mpo na kozanga botosi na bango. (Yir. 7:25) Mpe akobaki “kosɛnzɛla” tii esakweli na ye ekokisamaki. Na mobu 607 L.T.B., na ntango mpenza oyo etyamaki, bitumbu ya Yehova ekwelaki bato ya ekólo Yuda, mpo bakómaki bapɛngwi.
3. Tosengeli kondima likambo nini mpo na Yehova?
3 Ndenge moko mpe lelo, Yehova azali kosɛnzɛla, azali ekɛngɛ na oyo etali kokokisama ya mokano na ye. Akoki kozala na bopɔtu ata moke te na oyo etali kokokisa liloba na ye. Ndenge oyo Yehova azali ekɛngɛ etali yo na nini? Ozali mpenza kondima ete na mobu 2011 oyo mpe Yehova azali “kosɛnzɛla”? Ondimi mpenza ete akokokisa bilaka na ye? Soki tozali naino komituna soki Yehova akokokisa mpenza bilaka na ye, sikoyo nde ntango ya kolamuka na mpɔngi ya elimo. (Rom. 13:11) Yirimia mosakoli ya Yehova akobaki kosɛnzɛla. Kotalela lolenge mpe ntina oyo Yirimia akobaki kosɛnzɛla na oyo etali mokumba oyo Nzambe apesaki ye ekosalisa biso tómona ndenge oyo tokoki kolendendela na mosala oyo Yehova apesi biso.
Nsango moko ya kosakola nokinoki
4. Mikakatano nini Yirimia azalaki na yango mpo na kosakola nsango oyo azalaki na yango, mpe mpo na nini ezalaki nsango ya kosakola nokinoki?
4 Mbala mosusu Yirimia azalaki na mbula pene na 25 ntango Yehova apesaki ye mokumba ya sinzili. (Yir. 1:1, 2) Kasi, ayokaki ete azali lokola mwana moke, alobaki ete akokoka koloba te liboso ya mikóló ya ekólo, mibali oyo balekaki ye na mbula mpe bazalaki na bokonzi. (Yir. 1:6) Asengelaki koyebisa polele mabe ya bato mpe kosakola bikateli ya nsɔmɔ oyo Nzambe azwaki, mingimingi epai ya banganga-nzambe, basakoli ya lokuta, bayangeli, mpe baoyo balandaki “nzela ya bato mingi” mpe bakómaki na “kozanga bosembo moko oyo ezali koumela.” (Yir. 6:13; 8:5, 6) Tempelo kitoko oyo Mokonzi Salomo atongaki, oyo ezalaki esika monene ya losambo ya solo na boumeli ya bikeke soki minei, ekobebisama. Yerusaleme ná Yuda ekotikala mpamba, mpe bafandi na yango bakomemama na boombo. Emonani polele ete nsango oyo bapesaki Yirimia ezalaki ya kosakola nokinoki!
5, 6. (a) Ndenge nini Yehova azali kosalela etuluku ya Yirimia lelo? (b) Lisolo oyo ekolobela nini?
5 Na mikolo na biso, na bolingo nyonso, Yehova apesi bato etuluku moko ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali kosala lokola basinzili ya elilingi mpo na kokebisa bato mpo na lisambisi na ye ya mokili oyo. Banda bambula mingi, etuluku ya Yirimia, elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bazali kolendisa bato bátya likebi mpo na eleko oyo tozali. (Yir. 6:17) Biblia elobi ete Yehova, Nkolo-ntango, azali koumisa makambo te. Mokolo na ye ekoya na ntango mpenza oyo etyamá, na ngonga oyo bato bazali kolikya te.—Sef. 3:8; Mrk. 13:33; 2 Pe. 3:9, 10.
6 Kobosana te ete Yehova azali kosɛnzɛla mpe ete akobandisa mokili ya sika ya boyengebene na ngonga mpenza. Koyeba likambo yango esengeli kolendisa baoyo bazali na etuluku ya Yirimia mpe kosalisa baninga na bango oyo bamipesá na Nzambe bákoba kosɛnzɛla mpe komona ete nsango oyo bazali na yango esengeli kosakolama nokinoki mpenza. Etali yo na nini? Esengeli te kotinda yo obakisa milende na mosala ya kosakola? Kosala bongo ekopesa bato libaku ya kopona soki bakosalela Nzambe to te, ndenge Yesu amonisaki yango. Tólobela bizaleli misato oyo esalisaki Yirimia atikala ekɛngɛ mpo na mosala na ye, oyo ekosalisa mpe biso tósala bongo.
Kolinga bato
7. Limbolá ndenge bolingo etindaki Yirimia asakola atako mikakatano.
7 Nini etindaki Yirimia asakola ata na nse ya mikakatano? Bolingo oyo azalaki na yango mpo na bato. Yirimia ayebaki ete babateli ya lokuta ya bampate nde bazalaki kobimisa mikakatano mingi oyo ezalaki kokómela bato. (Yir. 23:1, 2) Koyeba likambo wana esalisaki Yirimia asala mosala na ye na bolingo mpe na motema mawa. Alingaki ete bato ya ekólo na bango báyoka maloba ya Nzambe mpe bábika. Azalaki komitungisa mingi tii alelaki mpo na likama oyo ezalaki koyela bango. (Tángá Yirimia 8:21; 9:1.) Mokanda ya Bileli emonisi malamu ete Yirimia azalaki mpenza kolinga Yehova mpe bato na ye. (Bil. 4:6, 9) Ntango omonaka lelo bato oyo bazali ‘konyokwama mpe basundolami lokola bampate oyo ezangá mobateli’, oyokaka mposa ya kobɔndisa bango na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe te?—Mat. 9:36.
8. Nini emonisi ete minyoko ekómisaki Yirimia nkandankanda te?
8 Kaka bato oyo Yirimia azalaki kolinga kosalisa nde banyokolaki ye; kasi azongiselaki bango mabe te, akómaki mpe nkandankanda te. Azalaki na motema molai mpe na boboto, ata epai ya mokonzi mabe Zidikiya! Nsima wana mokonzi Zidikiya akabaki ye mpo abomama, Yirimia abondelaki ye atosa mongongo ya Yehova. (Yir. 38:4, 5, 19, 20) Biso mpe tolingaka bato makasi lokola Yirimia?
Mpiko oyo euti na Nzambe
9. Ndenge nini toyebi ete mpiko ya Yirimia eutaki na Nzambe?
9 Ntango Yehova alobaki na ye, na ebandeli, Yirimia alukaki koboya. Yango emonisi ete mpiko mpe makasi oyo ayaki komonisa na nsima eutaki epai na ye moko te. Mpiko monene oyo Yirimia azalaki na yango na mosala na ye ya mosakoli eutaki nde na Nzambe, mpo Yirimia atyelaki ye motema. Ya solo, Yehova azalaki elongo na mosakoli Yirimia “lokola elombe moko ya nsɔmɔ” na ndenge asungaki ye mpe apesaki ye makasi ya kokokisa mokumba na ye. (Yir. 20:11) Yirimia akendaki nsango mpo na mpiko na ye na boye ete ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, bato mosusu bazalaki kokanisa ete azali Yirimia oyo azongi na bomoi!—Mat. 16:13, 14.
10. Mpo na nini tokoki koloba ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali ‘likoló ya bikólo mpe ya makonzi’?
10 Yehova, “Mokonzi ya bikólo,” atindaki Yirimia ayebisa bikólo mpe makonzi nsango moko ya lisambisi. (Yir. 10:6, 7) Kasi, na ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino na mabele, bazali “likoló ya bikólo mpe likoló ya makonzi”? (Yir. 1:10) Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba apesá etuluku ya Yirimia mokumba ndenge apesaki mosakoli wana ya kala. Na yango, basaleli ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo bazali na lotomo ya koyebisa bikólo mpe makonzi ya mokili mobimba makambo oyo ezali koyela bango. Lokola Nzambe Oyo-Aleki-Likoló apesi bango bokonzi mpe bazali kosalela elobeli ya polele ya Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, etuluku ya Yirimia ezali kosakola ete bikólo mpe makonzi ya lelo ekopikolama mpe ekobebisama na ntango oyo Nzambe atyá mpe na ndenge oyo abongisá. (Yir. 18:7-10; Em. 11:18) Etuluku ya Yirimia ezali na ekateli ya kotika te mosala oyo Nzambe apesá bango ya kosakola bansango ya lisambisi ya Yehova na mabele mobimba.
11. Nini ekosalisa biso tókoba kosakola soki tokutani na makambo ya mpasi?
11 Ekómaka ete tólɛmba nzoto ntango tokutani na botɛmɛli, ntango bato baboyi nsango na biso to liboso ya makambo mosusu ya mpasi. (2 Ko. 1:8) Kasi, lokola Yirimia, tótika te. Tózala ntango nyonso na mpiko. Mokomoko na biso akoba kobondela Nzambe, atyela ye motema mpe ‘azwa mpiko’ wana tozali kotalela ye mpo asalisa biso. (1 Tes. 2:2) Lokola tozali basambeli ya solo, tosengeli kokoba kosɛnzɛla na oyo etali mikumba oyo Nzambe apesá biso. Tosengeli kozala na ekateli ya kokoba kosakola kobomama ya mangomba ya bokristo, oyo emonisamaki na kobebisama ya Yerusaleme oyo ezangaki bosembo. Etuluku ya Yirimia ekokoba kosakola kaka te “mbula ya boboto oyo euti na Yehova,” kasi mpe “mokolo Nzambe na biso akozongisa mabe.”—Yis. 61:1, 2; 2 Ko. 6:2.
Esengo ya solosolo
12. Mpo na nini tokoki koloba ete Yirimia abatelaki esengo na ye, mpe nini mpenza esalisaki ye asala bongo?
12 Yirimia azalaki na esengo na mosala na ye. Alobaki na Yehova ete: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova.” (Yir. 15:16) Yirimia azalaki komona ete kozala momonisi ya Nzambe ya solo mpe kosakola liloba na ye ezali lokumu monene. Tóyeba ete ntango Yirimia atyaki likebi na lityo ya bato, abungisaki esengo na ye. Ntango azongisaki makanisi na ye na kitoko mpe ntina ya nsango oyo azalaki na yango, esengo na ye ezongaki.—Yir. 20:8, 9.
13. Mpo na nini koyekola mateya mozindo ya Biblia ezali na ntina mpo tóbatela esengo na biso?
13 Mpo tóbatela esengo na biso na mosala ya kosakola lelo, tosengeli komileisaka “bilei ya makasi,” mateya ya mozindo ya Liloba ya Nzambe. (Ebr. 5:14) Koyekola na mozindo etongaka kondima. (Kol. 2:6, 7) Esalisaka biso tómona ndenge misala na biso esimbaka motema ya Yehova. Soki tozali na mokakatano ya kozwa ntango ya kotánga mpe koyekola Biblia, tosengeli kotala lisusu programɛ na biso malamumalamu. Ata mwa miniti moke ya koyekola mpe komanyola mokolo na mokolo ekosalisa biso tópusana mingi penepene na Yehova mpe ekobakisela biso ‘nsai mpe esengo na motema,’ ndenge ezalaki mpo na Yirimia.
14, 15. (a) Lokola Yirimia akangamaki na bosembo na mokumba na ye, ebotaki mbuma nini? (b) Basaleli ya Nzambe lelo bayebi nini na ntina etali mosala ya kosakola?
14 Yirimia ayebisaki mpenza makebisi mpe nsango ya lisambisi ya Yehova kozanga kotika, kasi, abosanaki te mokumba na ye ya “kotonga mpe kolona.” (Yir. 1:10) Mosala na ye ya kotonga mpe kolona ebotaki mbuma. Mwa Bayuda mpe bato mosusu oyo bazalaki Bayisraele te babikaki ntango Yerusaleme ebebisamaki na 607 L.T.B. Toyebi lisolo ya Barekabe, ya Ebede-meleke, mpe ya Baruke. (Yir. 35:19; 39:15-18; 43:5-7) Baninga yango ya sembo ya Yirimia mpe oyo bazalaki kobanga Nzambe bazali elilingi ya malamu mpo na komonisa bato oyo bazali lelo na elikya ya bomoi awa na mabele, oyo bazali kosalisa etuluku ya Yirimia. Etuluku yango ya Yirimia ezali na esengo makasi na kosalisa “ebele mpenza ya bato” yango bázala na kondima makasi. (Em. 7:9) Ndenge moko mpe, bato yango oyo bazali baninga ya sembo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazalaka na esengo ya kosalisa bato ya mitema sembo bázwa boyebi ya solo.
15 Biso basaleli ya Nzambe toyebi ete kosakola nsango malamu ezali kaka te mosala oyo tosalaka mpo na bolamu ya bato oyo bazali koyoka yango, kasi ezali mpe losambo epai ya Nzambe na biso. Ezala bato bazali kondima koyoka to te, kosalela Yehova mosala mosantu na nzela ya mosala ya kosakola epesaka biso esengo monene.—Nz. 71:23; tángá Baroma 1:9.
Tókoba ‘kosɛnzɛla’ mpo na mosala na biso!
16, 17. Ndenge nini Emoniseli 17:10 mpe Habakuku 2:3 emonisi ete mikolo etikali ya kotánga?
16 Soki totaleli esakweli oyo ezali na Emoniseli 17:10, tokomona ete mikolo etikali ya kotánga. Mokonzi ya nsambo, elingi koloba bokonzi ya anglo-américain, asili kobima. Mpo na bokonzi yango, Biblia elobi boye: “Ntango [mokonzi ya nsambo] akoya akoumela mwa ntango moke.” Sikoyo boye, na ntembe te “mwa ntango moke” yango elingi kosila. Mpo na nsuka ya ebongiseli oyo mabe, mosakoli Habakuku andimisi biso ete: “Emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá . . . Zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama. Ekokóma nsima ya ngonga te.”—Hab. 2:3.
17 Omituna boye: ‘Bomoi na ngai ezali komonisa ete nayebi mpenza ete mikolo etikali ya kotánga? Etamboli na ngai ezali komonisa ete nazali kolikya ete nsuka ekoya mosika te? To bikateli na ngai mpe makambo oyo natyaka na esika ya liboso ezali nde komonisa ete nazali kolikya te ete nsuka ekoya sikoyo to ete nayebi kutu te soki ekoya mpenza?’
18, 19. Mpo na nini sikoyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te?
18 Mosala ya etuluku ya sinzili esili naino te. (Tángá Yirimia 1:17-19.) Ezali mpenza esengo monene komona ndenge bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali koningana te, batɛlɛmi ngwi lokola “likonzí ya ebende” mpe “engumba oyo ebatelami makasi”! “Loketo [na bango] ekangami na solo lokola mokaba,” na ndenge bazali kotika Liloba ya Nzambe epesa bango makasi tii mosala na bango ekosila. (Ef. 6:14) Ebele mpenza ya bato bazali mpe na ekateli ya ndenge wana, bazali kosunga mpenza etuluku ya Yirimia na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá bango.
19 Oyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya Bokonzi te, kasi nde ya kososola ntina ya maloba oyo ezali na Yirimia 12:5. (Tángá.) Biso nyonso tokutanaka na mikakatano oyo tosengeli koyikela mpiko. Tokoki kokokanisa makambo yango oyo emekaka kondima na biso na “bato oyo batambolaka na makolo,” oyo tosengeli kopota mbangu ná bango. Nzokande, awa ‘bolɔzi monene’ ezali kopusana, tokoki kozela ete makambo ya mpasi ebakisama. (Mat. 24:21) Biblia ekokanisi milende oyo tokosala mpo na koyika mpiko na makambo ya mpasi koleka oyo ezali koya ná “kopota mbangu ná bampunda.” Ekosɛnga moto azala na makasi mingi ya koyika mpiko mpo akoka kokima elongo na bampunda oyo ezali kopota mbangu makasi. Na yango, koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo ezali mpo na litomba na biso, mpamba te ekoki kobongisa biso mpo tóyika mpiko na mikakatano oyo ezali koya.
20. Ozwi ekateli ya kosala nini?
20 Biso nyonso tokoki komekola Yirimia mpe kolonga kokokisa mokumba na biso ya kosakola! Bizaleli lokola bolingo, mpiko, mpe esengo esalisaki Yirimia asala na bosembo na mosala na ye na boumeli ya mbula 67. Bafololo kitoko ya nzete ya amande ezongisi na makanisi na biso ete Yehova ‘azali kosɛnzɛla’ na oyo etali liloba na ye mpo akokisa yango. Na yango, ebongi biso mpe tósala bongo. Yirimia akobaki ‘kosɛnzɛla,’ biso mpe tokoki kosɛnzɛla.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndenge nini bolingo esalisaki Yirimia akoba ‘kosɛnzɛla’ mpo na mosala na ye?
• Mpo na nini tozali na mposa Nzambe apesa biso mpiko?
• Nini esalisaki Yirimia abatela esengo na ye?
• Mpo na nini olingi kokoba ‘kosɛnzɛla’?
[Bililingi na lokasa 31]
Okokoba kosakola atako botɛmɛli ezali?