Yekolá na Liloba ya Nzambe
Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.
1. Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
Mabele ezali esika ya kofanda mpo na moto. Nsima ya kokela baanzelu mpo bafanda na likoló, Nzambe akelaki moto mpo afanda awa na mabele. (Yobo 38:4, 7) Na yango, Yehova atyaki moto ya liboso na paradiso ya kitoko oyo ebengamaki Edene, mpe alakaki ye mpe bakitani na ye bomoi ya seko awa na mabele.—Ebandeli 2:15-17; tángá Nzembo 115:16.
Elanga ya Edene ezalaki kaka na mwa eteni moke ya mabele. Adama ná Eva, mwasi ná mobali ya liboso basengelaki kobota bana. Lokola bato basengelaki kokóma mingi, basengelaki kozala na bokonzi likoló ya mabele mobimba mpe kolona, mpe kokómisa yango paradiso. (Ebandeli 1:28) Mabele ekobebisama soki moke te.—Tángá Nzembo 104:5.
2. Mpo na nini lelo oyo mabele ezali paradiso te?
Adama ná Eva batosaki Nzambe te, yango wana babimisaki bango na Edene. Paradiso ebungaki, mpe moto ata moko te alongi kozongisa yango lisusu. Biblia elobi boye: “Mabele epesamá na mabɔkɔ ya moto mabe.”—Yobo 9:24; tángá Ebandeli 3:23, 24.
Kasi Yehova abosani te mokano na ye ya ebandeli mpo na bato mpe akozanga te kokokisa yango. (Yisaya 45:18) Akosala ete bato bázala lisusu ndenge akanaki na ebandeli.—Tángá Nzembo 37:11.
3. Ndenge nini Nzambe akozongisa kimya na mabele?
Mpo bato bázala na kimya, Nzambe asengeli kolongola liboso bato mabe. Na etumba ya Armagedone, baanzelu ya Nzambe bakoboma bato nyonso oyo batɛmɛlaka Nzambe. Satana akotyama na bolɔkɔ mbula nkóto moko, kasi bato oyo balingaka Nzambe bakotikala na bomoi na ebongiseli ya sika awa na mabele.—Tángá Emoniseli 16:14, 16; 20:1-3; 21:3, 4.
4. Ntango nini bampasi ekosila?
Na boumeli ya mbula nkóto, Yesu akoyangela uta na likoló mpe akozongisa mabele paradiso. Lisusu, akolongola masumu ya baoyo balingaka Nzambe. Na nsima, Yesu akolongola maladi, bobange mpe liwa.—Tángá Yisaya 11:9; 25:8; 33:24; 35:1.
Ntango nini Nzambe akolongola mabe awa na mabele? Yesu apesaki “elembo” oyo ekomonisa ete nsuka ekómi pene. Makambo oyo ezali koleka lelo na mokili ezali kobangisa mpe ezali komonisa ete tokómi na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”—Tángá Matai 24:3, 7-14, 21, 22; 2 Timote 3:1-5.
5. Nani akofanda na paradiso?
Yesu atindaki bayekoli na ye bákómisa bato bayekoli mpe báteya bango banzela ya Nzambe oyo ezali bolingo. (Matai 28:19, 20) Na mokili mobimba, Yehova azali kobongisa bamilio ya bato mpo báfanda na ebongiseli ya sika awa na mabele. (Sefania 2:3) Na Bandako ya Bokonzi, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo, bato bayekolaka ndenge ya kozala mibali mpe batata ya malamu, mpe ndenge ya kozala basi mpe bamama ya malamu. Baboti mpe bana bayekolaka elongo makambo ya ntina mpo bázala na elikya ya bomoi ya malamu mpenza na mikolo ezali koya.—Tángá Mika 4:1-4.
Na Ndako ya Bokonzi, okokuta bato oyo balingaka Nzambe mpe oyo balingaka koyekola makambo oyo esepelisaka ye.—Tángá Baebre 10:24, 25.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.