Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/5 nk. 3-5
  • Osepelaka mpenza na Liloba ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osepelaka mpenza na Liloba ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikano mpe ndenge ya kosala
  • Kolekisa ntango na ndenge ya malamu
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Sepelá na Liloba ya Nzambe
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Kotánga Biblia epesaka matomba mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Omipesa na kotánga
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/5 nk. 3-5

Osepelaka mpenza na Liloba ya Nzambe?

LORRAINE alobi boye: “Na ebandeli ntango nakómaki kotánga Biblia mbala na mbala, nazalaki komona yango nde mosala, kasi likambo ya esengo te. Ezalaki mpasi kokanga ntina na yango; yango wana, mbala mingi okomona nabandi kotya makanisi na makambo mosusu.”

Bato mosusu bandimi ete ntango bango mpe babandaki kotánga Biblia, bazalaki kosepela na yango te. Kasi, bakobaki kotánga yango mpo bayebaki ete kotánga Makomami mosantu ezali likambo ya malamu. Marc alobi boye: “Ezali mpasi te kotika makambo mosusu epekisa yo kotánga Biblia mpe koyekola yo moko. Esɛngaki nasala mabondeli mpe milende mingi mpo natya botángi ya Biblia na programɛ na ngai ya mokolo na mokolo.”

Okoki kosala nini mpo obanda kosepela mingi na Liloba ya Nzambe, Biblia? Ndenge nini okoki kosepela kotánga yango? Tótalela makanisi oyo elandi.

Mikano mpe ndenge ya kosala

Bondelá liboso ya kotánga mpe tyá makanisi nyonso. Sɛngá Yehova asalisa yo okóma na mposa makasi ya koyekola Liloba na ye. Sɛngá ye afungola motema na yo mpe makanisi na yo mpo okanga ntina ya bwanya na ye malamumalamu. (Nz. 119:34) Soki osali bongo te, okoki noki kobanda koyekola Biblia kaka likolólikoló mpe kobungisa mposa ya kokoba. Lynn alobi boye: “Na bantango mosusu, natángaka mbangumbangu mingi mpe nalekisaka makambo mosusu ya ntina. Mbala mingi, nakangaka ntina mpenza te ya makanisi ya ntina. Kasi, nabondelaka mpo nazala na komipekisa, mpe esalisaka ngai mpo makanisi na ngai eyengayenga te.”

Zwá makambo oyo ozali koyekola na motuya. Kobosana te ete kokanga ntina mpe kosalela mateya ya solo ya Biblia ezali nde bomoi na yo. Na yango, salá milende makasi mpo na komona makanisi oyo ekoki kosalisa yo, mpe salelá yango. Chris alobi boye: “Nalukaka makambo oyo ekosalisa ngai nayeba makanisi mpe bamposa ya mabe oyo ezali na motema na ngai. Komona ndenge Biblia mpe mikanda na biso mingi ezali na makambo oyo esalisaka ngai mpenza, atako bakomi na yango bakutaná na ngai te, elendisaka ngai mingi.”

Omityela mikano oyo okoki kokokisa. Luká koyekola likambo ya sika na ntina etali bato oyo Biblia elobeli. Okoki komona makambo ya ntina mingi oyo etali bato yango soki oluki na Étude perspicace des Écritures to na Index des publications Watch Tower. Soki obandi komona mpenza ete mibali mpe basi wana oyo Biblia elobeli bazalaki bato ya solo oyo bazalaki mpe na bizaleli mpe mayoki, bandakisa na bango ekosalisa yo mingi.

Luká ndenge mosusu ya kosalela Makomami mpo na kosolola na bato. (Mis. 17:2, 3) Sophia azalaka na likanisi wana ntango azali koyekola. Alobi boye: “Mposa na ngai ezali ya koyekola mpe kozwa ndenge ya sika ya kosalela Makomami mpo na kosolola na bato na mosala ya kosakola mpe na mabaku mosusu, mpo nakoka kolimbola polele mateya ya Biblia. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalisaka mingi na likambo yango.”​—2 Tim. 2:15.

Moná na makanisi ndenge masolo ya Biblia elekaki. Baebre 4:12 elobi ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi.” Mpo nsango ya Nzambe ezala na bomoi na makanisi na yo ntango ozali kotánga Makomami, kanisáká makambo oyo bato oyo Biblia elobeli bazalaki komona. Meká koyoka makambo oyo bazalaki koyoka mpe komiyoka ndenge oyo bazalaki komiyoka. Kokanisá makambo oyo ekómelaki bango ná makambo mosusu oyo ozali komona na bomoi na yo. Zwá liteya na ndenge oyo bazalaki kosilisa makambo. Ekosalisa yo okanga ntina malamu ya masolo ya Biblia mpe obomba yango na makanisi.

Lekisá ntango mingi na bavɛrsɛ ya mpasi mpe na bandimbola na yango mpo okanga ntina na yango malamu. Zwáká mbala nyonso ntango mwa mingi mpo na koyekola. Okoki kokutana na makambo oyo ekoki kosepelisa yo mpe kotinda yo osala bolukiluki. Luká ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te mpe talá maloba na nse ya lokasa. Na bisika mosusu, ezalaka na balɛtrɛ oyo etindaka na bavɛrsɛ mosusu; tángá bavɛrsɛ yango. Soki ozali kokanga ntina malamu ya makambo oyo ozali kotánga mpe ozali kosalela yango, okosepela mpenza na Liloba ya Nzambe, Biblia. Bongo, okokoka koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Nakómisi makundoli na yo [Yehova] eloko na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te, mpo ezali esengo ya motema na ngai.”​—Nz. 119:111.

Koleka mbangumbangu te. Ntango oyo okotya mpo na boyekoli na yo moko eleka mpe ndelo te. Yebá koyokanisa yango na ntango oyo olekisaka mpo na kobongisa makita ya lisangá. Raquel alobi boye: “Mbala mingi nayokaka ete makanisi na ngai elɛmbi mpe nakokaka lisusu te kotya makanisi na makambo oyo nazali koyekola. Na yango, namoni ete koyekola mokemoke ezali malamu. Esalisaka ngai nazwa matomba mingi na boyekoli na ngai.” Chris alobi boye: “Soki nayekoli mbangumbangu, lisosoli na ngai etungisaka ngai mpo nakangaka makambo mingi te. Mbala mingi makambo yango esimbaka motema na ngai te.” Na yango, malamu kozwa mwa ntango mingi.

Zalá na mposa makasi ya Liloba ya Nzambe. Ntoma Petro alobaki boye: “Lokola bana oyo babotami sika, bózalaka na mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali na liloba ya Nzambe, oyo basangisi na eloko te, mpo bókola tii na lobiko na nzela na yango.” (1 Pe. 2:2) Bana oyo babotami sika balonaka mposa ya mabɛlɛ te. Eyaka yango moko. Kasi Makomami emonisi ete tosengeli kolona mposa ya liloba ya Nzambe. Soki otángi ata lokasa moko ya Biblia mokolo na mokolo, mposa yango ekoya. Ekoumela te, likambo oyo ezalaki mbala mosusu komonana mpasi liboso ekokóma kopesa yo esengo.

Manyolá mikapo ya Biblia. Komanyola makambo oyo ozali kotánga epesaka mpe matomba mingi. Ekosalisa yo oyeba boyokani oyo ezali kati na makambo oyo oyekoli. Mosika te okozwa bwanya lokola mayaka ya ntalo monene​—bozwi moko kitoko.​—Nz. 19:14; Mas. 3:3.

Kolekisa ntango na ndenge ya malamu

Esɛngaka milende mpo na kokangama na momeseno malamu ya koyekola, kasi matomba oyo yango epesaka, ekoki kotángama te. Boyebi na yo ya makambo ya elimo ekobakisama. (Ebr. 5:12-14) Bososoli mpe bwanya oyo ozali kozwa na Liloba ya Nzambe epesaka esengo mpe kimya. Bwanya oyo ezali na Liloba ya Nzambe ezali “nzete ya bomoi” mpo na baoyo bazwi yango mpe bazali kosalela yango.​—Mas. 3:13-18.

Koyekola Liloba ya Nzambe na mozindo ekoki kosalisa yo okóma na motema ya mayele. (Mas. 15:14) Ekosalisa yo opesaka toli oyo euti na motema mpenza mpe oyo esimbami na Biblia. Soki otiki makambo oyo ozali kotánga na Biblia mpe na mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” etambwisa bikateli na yo, okoyoka ndenge Liloba ya Nzambe elendisaka mpe epesaka makasi. (Mat. 24:45) Okozala na makanisi ya malamu, okomitungisa te, mpe Liloba ya Nzambe ekotambwisa makanisi, misala mpe maloba na yo. Lisusu, makambo nyonso etali boyokani na yo na Nzambe ekotambola malamu.​—Nz. 1:2, 3.

Motema oyo etondi na bolingo mpo na Nzambe ekotinda yo olobela kondima na yo. Yango mpe ekoki kopesa yo matomba mingi. Sophia asalaka makasi ya komikundwela mpe kosalela bavɛrsɛ ndenge na ndenge mpo na kobenda likebi ya bato mpe kosala ete mosala na ye ya kosakola ebota mbuma mingi mpe epesaka ye esengo. Alobi boye: “Komona ndenge bato bazali kondima maloba oyo euti na Biblia epesaka esengo mpenza.”

Kasi, litomba oyo eleki monene ya kosepela na Liloba ya Nzambe ezali boyokani malamu na Yehova. Koyekola Biblia ekosalisa yo oyeba mibeko na ye mpe osepela na bolingo na ye, bokabi na ye, mpe bosembo na ye. Ezali na mosala mosusu te oyo ekoki kozala na ntina to kopesa matomba koleka yango. Omipesa mobimba na boyekoli ya Liloba ya Nzambe. Kosala bongo ezali mpenza kolekisa ntango na ndenge ya malamu.​—Nz. 19:7-11.

[[Etanda/​Bililingi na lokasa 5]

KOTÁNGA LILOBA YA NZAMBE: MIKANO MPE NDENGE YA KOSALA

▪ Bondelá liboso ya kotánga mpe tyá makanisi nyonso.

▪ Zwá makambo oyo ozali koyekola na motuya.

▪ Omityela mikano oyo okoki kokokisa.

▪ Luká ndenge mosusu ya kosalela Makomami mpo na kosolola na bato.

▪ Moná na makanisi ndenge masolo ya Biblia elekaki.

▪ Lekisá ntango mingi na bavɛrsɛ ya mpasi mpe na bandimbola na yango mpo okanga ntina na yango malamu.

▪ Koleka mbangumbangu te.

▪ Zalá na mposa makasi ya Liloba ya Nzambe.

▪ Manyolá mikapo ya Biblia.

[Elilingi na lokasa 4]

Ntango ozali kotánga lisolo moko ya Biblia, moná na makanisi lokola nde ozali na kati ya likambo ya ndenge wana

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto