Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/5 nk. 7-11
  • Mabota ya bakristo—‘Bózala ekɛngɛ’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota ya bakristo—‘Bózala ekɛngɛ’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mibali​—Bómekola “mobateli ya mpate oyo aleki malamu”
  • Basi​—‘Bótonga bandako na bino’
  • Bilenge​—‘Botyá miso na bino na biloko oyo emonanaka te’
  • Libota: ebongiseli etondi na bolingo euti na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mibali, bomonisa bolingo mpe limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Kozala na botósi kati na libala elimboli nini? kosala mabongwani mingi.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/5 nk. 7-11

Mabota ya bakristo​—‘Bózala ekɛngɛ’

“Tózala . . . ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.”​—1 TES. 5:6.

1, 2. Ezali kosɛnga nini mpo libota elonga kotikala ekɛngɛ na elimo?

NA NTINA etali “mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova,” ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Tesaloniki boye: “Bandeko, bozali na molili te, mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi, mpo bozali bino nyonso bana ya pole mpe ya moi. Tozali bato ya butu te, ya molili mpe te.” Abakisaki boye: “Na yango, tólala mpɔngi te lokola bamosusu basalaka, kasi tózala nde ekɛngɛ mpe tóbatela makanisi na biso.”​—Yoe. 2:31; 1 Tes. 5:4-6.

2 Toli oyo Paulo apesaki Batesaloniki ebongi mpenza mpo na bakristo oyo bazali na bomoi “na ntango ya nsuka.” (Dan. 12:4) Lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mabe ekómi pene, Satana akani kosala nyonso oyo akoki mpo na komema basambeli mingi ya solo bátika kosalela Nzambe. Na yango, ekozala malamu tótya likebi na toli ya kotikala ekɛngɛ na elimo, oyo Paulo apesaki. Mpo libota ya bakristo elonga kotikala ekɛngɛ, ezali na ntina moto na moto akokisa mokumba oyo Yehova apesá ye. Na yango, mokumba nini mibali, basi, mpe bilenge bazali na yango mpo na kosalisa mabota na bango ‘ezala ekɛngɛ’?

Mibali​—Bómekola “mobateli ya mpate oyo aleki malamu”

3. Na kolanda 1 Timote 5:8, mokumba ya mobali lokola mokonzi ya libota esɛngi nini?

3 Biblia elobi boye: “Mokonzi ya mwasi ezali mobali.” (1 Ko. 11:3) Mokumba ya mobali ya kozala mokonzi ya libota esɛngi nini? Makomami elobi boye: “Soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya ndako na ye, biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Tim. 5:8) Ya solo, mobali asengeli kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Kasi, soki alingi kosalisa libota na ye ezala ekɛngɛ na elimo, asengeli kosuka kaka na kolukela libota mbongo te. Asengeli kotonga libota na ye na elimo, kosalisa bato nyonso ya libota bázala na boyokani malamu na Nzambe. (Mas. 24:3, 4) Ndenge nini akoki kosala yango?

4. Nini ekoki kosalisa mobali alonga kotonga libota na ye na elimo?

4 Lokola “mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Kristo mpe azali mokonzi ya lisangá,” mobali oyo abalá asengeli koyekola ndenge oyo Yesu asalelaka bokonzi na ye na lisangá mpe komekola ye. (Ef. 5:23) Talá ndenge Yesu alobelaki boyokani oyo ezalaki kati na ye ná bayekoli na ye. (Tángá Yoane 10:14, 15.) Mobali oyo alingi kotonga libota na ye na elimo asengeli kosala nini mpo na kolonga? Asengeli koyekola makambo oyo Yesu, “mobateli ya mpate oyo aleki malamu,” alobaki mpe asalaki, mpe ‘kolanda matambe na ye malamumalamu.’​—1 Pe. 2:21.

5. Mobateli ya mpate oyo aleki malamu ayebi lisangá ndenge nini?

5 Boyokani oyo ezalaka kati na mobateli ya mpate ná bampate na ye eutaka na koyebana mpe kotyelana motema. Mobateli ya mpate ayebaka nyonso oyo etali bampate na ye, mpe bampate eyebaka mpe etyelaka mobateli na bango motema. Bayebi mongongo na ye mpe batosaka yango. Yesu alobaki ete: “Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai eyebi ngai.” Yesu ayebi lisangá na ye kaka likolólikoló te. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘koyeba’ epesaka likanisi ya “koyeba malamu mpenza.” Ya solo, Mobateli ya mpate oyo aleki malamu ayebi mpate na ye mokomoko. Ayebi bamposa ya mpate mokomoko, bolɛmbu na yango, mpe makasi na yango. Ndakisa na biso Yesu amonaka eloko nyonso oyo etali bampate na ye. Mpe bampate bayebi ye malamumalamu mpe batyaka motema na litambwisi na ye.

6. Ndenge nini mibali bakoki komekola Mobateli ya mpate oyo aleki malamu?

6 Mpo mobali amekola ndenge oyo Yesu asalelaka bokonzi na ye, asengeli koyekola komimona lokola mobateli ya mpate mpe bato ya libota na ye lokola bampate. Asengeli kosala makasi ya koyeba libota na ye malamu. Mobali akoki mpenza koyeba libota na ye ndenge wana? Ɛɛ, soki azali kosolola malamu na bato nyonso ya libota na ye, koyoka basusi na bango, kokamba libota na makambo oyo basalaka elongo, mpe koyeba kozwa bikateli ya malamu na makambo lokola losambo na libota, koyangana na makita, mosala ya kosakola mpe kominanola. Ntango mobali mokristo azali kotambwisa makambo na kolanda kaka boyebi ya Liloba ya Nzambe te kasi mpe ya bato ya libota na ye, na ntembe te bato ya libota bakosepela mingi kotya motema na bokonzi na ye mpe akozala na esengo ya komona ete bazali kaka na bomoko na losambo ya solo.

7, 8. Ndenge nini mobali akoki komekola Yesu na likambo etali komonisela bato oyo bazali na nse ya bokonzi na ye bolingo?

7 Mobateli ya mpate ya malamu azalaka mpe na bolingo mpo na bampate na ye. Koyekola masolo ya Baevanzile oyo elobeli bomoi mpe mosala ya Yesu etindaka motema na biso esepela na bolingo oyo Yesu amoniselaki bayekoli na ye. Kutu ‘akabaki molimo na ye mpo na bampate.’ Mibali basengeli komekola Yesu na likambo yango; basengeli kolinga bato oyo bazali na nse ya bokonzi na bango. Na esika asalela mwasi na ye makambo makasimakasi, mobali oyo azali na mposa ete Nzambe andima ye akokoba nde kolinga mwasi na ye “ndenge Kristo mpe alingaki lisangá.” (Ef. 5:25) Maloba na ye esengeli kozala na boboto mpe na bonkonde, mpo mwasi abongi na lokumu.​—1 Pe. 3:7.

8 Na oyo etali kobɔkɔla bana, tata ya libota asengeli kokangama makasi na mitinda ya Nzambe. Kasi, asengeli mpe komonisela bana na ye bolingo. Ntango esengeli kopesa bana disiplini, asengeli kopesa yango na bolingo nyonso. Mpo na bilenge mosusu, ekoki kosɛnga ntango mingi koleka mpo bákanga ntina ya makambo oyo bazali kosɛnga bango. Na ntango wana, tata asengeli komonisela bango motema molai mpenza. Ntango mibali bazali kolanda malamumalamu ndakisa ya Yesu, bakómisaka ndako na bango esika ya kimya mpe ya libateli. Mabota na bango ezalaka na kimya ya elimo lokola oyo mokomi ya nzembo moko alobelaki na nzembo.​—Tángá Nzembo 23:1-6.

9. Lokola Noa, mibali bakristo bazali na mokumba nini, mpe nini ekosalisa bango bákokisa yango?

9 Ndakisa mosusu oyo mibali bakristo bakoki kolanda ezali ya Noa. Noa azalaki na bomoi na mikolo ya nsuka ya ntango na bango. Kasi Yehova abatelaki ye “ná bato mosusu nsambo ntango ayeisaki mpela na mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.” (2 Pe. 2:5) Noa azalaki na mokumba ya kosalisa libota na ye bábika na Mpela. Bakristo oyo bazali batata ya mabota bazali na mokumba ya ndenge wana na mikolo oyo ya nsuka. (Mat. 24:37) Ezali mpenza na ntina báyekola ndakisa ya “mobateli ya mpate oyo aleki malamu” mpe básala makasi ya komekola ye!

Basi​—‘Bótonga bandako na bino’

10. Komikitisa ya mwasi liboso ya mobali na ye elimboli nini?

10 Ntoma Paulo akomaki boye: “Basi bámikitisa liboso ya mibali na bango lokola epai ya Nkolo.” (Ef. 5:22) Maloba yango ekitisi lokumu ya basi ata moke te. Yambo ya kokela Eva, mwasi ya liboso, Nzambe ya solo alobaki boye: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” (Eba. 2:18) Mokumba ya mwasi ya kozala “mosungi, oyo abongi” na mobali, elingi koloba ya kosalisa mobali ntango azali kokokisa mikumba na ye na libota, ezali mpenza mokumba ya lokumu!

11. Ndenge nini mwasi oyo azali ndakisa malamu ‘atongaka ndako na ye’?

11 Mwasi oyo azali ndakisa malamu asalaka makambo mpo na bolamu ya libota na ye. (Tángá Masese 14:1.) Na bokeseni na mwasi ya zoba, oyo azalaka na limemya te mpo na ebongiseli ya bokonzi, mwasi ya bwanya amemyaka yango mingi. Na esika ya komonisa elimo ya kozanga botosi mpe ya lipanda oyo ezali na mokili, amikitisaka liboso ya mobali na ye. (Ef. 2:2) Mwasi ya zoba abangaka te koloba mabe ya mobali na ye; kasi mwasi ya bwanya asalaka nyonso mpo bana mpe bato mosusu bápesaka mobali na ye limemya mingi. Mwasi ya ndenge wana akebaka mpo akitisa te bokonzi ya mobali na ye na kotyáká ye mpanzi likoló to koswanisáká ye. Likambo mosusu etali koyeba kobomba mbongo. Mbala mingi, mwasi ya zoba abebisaka biloko ya libota na ye oyo bazwaki na mpasi. Mwasi oyo asungaka mobali na ye azalaka ndenge wana te. Ayokelaka mobali na ye na makambo ya mbongo. Ndenge na ye ya kosala makambo emonisaka ete azali na mayele mpe ayebi kobatela mbongo. Atyaka mobali na ye mbamba te ete asalaka nsima ya ngonga ya mosala.

12. Mwasi akoki kosala nini mpo na kosalisa libota na ye ‘ezala ekɛngɛ’?

12 Mwasi oyo azali ndakisa malamu asalisaka libota ‘ezala ekɛngɛ’ na ndenge asungaka mobali na ye na koteya bana makambo ya elimo. (Mas. 1:8) Asimbaka mpenza programɛ ya Losambo na libota. Lisusu, asalaka na bomoko na mobali na ye ntango mobali azali kopesa bana toli mpe disiplini. Akeseni mpenza na mwasi oyo ayebi kosunga mobali te, oyo bana na ye bamonaka mpasi na mosuni mpe na elimo!

13. Mpo na nini mwasi asengeli kosunga mobali na ye ntango azali komipesa na makambo ya lisangá?

13 Mwasi oyo asungaka mobali na ye ayokaka ndenge nini ntango amoni ete mobali na ye azali komipesa mingi na misala ya lisangá? Ayokaka mpenza esengo! Ezala mobali na ye azali mosaleli na misala, nkulutu, to mbala mosusu asalaka na Komite mpo na boyokani na minganga to na Komite ya kotonga, asepelaka na mokumba ya mobali na ye. Ya solo, mpo na kosunga mpenza mobali na ye na maloba mpe na misala, ekosɛnga amipimela makambo mingi. Kasi, ayebi malamu ete komipesa oyo mobali na ye azali komipesa na makambo ya lisangá ezali kosalisa libota mobimba elala mpɔngi te na elimo.

14. (a) Ntango nini kokokisa mokumba ya mosungi ekoki kozala mpasi mpo na mwasi, mpe ndenge nini akoki kolonga mokakatano yango? (b) Ndenge nini mwasi asalisaka libota mobimba ezala malamu?

14 Kokokisa malamu mokumba ya mosungi ekoki kozala mpasi mpo na mwasi ntango mobali na ye azwi ekateli moko oyo ye asepeli na yango te. Ata na ntango wana, mwasi ya malamu amonisaka “elimo ya kimya mpe ya boboto” mpe asalaka na bomoko na mobali mpo ekateli oyo azwi esimba. (1 Pe. 3:4) Mwasi ya malamu alukaka kolanda ndakisa malamu ya basi ya ntango ya kala oyo bazalaki kobanga Nzambe; basi lokola Sara, Ruta, Abigaile, mpe Maria, mama ya Yesu. (1 Pe. 3:5, 6) Alandaka mpe ndakisa ya basi ya mikóló oyo bazali na “etamboli ya kobanga Nzambe” na mikolo na biso. (Tito 2:3, 4) Soki azali komonisa ete azali kolinga mpe komemya mobali na ye, mwasi oyo azali ndakisa malamu akosalisa libala na bango elonga mpe libota mobimba ezala malamu. Ndako na ye ekozala esika ya kobɔndisama mpe ya libateli. Mpo na mobali oyo alingaka Yehova, mwasi oyo azali kosunga ye azali na motuya mingi mpenza!​—Mas. 18:22.

Bilenge​—‘Botyá miso na bino na biloko oyo emonanaka te’

15. Ndenge nini bilenge bakoki kosala elongo na baboti na bango mpo libota ‘ezala ekɛngɛ’?

15 Ndenge nini bino bilenge bokoki kosala elongo na baboti na bino mpo libota na bino ‘ezala ekɛngɛ’ na elimo? Bótala libonza oyo Yehova atye liboso na bino. Mbala mosusu ntango bozalaki bana mike, baboti na bino balakisaki bino bililingi oyo emonisi bomoi na Paradiso. Ntango bozalaki kokola, na ntembe te basalelaki Biblia mpe mikanda ya moombo ya sembo mpo na kosalisa bino bómona na makanisi ndenge bomoi ya seko ekozala na mokili ya sika. Kotya miso na bino na mosala ya Yehova mpe komityela mikano oyo eyokani na mosala yango ekosalisa bino ‘bózala ekɛngɛ.’

16, 17. Bilenge bakoki kosala nini mpo bálonga na momekano ya mbangu ya bomoi?

16 Bótya likebi na maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na 1 Bakorinti 9:24. (Tángá.) Ntoma Paulo akokanisi mosala oyo tozali kosalela Yehova na momekano ya mbangu mpe bomoi ya seko na libonza. Bópota mbangu yango ya bomoi na mokano ya kolonga. Bópona nzela oyo ekosalisa bino bózwa libonza ya bomoi ya seko. Mingi batiki mposa ya koluka biloko ya mosuni elongola miso na bango na libonza. Ezali mpenza bozoba! Komipesa mobimba na koluka bozwi epesaka esengo ya solosolo te. Biloko oyo mbongo ekoki kosomba ezali ya ntango mokuse. Kasi, bino bótya miso na bino na “biloko oyo emonanaka te.” Mpo na nini? Mpamba te “biloko oyo emonanaka te ezali ya seko.”​—2 Ko. 4:18.

17 Na “biloko oyo emonanaka te,” tokoki kotánga mapamboli ya Bokonzi. Bóluka kozala na bomoi oyo ekosalisa bino bózwa mapamboli yango. Bokozwa esengo ya solosolo soki bopesi bomoi na bino na mosala ya Yehova. Kosalela Nzambe ya solo epesaka mabaku ya kokokisa mikano ya ntango mokuse mpe ya ntango molai.a Komityela mikano ya elimo oyo bokoki kokokisa ekoki kosalisa bino bótya makanisi nyonso na mosala ya Nzambe mpo bózwa libonza ya bomoi ya seko.​—1 Yoa. 2:17.

18, 19. Ndenge nini elenge akoki koyeba soki afandisi solo na motema na ye?

18 Bilenge, litambe ya liboso na nzela ya bomoi ezali nde kofandisa solo na mitema na bino moko. Osilá kosala litambe yango? Omituna boye: ‘Nazali moto ya elimo, to namipesaka na makambo ya elimo kaka na nsima ya baboti na ngai? Nazali kolona bizaleli oyo ekotinda Nzambe asepela na ngai? Nasalaka makasi mpo nazala na momesano ya komipesa na makambo oyo etali losambo ya solo, na ndakisa kobondela mbala na mbala, koyekola, koyangana na makita, mpe kobima mosala ya kosakola? Nazali kokolisa boyokani na ngai na Nzambe mpo napusana penepene na ye?’​—Yak. 4:8.

19 Bókanisa ndakisa ya Moize. Atako afandaki na bato oyo bazalaki na mimeseno ya bapaya, Moize aponaki koyebana ete azali mosambeli ya Yehova na esika ya kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao. (Tángá Baebre 11:24-27.) Bilenge bakristo, bino mpe bosengeli kozala na ekateli ya kosalela Yehova na bosembo. Na ndenge yango, bokozwa esengo ya solosolo, bokozala na bomoi ya malamu lelo koleka bomoi ya bato mosusu, mpe elikya ya ‘kosimba makasi bomoi ya solosolo.’​—1 Tim. 6:19.

20. Na momekano ya mbangu mpo na bomoi, banani bazwaka libonza?

20 Na masano ya ntango ya kala, kaka moto moko nde azalaki kolonga na momekano ya mbangu. Ezali ndenge wana te na momekano ya mbangu mpo na bomoi. Mokano ya Nzambe ezali “ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Bato mingi bapotaki mbangu liboso na bino mpe balongaki, mpe mingi bazali lelo kopota elongo na bino. (Ebr. 12:1, 2) Libonza ekopesama na baoyo nyonso bakopota tii na nsuka. Na yango, bózala na ekateli ya kolonga!

21. Lisolo oyo elandi ekolobela nini?

21 ‘Mokolo ya Yehova, mokolo yango monene mpe ya nsɔmɔ,’ ekoya kaka. (Mal. 4:5) Ekozala malamu te mokolo yango ekuta mabota ya bakristo bamilɛngɛli te. Ezali na ntina ete moto nyonso na libota akokisa mokumba oyo Makomami epesi ye. Likambo nini mosusu bokoki kosala mpo bólala mpɔngi na elimo te mpe bókómisa boyokani na bino na Nzambe makasi? Lisolo oyo elandi ekolobela makambo misato oyo ekoki kosalisa libota mobimba ezala malamu na elimo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2010, nkasa 12-16; 15 Yuli 2004, nkasa 21-23.

Oyekoli makambo nini?

• Mpo na nini ezali na ntina mingi mabota ya bakristo ‘ezala ekɛngɛ’?

• Ndenge nini mobali akoki komekola Mobateli ya mpate oyo eleki malamu?

• Mwasi oyo azali ndakisa malamu akoki kosala nini mpo asungaka mobali na ye?

• Ndenge nini bilenge bakoki kosalisa mabota na bango ezala ekɛngɛ na elimo?

[Elilingi na lokasa 9]

Mpo na mobali oyo alingaka Yehova, mwasi oyo azali kosunga ye azali na motuya mingi mpenza

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto