Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/6 nk. 20-23
  • Ntango nini Biblia ekomamaki?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango nini Biblia ekomamaki?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Badati oyo Biblia elobeli
  • Makambo oyo bato ya mayele balobi
  • Bazali kolongisa badati ya Biblia
  • Ntango nini Biblia ekomamaki?
  • Biblia ebatelamaki na ndenge ya kokamwa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bakomeli na ntango ya kala mpe Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Biblia ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/6 nk. 20-23

Ntango nini Biblia ekomamaki?

Biblia ekeseni mpenza na babuku mosusu nyonso. Bato koleka miliare misato bamonaka yango ete ezali buku mosantu. Balobaka ete ezali buku oyo etɛkamá mingi koleka babuku mosusu nyonso banda kala, mpe ebimisamá na motángo ya miliare soki 6 (na mobimba to ndambo) na minɔkɔ koleka 2 400.

ATAKO Biblia ezali buku oyo bato mingi batángaka banda kala koleka babuku mosusu, makanisi ndenge na ndenge ezali kotambola mpo na oyo etali ntango bakomaki yango, mingimingi Makomami ya Ebre, oyo mbala mingi babengaka yango Kondimana ya Kala. Ekoki kozala ete osili kotánga makanisi yango na bazulunalo to na babuku, to mbala mosusu olandaki na televizyo to na filme ntango bato ya mayele bazali kolimbola yango. Makambo oyo elandi emonisi ndenge bato ya mikolo na biso bazali koloba.

▪ “Mikanda mingi ya Biblia ekomamaki kobanda na siɛklɛ ya mwambe tii ya motoba liboso ya ntango na biso, to katikati ya eleko ya profeta to mosakoli Yisaya mpe Yirimia.”

▪ “Na boumeli ya mbula nkama mibale oyo euti koleka, bato ya mayele na makambo ya Biblia, bazalaki koloba ete Makomami ya Ebre ekomamaki mpe ebimisamaki mingimingi na eleko ya Baperse mpe ya Bagrɛki (kobanda na siɛklɛ ya mitano tii na siɛklɛ ya mibale liboso ya ntango na biso).”

▪ “Makomi nyonso ya Biblia na Ebre ndenge ezali lelo oyo, ekomamaki na eleko ya Bagrɛki (nsima ya siɛklɛ ya mibale tii ya liboso [ya ntango na biso]).”

Ndenge nini mokristo oyo andimaka ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe” akoki kotalela makanisi wana ya bongolabongola? (2 Timote 3:16) Mpo na kozwa eyano, tótalela likambo yango na ndenge mibale.

Badati oyo Biblia elobeli

Makomami ya Ebre elobeli kolandana ya ebele ya badati. Yango emonisi ete mikanda ya ebandeli ekomamaki na eleko ya Moize mpe Yosua, eleki sikoyo mbula soki 3 500.a Samwele, Davidi, Salomo mpe bato mosusu babakisaki mikanda mosusu na siɛklɛ ya 11 liboso ya ntango na biso. Yango elandanaki na mikanda oyo elobeli bomoi ya bato, maloba ya ntɔki, mpe mikanda ya bisakweli oyo ekomamaki kobanda na siɛklɛ ya libwa tii siɛklɛ ya mitano liboso ya ntango na biso.

Bakopi ya mikanda yango ya Biblia to biteni na yango ezali na molɔngɔ ya barulo ya Mbu Ekufá, longola mokanda ya Estere. Boyekoli ya biloko ya kala endimisi ete barulo yango oyo eumeli koleka, ezali oyo ekomamaki na mobu soki 200 tii mobu 100 liboso ya ntango na biso.

Makambo oyo bato ya mayele balobi

Likambo ya monene oyo etindi bato báboya kondima badati oyo Biblia elobeli, ezali mpo Biblia elobi ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mpo na yango, na buku na ye (The Old Testament Documents), Profesɛrɛ Walter Kaiser, akomi boye: “Makomi [ya Biblia] emikweisi na ndenge elobi ete ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mpe elobeli makamwisi mpe Nzambe ye moko.” Bato ya mayele oyo bandimaka te ete Nzambe akomisaki Biblia balobaka ete lokola esɛngaka ete tótalela malamumalamu makambo nyonso oyo buku moko elobi liboso tóndima, esengeli mpe kosala bongo mpo na Biblia.

Na eleko moko boye, bato bazalaki kosalela makanisi ya Darwin oyo amonisaki ete biloko ebimaki yango moko, mpo na komonisa ndenge lingomba ezalaki kobongwana: liboso bato babandaki kosambela biloko ezalisamá, na nsima, bilimo, banzambe ndenge na ndenge, mpe nsukansuka, likanisi ya kosambela Nzambe moko ebimaki. Lokola mikanda ya liboso ya Biblia elobeli kosambela Nzambe moko, bato mosusu bakanisaka ete mikanda yango ekomamaki nsima mpenza ya ntango oyo balobaka ete ekomamaki.

Banda wana, bato ya mayele batalelaka Biblia na ndenge mingi. Na ndakisa, diksionɛrɛ moko ya Kondimana ya Kala oyo euti kobimisama, elobeli ndenge bakomaki Biblia, bosolo ya masolo na yango, ndenge oyo masolo yango eyokani na bindimeli ya bato ya ntango ya kala, mpe bongo na bongo.

Atako bato ya mayele bayokanaka te na likambo etali kopesa dati ya mikanda ya Biblia, mingi bandimaka makanisi ya profesɛrɛ Richard Friedman. Ye akomaki ete: “Bakomi ya ntango ya kala bakomaki mikanda ya ntɔki to ya ntɔki te mpe mibeko na boumeli ya bankama ya bambula liboso. Mpe bakomi [ya Biblia] bazwaki makambo na mikanda yango mpe basalelaki mikanda wana mpo na kokoma Biblia.”

Buku Kondima, mimeseno mpe masolo ya kala (na Lingelesi) elobeli ndambo ya makambo yango mpe makambo mosusu oyo etali Biblia. Nzokande, na mokuse elobi boye: “Atako bato ya mayele bazali na bomoko na likambo etali koboya kondima oyo Biblia elobi mpe kotya motema mingi na makanisi na bango moko, kasi bayokanaka te na makanisi na bango.”

Bazali kolongisa badati ya Biblia

Makomi ya liboso ya Biblia ekomamaki na biloko oyo ebebaka noki. Na yango, tokoki te kolikya ete makomi ya ebandeli to makomi ya liboso oyo ekomamaki na ntango ya Moize, Yosua, Samwele, to Davidi ezwama. Nzokande, likoki ezali ya koyekola bilembeteli mosusu ya ntango ya kala, oyo emonisi ete kondima badati ya Biblia ezali likambo ya mayele, ndenge bato mosusu ya mayele oyo bayebani mingi mpe baoyo bakundolaka biloko ya kala basalaka. Bilembeteli yango emonisi biso nini? Tótalela mwa bandakisa.

▪ Ndenge Biblia emonisi ete Moize ná Yosua bazalaki na bomoi eleki mbula 3 500, mikanda ezalaki na Moyen-Orient na ntango wana? Na engumba Mesopotamie mpe Ezipito, bato bazalaki kokoma masolo ya bato, makambo ya lingomba, ya mibeko, mpe makambo mosusu. Tokoloba boni mpo na Moize mpe Bayisraele? Buku Diksionɛrɛ ya Kondimana ya Kala: Pantatɛkɛ (na Lingelesi) eyanoli boye: “Ntembe ezali te ete mikanda ezalaki na nsuka ya eleko oyo bakómaki kosalela bisaleli oyo esalemi na bronzɛ [soki na 1550 tii 1200 liboso ya ntango na biso] na Kanana.” Ebakisi ete: “Ezali na ntina te, na kotalela ndenge oyo bazalaki kokoma mikanda na ntango ya kala, ya komituna soki mikanda oyo elobami ete Moize nde akomaki yango ezali solo to te, ezala mpe mikanda mingi mosusu.”​—Kobima 17:14; 24:4; 34:27, 28; Mitángo 33:2; Kolimbola Mibeko 31:24.

▪ Bakomi ya Biblia basalelaki mpe mikanda ya kala mpo na kokoma? Ɛɛ, bamosusu basalelaki ‘babuku,’ oyo ekoki kozala mikanda ya mibeko, ya kolandana ya mabota, babuku ya masolo ya kala, mpe mikanda oyo elobeli mabota.​—Mitángo 21:14; Yosua 10:13; 2 Samwele 1:18; 1 Bakonzi 11:41; 2 Ntango 32:32.

▪ Mpo na nini mikanda ya Biblia ya kala koleka barulo ya Mbu Ekufá ezwamaki te? Zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elimboli boye: “Mikanda mingi ya kala oyo ekomamaki na papirisi mpe na mposo ya nyama na Palestini ebebaki; kaka oyo ezwamaki na bisika oyo moi ezalaka makasi, na ndakisa pembenipembeni ya Mbu Ekufá nde etikalaki. Biloko yango epɔlaki mpo na malili ya mabele. Lokola bamonaki yango te, yango elingi koloba te ete ezalaki te.” Kutu, bamonaki bankama ya bakashɛ ya kotya bilembo na mikanda, oyo esalemaki na mabele ya lima. Mikanda oyo ekomamaki na papirisi mpe mposo ya nyama ezikaki na mɔtɔ to epɔlaki mpo na malili ya mabele, kasi bakashɛ oyo esalemá na mabele ya lima etikalaki. Bakashɛ yango ekoki kozala ya siɛklɛ ya libwa tii ya mitano liboso ya ntango na biso.

▪ Ndenge nini bamaniskri ya Biblia ebatelamaki? Buku Ndenge Biblia ezalaki (na Lingelesi) elobi boye: “Masolo, banzembo, mibeko, mpe bisakweli oyo ezali lelo oyo na Biblia, ekomamaki lisusu mbala na mbala, ata ntango Biblia ezalaki kokomama. . . . Soki bazalaki kozongela kosala bakopi na yango na ntango Biblia ezalaki kokoma, ezali mpo bazalaki kosalela yango; bazalaki kosalela yango mokolo na mokolo. . . . Moto moko te akokaki komipesa mosala ya kosala bakopi na yango kozanga ntina.”​—Kolimbola Mibeko 17:18; Masese 25:1.

Mpo na mikanda ya ebandeli ya Biblia, elingi koloba ete bazalaki kosala bakopi na yango na boumeli ya bambula soki 1 500 tii na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso. Buku moko (On the Reliability of the Old Testament) elobi ete mosala wana ya kosala bakopi na bosikisiki esɛngaki mpe “kobongisa lisusu ndenge ya kokoma maloba na kolanda mibeko ya lokota (grammaire) mpe ndenge ya kobenga yango, likambo oyo ezalaki kosalema bipai nyonso na Moyen-Orient na ntango ya kala.”b Yango emonisi ete ntembe oyo bato mosusu ya mayele babimisaka mpo na likambo etali lolenge ya kokoma ezali na ntina te.

Ntango nini Biblia ekomamaki?

Ebongi mpenza kotingama kaka ete lokola bamaniskri ya kala ya Biblia oyo ezalaki na ntango ya Moize, Yosua, Samwele mpe bato mosusu emonanaki te, yango emonisi ete mikanda ya Biblia ekomamaki te kala ndenge Biblia emonisi yango? Bato mingi ya mayele bandimi ete ata bilembeteli ezali te, yango elimboli te ete mikanda yango ezalaki te. Kutu, ndenge nini biloko oyo ebebaka noki ekokaki kobatelama? Na ndakisa, Aderson Kitchen, moto ya mayele oyo ayekolaka makambo ya Ezipito alobi ete pene na mikanda nyonso ya Ezipito oyo ekomamaki na papirisi liboso ya eleko ya Bagrɛki mpe Baroma ebebaki.

Bato oyo bazwaka Biblia na motuya bakoki komituna boye: ‘Ndenge nini Yesu azalaki kotalela Makomami ya Ebre?’ Na eleko na ye, ntembe na likambo ya badati ezalaki te. Emonani ete Yesu azalaki kondima badati oyo Makomami elobeli, kaka ndenge Bayuda nyonso bazalaki kondima yango. Andimaki mpe ete mikanda ya libosoliboso ya Biblia ekomamaki na bato oyo balobelami?

Yesu alobelaki mikanda oyo Moize akomaki. Na ndakisa, alobelaki “mokanda ya Moize.” (Marko 12:26; Yoane 5:46) Alobelaki masolo ya mokanda ya Ebandeli (Matai 19:4, 5; 24:37-39); Kobima (Luka 20:37); Balevi (Matai 8:4); Mitángo (Matai 12:5); mpe Kolimbola Mibeko (Matai 18:16). Alobaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli mpe na Nzembo esengeli kokokisama.” (Luka 24:44) Soki andimaki ete Moize mpe bato mosusu bakomaki mikanda, na ntembe te andimaki mpe badati oyo Makomaki ya Ebre elobeli.

Na yango, ntango nini kasi Biblia ekomamaki? Tokoki mpenza kondima badati oyo Biblia yango moko epesi? Tomoni makanisi ya bato mingi ya mayele mpe makambo oyo Biblia yango moko elobi, makambo mosusu ya ntango ya kala, mpe makanisi ya Yesu. Na nyonso wana, eyano na yo ekomonisa ete ondimaka makanisi ya Yesu oyo alobaki mokolo moko ntango azalaki kobondela Tata na ye, Yehova Nzambe ete: “Liloba na yo ezali solo”?​—Yoane 17:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali kolandana ya badati na Biblia, talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 1, nkasa 451-472, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

b Talá lisolo “Bakomeli na ntango ya kala mpe liloba ya Nzambe” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 2007, nkasa 18-20.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 20-23]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

(Badati oyo ekoki kozala ete mikanda ya Biblia esilaki kokomama)

2000 liboso ya ntango na biso

1800

[Elilingi]

Bakomeli ya Ezipito babimisaki biloko ya kokomela liboso ya ntango ya Moize

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© DeA Picture Library/​Art Resource, NY

1600

[Elilingi]

Moize asilisaki kokoma mokanda ya Ebandeli na 1513 liboso ya ntango na biso, na biloko oyo ebebaka noki

Ebandeli 1513 L.T.B.

Yosua

1400

1200

Samwele

1000 liboso ya ntango na biso

[Elilingi]

Bankama ya bakashɛ oyo esalemá na lima ebebaki te

Kobanda 900 tii 500 liboso ya ntango na biso

Yona

800

Yisaya

600

Yirimia

Danyele

[Elilingi]

Mikanda ya papirisi oyo bagumbá, bakangá na nsinga mpe batyá kashɛ ya lima

Kobanda na 449 liboso ya ntango na biso

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Musée ya Brooklyn, libula ya Theodora Wilbour, euti na bibliotɛkɛ ya tata na ye, Charles Edwin Wilbour

400

200

[Elilingi]

Barulo ya Mbu Ekufá elíngamaki na bilamba ya lini mpe ebatelamaki na kati ya bambɛki. Yango nde makomi ya Biblia ya kala mpenza oyo ezwamaki

Kobanda na 200 tii 100 liboso ya ntango na biso

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Shrine of the Book, Photo © Musée ya Israël, Jérusalem

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto