Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/7 lok. 10
  • Yehova akoki koyoka mawa to esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova akoki koyoka mawa to esengo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Okoki kosepelisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Ndenge ya kotikala makasi ntango mwana akómi motomboki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ndenge nini okoki kolonga makanisi oyo elɛmbisaka nzoto?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/7 lok. 10

Pusaná penepene na Nzambe

Yehova akoki koyoka mawa to esengo?

SOKI eyano ezali ɛɛ, motuna mosusu ebimi yango oyo: Makambo oyo tosalaka epesaka Nzambe mawa to esengo? To na maloba mosusu, misala na biso ekoki kopesa Nzambe esengo to koyokisa ye mpasi? Bato mosusu ya filozofi na ntango ya kala bandimaki te likanisi yango. Balobaki ete moto ata moko te akoki kotinda Nzambe ayoka esengo to mawa, mpe na yango, Nzambe akoki te koyoka esengo to mawa. Kasi, Biblia eteyaka bongo te; elobaka mpenza ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na biso mpe atyaka likebi na makambo oyo tosalaka. Tótalela maloba oyo ezali na Nzembo 78:40, 41.

Nzembo ya 78 elobeli makambo oyo Nzambe asalelaki libota ya Yisraele. Nsima ya kobimisa ekólo yango na boombo na Ezipito, Yehova asɛngaki bango bákóma bato na ye mpenza. Alakaki ete soki bakobi kotosa mibeko na ye, bakokóma ‘mpenza eloko na ye,’ mpe akokaki kosalela bango na lolenge ya kokamwa mpo na kokokisa mokano na ye. Bato yango bandimaki mpe basalaki kondimana ya Mibeko. Bakokisaki makambo oyo bandimaki kosala?​—Kobima 19:3-8.

Ezali na eloko moko te ya motuya mingi oyo tokoki kopesa Yehova koleka kozala na bomoi oyo esepelisaka motema na ye

Mokomi na nzembo alobi ete: “Mbala boni batombokelaki ye na esobe!” (Vɛrsɛ 40) Vɛrsɛ oyo elandi ebakisi boye: “Mbala na mbala bamekaki Nzambe.” (Vɛrsɛ 41) Simbá ete mokomi alobeli elimo ya botomboki. Ezaleli yango ebandaki liboso mpenza, na esobe mwa moke nsima ya kobima na boombo na Ezipito. Bato babandaki koimaima mpo na Nzambe, kotya ntembe soki azali na likoki mpe alingi kobatela bango. (Mitángo 14:1-4) Buku moko ya babongoli ya Biblia elobi ete maloba “batombokelaki ye” ekoki “kobongolama na ‘bakómisaki mitema na bango makasi mpo na koboya kotosa Nzambe’ to ‘balobaki na Nzambe ete “Te”.’” Kasi, na motema mawa na ye, Yehova azalaki kolimbisa bato na ye ntango bazalaki kobongola motema. Kasi, na nsima, bazalaki kozongela banzela na bango ya kala mpe kotomboka lisusu, mpe ezaleli yango ezalaki kokoba.​—Nzembo 78:10-19, 38.

Ndenge nini Yehova azalaki koyoka ntango nyonso oyo bato na ye bazalaki bongolabongola, elingi koloba kotosa mpe kotomboka? Vɛrsɛ 40 elobi ete: “Bayokisaki ye motema mpasi.” Libongoli mosusu ya Biblia elobi ete “bazalaki kosala makambo oyo ezalaki kotinda ye asilika.” Buku moko elimboli ete: “Maloba ya vɛrsɛ yango emonisi ete makambo oyo Baebre bazalaki kosala, ezalaki kopesa mpasi na motema, ndenge kaka makambo ya mwana ya motó makasi mpe ya botomboki esalaka.” Kaka ndenge mwana ya motó makasi akoki kopesa baboti na ye mpasi mingi na motema, Bayisraele oyo batombokaki “bayokisaki Mosantu ya Yisraele motema mpasi.”​—Vɛrsɛ 41.

Liteya nini tokoki kozwa na Nzembo 78? Ezali mpenza likambo ya esengo koyeba ete Yehova alingaka basambeli na ye mingi mpe asundolaka bango nokinoki te. Lisusu, ezali mpe likambo ya mayele koyeba ete makambo oyo tosalaka ekoki kopesa Yehova mawa to esengo. Koyeba likambo yango etindi yo osala nini? Etindi yo olinga kosala oyo ezali malamu?

Na esika ya kolanda ezaleli ya masumu mpe koyokisa Yehova motema mpasi, tosengeli kopona kosala makambo ya malamu mpe kosepelisa motema na ye. Yango nde asɛngaka basambeli na ye ete: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai.” (Masese 27:11) Ezali na eloko moko te ya motuya mingi oyo tokoki kopesa Yehova koleka kozala na bomoi oyo esepelisaka motema na ye.

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Yuli:

Nzembo 60-86

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto