Zalá lokola Finehase ntango okutani na mikakatano
KOZALA nkulutu na lisangá ezali likambo ya malamu. Nzokande, Liloba ya Nzambe emonisi ete bankulutu bakutanaka na mikakatano. Na ndakisa, esɛngaka ntango mosusu ‘básambisa mpo na Yehova.’ (2 Nt. 19:6) To mpe nkulutu akoki kozwa mokumba moko oyo amoni ete akokoka kokokisa te. Akoki koyoka lokola Moize, oyo na komikitisa nyonso, atunaki mpo na mokumba moko oyo bapesaki ye ete: “Ngai nazali nani mpo nakende epai ya Farao?”—Kob. 3:11.
Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Bankulutu mpe batyamaka na lisalisi ya elimo yango kaka. Na yango, Biblia ekoki kosalisa bankulutu bákokisa mosala na bango malamu. Tózwa ndakisa ya Finehase. Lokola azalaki mwana ya Eleazare mpe nkɔkɔ ya Arona, akokaki kokóma nganga-nzambe monene. Makambo misato oyo esalemaki ntango azalaki na bomoi emonisi ete bankulutu lelo basengeli kozala na mpiko, na mayele ya kososola mpe kotyela Yehova motema na ntango ya mikakatano.
“Na mbala moko atɛlɛmaki”
Finehase azalaki naino elenge ntango Bayisraele bafandaki na mokili patatalu ya Moabe. Biblia elobi boye: “Bato babandaki kosala pite ná bana basi ya Moabe. . . . Mpe bato babandaki kolya mpe kogumbamela banzambe na bango.” (Mit. 25:1, 2) Yehova abomaki basali-mabe yango na bolɔzi. Kanisá ndenge Finehase ayokaki ntango bayebisaki ye makambo ya mabe oyo bato basalaki mpe bolɔzi oyo yango ememaki!
Lisolo yango ebakisi boye: “Talá! mobali moko na kati ya bana ya Yisraele ayaki, mpe azalaki koya na mwasi moko Momidiane epai ya bandeko na ye na miso ya Moize mpe na miso ya liyangani mobimba ya bana ya Yisraele, wana bazalaki kolela na monɔkɔ ya hema ya kokutana.” (Mit. 25:6) Nganga-nzambe Finehase akosala nini? Azalaki mpenza mokóló te mpe Moyisraele oyo asalaki likambo yango azalaki nkumu mpe azalaki kokamba bato na makambo ya losambo.—Mit. 25:14.
Nzokande Finehase azalaki kobanga Yehova, kasi bato te. Ntango amonaki mobali mpe mwasi yango, na mbala moko azwaki likɔnga mpe alandaki mobali yango na kati ya hema mpe atɔbɔlaki bango mibale. Ndenge nini Yehova amonaki mpiko mpe ekateli oyo Finehase azwaki? Na mbala moko, Yehova akataki bolɔzi yango mpe mpo na kopesa Finehase mbano, asalaki kondimana ete bonganga-nzambe ekotikala na libota na ye “mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” Ezalaki mpenza mbano monene!—Mit. 25:7-13.
Ya solo, lelo bankulutu basalaka makambo ya mobulu te. Kasi, ndenge moko na Finehase, bankulutu basengeli kokakatana te kozwa bikateli mpe kosala na mpiko. Na ndakisa, esalaki kaka mwa basanza banda Guilherme akómaki nkulutu ntango basɛngaki ye azala na komite ya kosambisa likambo moko. Moto oyo asalaki lisumu ezalaki nkulutu oyo asalisaki Guilherme ntango azalaki kokola. Guilherme alobi boye: “Nazalaki kobanga kosala yango. Nazalaki kolala malamu te na butu. Nazalaki kokanisakanisa ndenge nini nakosambisa likambo yango kozanga natika mayoki na ngai epekisa ngai kolanda mibeko ya Yehova. Nabondelaki mikolo mingi liboso mpe natángaki mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia.” Yango esalisaki ye azwa mpiko oyo esengeli mpo na kosambisa likambo wana ya mpasi mpe asalisa ndeko na ye oyo abungaki nzela mpo azongisa boyokani na ye na Nzambe.—1 Tim. 4:11, 12.
Soki bankulutu basali na mpiko mpe bazwi bikateli oyo esengeli ntango makambo oyo ebimi na lisangá esɛngi bongo, bamonisaka ete bazali na kondima mpe bazali sembo. Ya solo, bakristo mosusu mpe basengeli komonisa mpiko, mpo bákoka koyebisa lisumu ya monene oyo mbala mosusu bayoki to bayebi ete ndeko moko asali. Ndenge moko mpe, esɛngaka moto azala sembo mpo akata boyokani na moninga to ndeko moko ya libota oyo abimisami na lisangá.—1 Ko. 5:11-13.
Mayele ya kososola esalisaka mpo makambo ebeba te
Mpiko oyo Finehase amonisaki ezalaki kaka te mpo azalaki elenge mpe asalaki makambo kozanga kokanisa. Tótala ndenge amonisaki ete azali na mayele ya kososola, elingi koloba asalaki na bokɛngi mpe na bwanya, ntango bamemelaki ye nsango mosusu. Libota ya Rubene, libota ya Gade, mpe ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo pembeni ya Ebale Yordani. Bayisraele mosusu bamonaki ete basali yango mpo na losambo ya lokuta mpe bamibongisa mpo na kobundisa bango.—Yos. 22:11, 12.
Finehase asalaki nini? Finehase, elongo na bankumu mosusu ya Yisraele, bamonisaki bokɛngi. Basololaki likambo yango na bato oyo batongaki etumbelo. Mabota yango balimbolaki likambo yango polele; bamonisaki ete etumbelo yango ezali nde mpo na ‘kosalela Yehova.’ Yango esalisaki ete mikakatano ezala te.—Yos. 22:13-34.
Soki mokristo ayoki likambo moko ya mabe mpo na ndeko na ye mokristo to soki bafundi ndeko yango epai na ye, ekozala malamu mingi mokristo yango amekola Finehase! Mayele ya kososola ekopekisa biso tósilika to tópanza nsango ya mabe oyo toyoki mpo na ndeko na biso.—Mas. 19:11.
Ndenge nini mayele ya kososola ekoki kosalisa bankulutu bámekola Finehase? Jaime, oyo azali nkulutu esali sikoyo mbula koleka zomi, alobi boye: “Soki mosakoli moko abandi koyebisa ngai matata oyo azali na yango na moto mosusu, nasɛngaka mbala moko Yehova asalisa ngai mpo nakɔtela moto moko te kasi napesa nde toli oyo euti na Biblia. Mokolo moko, ndeko mwasi moko ayaki koyebisa ngai ete ndeko ya lisangá mosusu oyo azalaki mpe na mikumba asalelaki ye makambo ya malamu te. Lokola ndeko mobali yango azalaki moninga na ngai, nakokaki mbala moko kokɔtela ye. Kasi, natalelaki batoli mingi ya Biblia elongo na ndeko mwasi wana. Andimaki ete ye moko akosolola naino na ndeko yango. (Mat. 5:23, 24) Kimya ezongaki na mbala moko te. Na yango, nalendisaki ye asalela batoli mosusu ya Biblia. Alobaki ete akobondela lisusu mpo na likambo yango mpe akosala makasi alimbisa.”
Esukaki ndenge nini? Jaime alobi boye: “Basanza mingi na nsima, ndeko mwasi yango ayaki kosolola na ngai. Alobaki ete, nsima ya mikolo, ndeko mobali wana ayokaki mawa mpo na makambo oyo alobaki. Ayokanaki na ndeko mwasi yango ete bábima mosala ya kosakola mpe ayebisaki ye ete asepelaka na milende na ye. Matata yango esilaki. Likambo yango elingaki kosuka malamu ndenge wana soki namikɔtisaki mbangumbangu na matata yango mpe mbala mosusu nakɔtelaki moto moko?” Biblia epesi toli oyo: “Kobima nokinoki te mpo na kofunda likambo.” (Mas. 25:8) Bankulutu oyo bazali na mayele ya kososola bamonisaka bwanya; balendisaka bakristo oyo bazali na matata ná basusu básalela batoli ya Biblia mpo na koluka kotya kimya.
Atunaki Yehova
Finehase azalaki nganga-nzambe na ekólo oyo Nzambe aponaki. Ndenge touti komona yango, azalaki na mpiko mingi mpe na mayele ya kososola ata ntango azalaki naino elenge. Nzokande, alongaki mikakatano mpo azalaki kotyela Yehova motema.
Mibali ya Gibea, ya libota ya Benyamina, basangisaki nzoto na makasi na makango ya Molevi moko mpe babomaki ye. Na nsima, mabota mosusu bakendaki mpo na kobundisa libota ya Benyamina. (Bas. 20:1-11) Liboso bábunda, babondelaki Yehova asalisa bango, kasi bana ya Benyamina balongaki bango mbala mibale mpe babomaki bato mingi. (Bas. 20:14-25) Balobaki nde ete Nzambe ayoki mabondeli na bango te? Yehova alingaki mpenza bázongisa mabe mpo na likambo oyo esalemaki?
Finehase, oyo na ntango wana akómaki nganga-nzambe monene na Yisraele, azalaki kaka kotyela Nzambe motema mpe azwaki makambo na mabɔkɔ. Abondelaki boye: “Nabima lisusu mpo na kobunda na bana ya ndeko na ngai Benyamina to natika?” Mpo na koyanola libondeli na ye, Yehova apesaki libota ya Benyamina na lobɔkɔ na bango, mpe batumbaki Gibea mobimba.—Bas. 20:27-48.
Yango ekoki koteya biso nini? Makambo mosusu oyo ebimaka na lisangá esilaka noki te ata soki bankulutu basali milende mingi mpe babondeli Nzambe mpo asalisa bango. Soki esalemi bongo, ekozala malamu bankulutu bákanisa maloba ya Yesu ete: “Bókoba kosɛnga [to kobondela], mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” (Luka 11:9) Ata soki emonani ete eyano ya libondeli ezali koya noki te, bakɛngɛli basengeli koyeba ete Yehova akoyanola na ntango oyo ye moko amoni malamu.
Na ndakisa, lisangá moko na Irlande ezalaki na mposa makasi ya kozwa Ndako ya Bokonzi kasi mokonzi oyo azalaki kotalela makambo oyo etali kokabola mapango azalaki kolinga bango te. Andimaki te kopesa bandeko bisika nyonso oyo bazalaki kopona mpo bátonga kuna. Emonanaki ete mokonzi kaka moko oyo akokaki kopesa bango esika ezalaki mokonzi monene ya makambo etali mapango na etúká wana. Libondeli ekokaki kosalisa bandeko yango ndenge esalisaki na ntango ya Finehase?
Nkulutu moko ya lisangá yango alobi boye: “Nsima ya kobondela mpe kosala malɔmbɔ mingi, tokendaki na biro ya mokonzi monene ya makambo etali mapango. Bayebisaki ngai ete mbala mosusu ekosɛnga bapɔsɔ mingi liboso tómonana na mokonzi yango. Kasi, tomibongisaki mpo na kosolola na ye miniti 5 mpamba. Nsima ya komona baplan ya sika oyo tosalaki, na mbala moko apesaki biso ndingisa mpo tókoba, mpe mokonzi oyo akambaka mosala ya kokabola mapango epai na biso asalaki nyonso mpo na kosalisa biso. Likambo wana emonisaki biso ntina mpenza ya libondeli.” Ya solo, Yehova akoyanola mabondeli ya bankulutu oyo batyelaka ye motema, oyo babondeli ye na motema moko.
Finehase azalaki na mikumba minene na Yisraele ya kala; kasi lokola azalaki na mpiko, na mayele ya kososola mpe atyelaki Nzambe motema, alongaki kosilisa mikakatano. Mpe Yehova asepelaki na Finehase ndenge asalaki milende mpo na kobatela lisangá ya Nzambe. Mbula soki 1 000 na nsima, elimo santu etindaki Ezera akoma ete: “Finehase mwana ya Eleazare nde azalaki mokambi na bango kala. Yehova azalaki elongo na ye.” (1 Nt. 9:20) Tiká Yehova azala mpe elongo na baoyo nyonso bazali kokamba basaleli ya Nzambe lelo oyo, ɛɛ, azala elongo na bakristo nyonso oyo bazali kosalela ye na bosembo.