5 Nzambe andimaka mangomba nyonso—Solo to lokuta?
Liteya oyo mbala mosusu oyoká: “Se ndenge banzela ndenge na ndenge ekoki komema na esika moko, mangomba nyonso mpe ekoki komema epai ya Nzambe. Moto na moto asengeli kopona lingomba oyo ekomema ye epai ya Nzambe.”
Oyo Biblia eteyaka: Tosengeli kosambela Nzambe na bosembo mpe koboya bokosi. Yesu ayebisaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye ntina oyo Nzambe aboyaki bango: “Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, bakosi, se ndenge ekomamá: ‘Bato oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.’” (Marko 7:6) Atako bongo, Nzambe akondima losambo na biso te kaka mpo tozali kosala yango na motema sembo.
Yesu amonisaki likambo yango polele na ndenge ayebisaki ntina mpenza oyo Nzambe aboyaki losambo ya bakonzi wana ya mangomba mpe ya bandimi na bango. Amonisaki ete Nzambe alobaki mpenza na bango ntango alobaki boye: “Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.” (Marko 7:7) Losambo na bango ezalaki “mpamba,” to na ntina te, mpamba te bazalaki kotya mateya ya bonkɔkɔ na bango liboso ya mibeko ya Nzambe.
Biblia eteyaka te ete Nzambe andimaka mangomba nyonso; elobi ete lingomba ya solo ezali kaka moko. Matai 7:13, 14 elobi boye: “Bókɔta na porte ya moke; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá nde oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta kuna bazali mingi; nzokande porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.”
Ndenge oyo solo ekoki kosalisa yo: Kanisá ndenge oyo okoyoka soki omibongisaki malamu banda basanza mingi mpo na momekano moko ya mbangu, mpe ntango bosali yango, yo nde obimi moto ya liboso; kasi na nsima bayebisi yo ete olongi te mpo ete obukaki mobeko moko mpo oyebaki te. Okomona ete osalaki mosala ya mpunda. Ekoki nde kosalema bongo na oyo etali kosambela Nzambe?
Ntoma Paulo akokanisaki losambo na biso na momekano oyo esalemaka na masano, mpe akomaki boye: “Soki moto azali komekana na masano, akozwa motole kaka soki asali yango na kolanda mibeko.” (2 Timote 2:5) Nzambe akondima biso soki tozali kosambela ye “na kolanda mibeko,” elingi koloba na ndenge oyo ye andimaka. Tokoki te kosambela Nzambe ndenge oyo biso moko tolingi, ndenge kaka mopoti-mbangu akoki te kosala ndenge oyo alingi mpe kolikya ete akolonga kaka.
Mpo tósepelisa Nzambe, lingomba na biso esengeli te koteya mateya ya lokuta mpo na Nzambe. Yesu alobaki boye: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23) Biblia, Liloba ya Nzambe, nde esalisaka biso tóyeba lingomba oyo ezali komema epai ya Nzambe.—Yoane 17:17.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali losambo oyo Nzambe andimaka, talá mokapo 15 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Mangomba nyonso eteyaka bato básambela Nzambe na ndenge oyo ye andimaka?