Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/10 lok. 9
  • Solo ekoki kobongola bomoi na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo ekoki kobongola bomoi na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Kondima ná likoki ya kokanisa ezali na boyokani?
    Lamuká!—2011
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nasala nini mpo nasepela na solo?
    Lamuká!—1999
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/10 lok. 9

Solo ekoki kobongola bomoi na yo

EKOKI kozala ete oyoká to mpe bateyá yo moko ya mateya ya lokuta oyo tolobeli na masolo oyo eleki. Kasi, ekoki kozala mpasi otika yango, mingimingi soki ondimaka yango banda kala.

Yango ezali likambo ya kokamwa te. Mangomba mosusu elendisaka te bandimi na yango bátalela soki mateya na yango euti na Biblia. Mangomba mosusu mpe elongisaka mateya ya lokuta na ndenge eteyaka ete Biblia ezali bongolabongola mpe moto nyonso te nde akoki kokanga ntina na yango. Nzokande, bayekoli mingi ya Yesu bazalaki bato oyo batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba, kasi bakangaki ntina ya mateya na ye.​—Misala 4:13.

Ekoki mpe kozala mpasi otalela mateya ya lingomba na yo mpo ozali kokanisa ete kosala bongo ekolakisa ete ozali na kondima te. Kasi, ondimi mpenza ete Nzambe akosepela na yo te soki oluki koyeba Biblia, mokanda oyo ye moko apesi bato, mpo na koyeba makambo oyo azali kosɛnga yo? Kutu, Liloba na ye ezali kolendisa yo otalela Biblia yo moko ntango elobi boye: “Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”​—Baroma 12:2.

Koyekola solo na ntina na Nzambe ekoki mpe kobongola bomoi na yo. (Yoane 8:32) Deanne, oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, akómi na kondima ya solosolo na Liloba ya Nzambe. Alobi boye: “Liboso nabanda koyekola Biblia, nazalaki koyeba te ete ezali polele mpenza. Sikoyo, nayebi mpenza Yehova; nayebi ete azali Nzambe mpe Tata na ngai oyo atondi na bolingo. Nakómi na bomoi oyo ezali na ntina.”

Mbala mosusu osilá koyekola Biblia, kasi omonaki ete ozwelaki yango litomba moko te. Soki ezali bongo, kolɛmba te. Soki oluki koyeba Biblia na ntango oyo motó na yo ezali naino na mateya ya lokuta mpo na Nzambe, ezali lokola nde basɛngi yo otonga libaya oyo moto mosusu akati, kasi bapesi yo nde libaya ya modɛlɛ mosusu mpo otalaka ndenge okokangisa biteni na yango. Okoki kokangisa mwa biteni mosusu, kasi okolɛmba nzoto mpo bisika mosusu ekopesa yo mobulu. Kasi, soki bapesi yo modɛlɛ ya libaya mpenza oyo basɛngi yo, ekozala mpasi te okangisa yango.

Okosepela koyekola mateya ya solo oyo ekosalisa yo oyeba Nzambe? Tolendisi yo osolola na Batatoli ya Yehova na kartye na bino to okoma na adrɛsi oyo ebongi na yo kati na oyo ezali na lokasa 4 ya zulunalo oyo mpo na kosɛnga báyekola na yo Biblia ofele.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

“Bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe oyo ezali ya kokoka.”​—BAROMA 12:2

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto