Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/10 nk. 16-17
  • Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Kómisá libala na yo makasi mpe ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/10 nk. 16-17

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Ndenge nini libota na yo ekoki kozala na esengo?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe ekomonisa esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.

1. Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kobalana mpo libota ezala na esengo?

Yehova, Nzambe ya esengo nde abandisaki libala. Libala ezali na ntina mpo libota ezala na esengo, esalaka ete moto azala na molongani mpe esalisaka mpo na kobɔkɔla bana na ndenge ebongi. Ndenge nini Nzambe atalelaka libala? Alingaka ete libala eumela libela, mwasi ná mobali bákomisa libala na buku ya Leta. (Luka 2:1-5) Nzambe alingaka ete mwasi akangama kaka na mobali na ye mpe mobali akangama kaka na mwasi na ye. (Baebre 13:4) Yehova apesi mokristo nzela aboma libala mpe abala lisusu kaka soki molongani na ye asali ekobo.​—Tángá Matai 19:3-6, 9.

2. Bizaleli nini mwasi ná mobali basengeli komoniselana?

Yehova akelá mobali ná mwasi mpo basalisanaka. (Ebandeli 2:18) Lokola mobali azali mokonzi ya libota, asengeli koleisaka libota na ye mpe koteyaka yango makambo ya Nzambe. Asengeli mpenza kolingaka mwasi na ye. Mobali mpe mwasi basengeli kolinganaka mpe kopesanaka limemya. Lokola mwasi ná mobali bazali bato ya masumu, kolimbisana nde ekosalisa bango bázala na esengo na libala.​—Tángá Baefese 4:31, 32; 5:22-25, 33; 1 Petro 3:7.

3. Osengeli kokabwana na molongani na yo soki makambo ezali kosimba te?

Soki yo ná molongani na yo bozali na matata, bósala makasi mpo bosalelana makambo na boboto. (1 Bakorinti 13:4, 5) Liloba ya Nzambe ezali kolendisa te mwasi ná mobali bákabwana mpo na kosilisa matata. Kasi, soki bomoi ya moko ekómi na likama, mokristo akoki kozwa ekateli ya kokabwana na molongani na ye to te.​—Tángá 1 Bakorinti 7:10-13.

4. Bana, Nzambe alingi nini mpo na bino?

Yehova alingi ete bózala na esengo. Apesaka bino toli oyo ekoki kosalisa bino bózala na esengo na bolenge na bino. Alingaka ete bótosa baboti na bino mpo bazali na bwanya mpe bayebi makambo mingi. (Bakolose 3:20) Yehova asepelaka na nyonso oyo bosalaka mpo na kokumisa ye.​—Tángá Mosakoli 11:9–12:1; Matai 19:13-15; 21:15, 16.

5. Baboti, ndenge nini bana na bino bakoki kozala na esengo?

Bosengeli kosala nyonso mpo na koleisa mpe kolatisa bana na bino. (1 Timote 5:8) Kasi, mpo bana na bino bázala na esengo, bosengeli koteya bango bálinga Nzambe mpe báyekola makambo na ye. (Baefese 6:4) Ntango bino moko bozali kolinga Nzambe, yango ekoki kotinda bana bálanda ndakisa na bino. Soki bozali kosalela Biblia mpo na koteya bana na bino, yango ekoki mpenza kobongisa makanisi na bango.​—Tángá Kolimbola Mibeko 6:4-7; Masese 22:6.

Bana basepelaka soki baboti bazali kolendisa bango mpe kopesa bango longonya. Esengeli mpe kosembolaka mpe kopesaka bango disiplini. Kosala bongo esalisaka bana bálanda te nzela oyo ekobendela bango mikakatano. (Masese 22:15) Kasi, esengeli te konyokola bana to kosalela bango makambo makasimakasi.​—Bakolose 3:21.

Batatoli ya Yehova babimisaka babuku ndenge na ndenge mpo na kosalisa baboti mpe bana. Makanisi ya babuku yango eutaka na Biblia.​—Tángá Nzembo 19:7, 11.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 14 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto