Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/10 nk. 18-23
  • Alobaki mpo na libota ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Alobaki mpo na libota ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Azalaki kitoko mingi”
  • Mokonzi aboyi mwasi na ye
  • Andimamaki “na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye”
  • Kondima ya Estere emekami
  • Kondima oyo eleki nsɔmɔ ya liwa
  • Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe
    Mekolá kondima na bango
  • Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki matomba na ye moko te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te
    Mekolá kondima na bango
  • Mokanda ya Biblia nimero 17—Esetele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/10 nk. 18-23

Mekolá kondima na bango

Alobaki mpo na libota ya Nzambe

ESTERE asalaki makasi ete motema na ye ekita ntango azalaki kopusana na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, na Shushane. Ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Bifelo ya ndako yango ezalaki na mayemi ya langilangi ya bangɔmbɛ oyo ezali na mapapu, babɛti-mbanzi, mpe bankɔsi; makonzí ya milai mpe bikeko minene. Ndako yango etongamaki pembeni ya Bangomba Zagros, oyo nsɔngɛ na yango ezipamaki na nɛjɛ mpe na nse ezalaki na Ebale Choaspès, oyo mai na yango ezalaki mpɛmbɛ. Ndako yango ebongisamaki na ndenge oyo ezalaki komonisa moto oyo akɔti kuna nguya monene ya moto oyo Estere asengelaki kokutana na ye, oyo amipesaki nkombo ya “mokonzi monene.” Mokonzi yango azalaki mpe mobali na ye.

Mobali! Ahasueruse azalaki ata moke te lolenge ya mobali oyo elenge mwasi Moyuda ya sembo akokaki kokanisa ete akobala ye!a Akokanaki ata moke te na bato lokola Abrahame, moto ya komikitisa oyo andimaki kotosa Nzambe ntango ayebisaki ye ete ayokela Sara, mwasi na ye. (Ebandeli 21:12) Mokonzi ayebaki makambo mingi te, mbala mosusu mpe ata likambo moko te mpo na Yehova, Nzambe ya Estere, to mpe mpo na Mibeko na Ye. Kasi, Ahasueruse ayebaki mibeko ya Baperse, oyo moko na yango epekisaki mpenza likambo oyo Estere alingaki kosala. Ezalaki likambo nini? Mobeko elobaki ete moto nyonso oyo ayei liboso ya mokonzi ya Perse kozanga ete mokonzi abengisa ye liboso, asengelaki kobomama. Mokonzi abengisaki Estere te, kasi ye moko azwaki ekateli ya koya liboso ya mokonzi. Ntango azalaki kopusana na lopango ya kati, epai mokonzi oyo afandi akokaki komona ye, mbala mosusu azalaki komona ete azali komilukela liwa.​—Estere 4:11; 5:1.

Mpo na nini andimaki kotya bomoi na ye na likama bongo? Mpe kondima oyo mwasi wana amonisaki ekoki koteya biso nini? Ya liboso, tótalela ndenge oyo Estere akómaki mwasi ya mokonzi ya Perse.

“Azalaki kitoko mingi”

Estere azalaki mwana etike. Toyebi eloko moko te mpo na baboti na ye, oyo bapesaki ye nkombo Hadasa, nkombo oyo na monɔkɔ ya Ebre elimboli “mirte,” mwa nzete moke oyo ebimisaka bafololo ya mpɛmbɛ. Ntango baboti ya Estere bakufaki, ndeko moko ya libota, Mordekai, mobali moko ya boboto, ayokelaki mwana yango mawa. Azalaki ndeko na ye, kasi Mordekai azalaki mokóló mpenza. Azwaki ye mpe abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye mpenza.​—Estere 2:5-7, 15.

Mordekai ná Estere bazalaki na kati ya Bayuda oyo bazalaki baombo na engumba-mokonzi ya Perse, epai mbala mosusu bazalaki kotyola lingomba na bango mpe mibeko oyo bazalaki kotosa. Kasi, na ntembe te Estere akómaki na boyokani makasi na ndeko na ye oyo ateyaki ye makambo ya Yehova, Nzambe ya motema mawa oyo abikisaki libota na Ye na makambo ya mpasi mingi oyo bakutanaki na yango mpe oyo alingaki kobikisa bango lisusu. (Balevi 26:44, 45) Emonani polele ete Mordekai ná Estere bakómaki na boyokani makasi.

Ekoki kozala ete Mordekai azalaki kosala mosala moko boye na ndako ya mokonzi na Shushane, mpe mbala na mbala azalaki kofanda na porte ya monene elongo na basali mosusu ya mokonzi. (Estere 2:19, 21; 3:3) Tokoki te koyeba makambo oyo Estere azalaki kosala ntango azalaki kokola, atako tokoki koloba ete azalaki kosalisa ndeko na ye mpe kobatela ndako na ye oyo, na ntembe te, ezalaki na kartye ya bato mpamba, na ngámbo mosusu ya ebale. Ndako ya mokonzi ezalaki na ngámbo mosusu. Mbala mosusu azalaki kosepela kokende na zando na Shushane, epai basali ya biloko ya wolo, ya palata, mpe bakomelesa mosusu bazalaki kotɛka biloko na bango. Estere akokaki kokanisa te ete mokolo mosusu ye mpe akozala na biloko kitoko ya ndenge wana; ayebaki te ndenge oyo bomoi na ye ekokóma.

Mokonzi aboyi mwasi na ye

Mokolo moko, nsango ezalaki kotambola na Shushane mobimba mpo na likambo moko oyo elekaki na ndako ya mokonzi. Na fɛti moko monene oyo Ahasueruse asalaki mpo na bato minene ya bokonzi na ye, epai bazalaki kolya mpe komɛla vinyo kitoko, mokonzi azwaki likanisi ya kobengisa Vasheti, mwasi na ye ya kitoko, oyo azalaki mpe kosala fɛti na esika mosusu ná basi. Kasi, Vasheti aboyaki koya. Lokola mokonzi ayokaki nsɔni mpe nkanda, atunaki bapesi-toli na ye etumbu oyo Vasheti asengeli kozwa. Esukaki ndenge? Mokonzi aboyaki ye. Basaleli ya mokonzi babandaki kolukaluka na ekólo mobimba bilenge basi ya kitoko oyo bayebi naino mibali te; kati na bango nde mokonzi alingaki kopona mwasi mosusu.​—Estere 1:1–2:4.

Tokoki kokanisa ndenge oyo Mordekai azalaki mbala na mbala kotala Estere mpe komona ndenge oyo leki na ye akolaki mpe akómaki mwasi kitoko mpenza, likambo oyo ezalaki kopesa ye esengo, kasi mpe kobangisa ye mwa moke. Tozali kotánga ete: “Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi na nzoto mpe elongi.” (Estere 2:7) Kitoko ya nzoto ezali mabe te, kasi esengeli ete moto oyo azali na yango azala mpe na bwanya mpe komikitisa. Soki te, ekoki kobotela ye lolendo, mpe bizaleli mosusu ya mabe. (Masese 11:22) Osilá komona likambo yango? Kitoko ya Estere elingaki kokómisa ye mwasi malamu to ya bizaleli mabe? Esengelaki koyebana nsima.

Basaleli ya mokonzi bamonaki Estere. Na bilenge basi oyo baponaki, Estere mpe azalaki na kati, balongolaki ye na mabɔkɔ ya Mordekai mpe bamemaki ye na ndako ya mokonzi, na ngámbo mosusu ya ebale. (Estere 2:8) Na ntembe te kokabwana na bango ezalaki mpasi, mpamba te bakómaki lokola tata ná mwana. Mordekai akokaki kosepela te ete mwana oyo ye abɔkɔlaki abala moto oyo asambelaka Yehova te, ata soki azali mokonzi; kasi makambo ezalaki na mabɔkɔ na ye te. Na ntembe te Estere ayokaki na likebi mpenza toli ya Mordekai liboso bákende na ye! Ntango bazalaki kokende na ye na Shushane ndako monene, azalaki komituna mituna ebele. Alingaki kozala na bomoi ya ndenge nini?

Andimamaki “na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye”

Estere akómaki na esika oyo makambo nyonso ezalaki ndenge mosusu mpe sika mpo na ye. Azalaki na kati ya “bilenge basi mingi” oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge ya bokonzi ya Perse. Bazalaki na mimeseno mpe bizaleli ndenge moko te, mpe bazalaki koloba minɔkɔ ekeseni mpenza. Bapesaki bilenge basi yango na mabɔkɔ ya Hegai, mosaleli moko ya mokonzi, mpe basengelaki kosala bango massage mpe kopakola bango biloko ndenge na ndenge mpo na kobongisa nzoto na boumeli ya mbula mobimba. (Estere 2:8, 12) Makambo wana nyonso ekokaki mpenza kotinda bilenge basi mosusu bákanisa kaka kitoko ya nzoto mpe bákóma na lolendo mpe kowelana. Estere asalaki nini?

Ezali na moto moko te oyo azalaki komitungisa mpo na Estere koleka Mordekai. Lisolo elobi ete mokolo na mokolo, azalaki kokende pembeni ya ndako ya basi mpe koluka koyeba soki Estere azali ndenge nini. (Estere 2:11) Na ntembe te ntango azalaki kozwa bansango na ye, mbala mosusu na lisalisi ya basaleli ya ndako, azalaki koyoka esengo. Mpo na nini?

Estere asepelisaki mpenza Hegai mpe Hegai amoniselaki ye boboto, apesaki ye bilenge basi nsambo mpe esika eleki malamu na ndako ya basi. Kutu, lisolo elobi boye: “Na ntango nyonso wana Estere azalaki kaka kondimama na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.” (Estere 2:9, 15) Bato bazalaki kondima ye kaka mpo na kitoko na ye? Te, Estere azalaki na likambo mosusu.

Na ndakisa, tozali kotánga boye: “Estere alobelaki eloko moko te oyo etali bato na ye to oyo etali bandeko na ye, mpo Mordekai apesaki ye mitindo ete ayebisa eloko te.” (Estere 2:10) Mordekai ayebisaki ye aloba te ete azali Moyuda; na ntembe te amonaki ete bato mingi ya Perse bazalaki kokanisela bango mabe. Azalaki mpenza na esengo ntango ayokaki ete Estere, atako azalaki mosika na ye, azalaki kaka komonisa bwanya mpe botosi!

Lelo oyo, bilenge bakoki kosepelisa mitema ya baboti mpe bato oyo babɔkɔlaki bango. Ntango bazali mosika na baboti, ata soki bazali na kati ya bato ya bizaleli mpe misala ya mbindo, bakoki koboya kolanda bango mpe kobatela bizaleli ya malamu. Soki basali bongo, bakosepelisa motema ya Tata na bango ya likoló, ndenge Estere asalaki.​—Masese 27:11.

Ntango mokolo oyo Estere asengelaki kokende liboso ya mokonzi ekokaki, bayebisaki ye ete akoki kopona biloko oyo akosepela na yango, mbala mosusu mpo na kobakisa lisusu kitoko na ye. Kasi, ye alandaki toli ya Hegai mpe alobaki bápesa ye kaka biloko oyo batángaki. (Estere 2:15) Na ntembe te, ayebaki ete kitoko mpamba ekobenda motema ya mokonzi te; kasi komikitisa ezalaki ezaleli oyo bato mingi na ndako ya mokonzi bazalaki na yango te. Akanisaki malamu?

Lisolo epesi eyano: “Mokonzi alingaki Estere mingi koleka basi mosusu nyonso, bongo andimaki ye mpenza mpe amoniselaki ye motema boboto mingi koleka bangɔndɔ mosusu nyonso. Mpe atyaki motole ya bokonzi na motó na ye mpe akómisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasheti.” (Estere 2:17) Ezalaki mpasi mpo na elenge mwasi wana Moyuda amesana na bomoi oyo akómaki na yango. Ye nde akómaki mwasi ya mokonzi oyo alekaki na nguya na mabele mobimba na ntango wana! Lokumu wana evimbisaki ye motó mpe ekómisaki ye lolendo?

Ata moke te! Estere azalaki kaka kotosa Mordekai, tata-mobɔkɔli na ye. Ayebisaki kaka moto te ete azali Moyuda. Lisusu, ntango Mordekai ayokaki ete bato bazalaki na mokano ya koboma Ahasueruse, Estere andimaki kokende kokebisa mokonzi, mpe mokano yango elongaki te. (Estere 2:20-23) Azalaki kaka na kondima epai ya Nzambe na ndenge azalaki na komikitisa mpe botosi. Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete botosi ezali na ntina te; mingi bazali kozanga botosi mpe kotomboka. Kasi, lokola Estere, bato oyo bazali na kondima ya solo bamonaka ete botosi ezali na ntina.

Kondima ya Estere emekami

Mobali moko nkombo na ye Hamane akómaki moto monene na ndako ya mokonzi Ahasueruse. Mokonzi atyaki ye ministre-mokonzi, elingi koloba ete akómaki mopesi-toli ya liboso mpe moto ya mibale na boyangeli na ye mobimba. Kutu, mokonzi apesaki mobeko ete moto nyonso oyo akomona Hamane asengeli kogumbamela ye. (Estere 3:1-4) Mobeko yango ezalaki mokakatano mpo na Mordekai. Ayebaki ete asengeli kotosa mokonzi, kasi asengelaki mpe kozanga limemya te epai ya Nzambe. Hamane azalaki “Moagage.” Yango elingi koloba ete azalaki nkɔkɔ ya Agage, mokonzi ya Amaleki oyo mosakoli Samwele abomaki. (1 Samwele 15:33) Baameleke bazalaki mabe mpenza mpe bamikómisaki banguna ya Yehova mpe ya Yisraele. Nzambe akatelaki ekólo mobimba ya Amaleke etumbu.b (Kolimbola Mibeko 25:19) Ndenge nini Moyuda ya sembo akokaki kogumbamela Moamaleke? Mordekai akokaki kosala yango te. Aboyaki na motema moko. Tii lelo oyo, mibali mpe basi ya kondima bakakatanaka te kotya bomoi na bango na likama mpo na kotosa etinda oyo: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.

Hamane ayokaki nkanda makasi. Kasi, amonaki ete akosala eloko te soki asuki kaka na koboma Mordekai. Azalaki na mokano ya kosilisa Bayuda nyonso, bato ya ekólo ya Mordekai! Hamane asololaki na mokonzi, mpe alobaki mabe mpo na Bayuda. Kozanga ete atánga nkombo na bango, alobaki ete bazalaki mwa bato bazangi ntina oyo “bapalangani mpe bakabwani na bato.” Likambo ya mabe koleka, alobaki ete bazalaki kotosa mibeko ya mokonzi te; na yango bazalaki batomboki. Apesaki likanisi ete atya mbongo mingi na kɛsi ya mokonzi mpo na makambo nyonso oyo ekosɛngama mpo na koboma Bayuda nyonso na ekólo.c Ahasueruse apesaki Hamane lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo mpo atya elembo na mobeko nyonso oyo akani.​—Estere 3:5-10.

Mosika te, bamemi-nsango babandaki kotambola na bampunda na mboka mobimba, mpo na koyebisa ete Bayuda nyonso basengeli kobomama. Kanisá ndenge nsango yango esalaki na Yerusaleme, epai mwa ndambo ya Bayuda balongwaki na boombo na Babilone mpe bazalaki kosala makasi mpo na kotonga lisusu engumba yango oyo ezalaki na efelo te. Mbala mosusu Mordekai akanisaki bato wana, ná baninga mpe bandeko na ye na Shushane, ntango ayokaki nsango wana ya mabe. Ayokaki mawa mpe apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe amipakolaki putulu na motó, mpe alelaki makasi na katikati ya engumba. Nzokande, Hamane azalaki komɛla ná mokonzi, azalaki ata na mawa te mpo na mpasi oyo abimiselaki Bayuda mpe baninga na bango na Shushane.​—Estere 3:12–4:1.

Mordekai ayebaki ete asengeli kokanga mabɔkɔ te. Kasi, akokaki kosala nini? Estere ayokaki nsango na ye mpe atindelaki ye bilamba, kasi Mordekai aboyaki. Mbala mosusu amitunaki mingi mpo na nini Yehova, Nzambe na ye, atikaki ete Estere alongwa na mabɔkɔ na ye mpe akóma mwasi ya mokonzi oyo azalaki kosambela Yehova te. Sikoyo, akómaki koyeba ntina. Mordekai atindaki maloba epai ya Estere, mwasi ya mokonzi, mpo na kosɛnga ye ete aloba mpo na “bato na ye” epai ya mokonzi.​—Estere 4:4-8.

Na ntembe te motema ya Estere ebebaki ntango ayokaki maloba wana. Kondima na ye emekamaki mpenza. Azalaki kobanga, ndenge ye moko alobaki yango na eyano oyo atindelaki Mordekai. Akundwelaki ye mobeko ya mokonzi. Moto akokaki kozwa etumbu ya liwa soki akei epai ya mokonzi kozanga ete mokonzi ye moko abengisa ye. Moto akokaki kobika kaka soki mokonzi asemboleli ye lingenda na ye ya bokonzi. Estere akokaki nde kokanisa ete mokonzi akondima te báboma ye, mingimingi soki akanisi likambo oyo ekómelaki Vasheti lokola aboyaki kokende ntango babengisaki ye? Alobaki na Mordekai ete esalaki mikolo 30, mokonzi abengisaki ye te! Likambo yango etindaki ye akanisa ete mbala mosusu mokonzi yango oyo azalaki bongolabongola azalaki lisusu kosepela na ye te.d​—Estere 4:9-11.

Mordekai alobaki na mpiko mpo na kolendisa kondima ya Estere. Alobaki na ye ete soki asali eloko te, lobiko ya Bayuda ekoya ata na nzela mosusu. Kasi, ye moko akoki nde kobika soki monyoko eyei makasi? Na maloba yango, Mordekai amonisaki kondima na ye makasi epai ya Yehova, oyo akokaki te kotika bato na Ye bábomama nyɛɛ mpe bilaka na Ye ekokisama te. (Yosua 23:14) Na nsima, Mordekai atunaki Estere boye: “Nani ayebi soki ezali te mpo na ntango lokola oyo nde okómi na lokumu ya bokonzi?” (Estere 4:12-14) Mordekai azalaki kotyela Yehova, Nzambe na ye motema mobimba. Biso mpe tosalaka bongo?​—Masese 3:5, 6.

Kondima oyo eleki nsɔmɔ ya liwa

Estere akómaki na ntango oyo akokaki lisusu kozonga nsima te. Ayebisaki Mordekai asɛnga na Bayuda nyonso bálya te mikolo misato, mpe asukisaki na maloba oyo emonisaki ata nsima ya basiɛklɛ kondima mpe mpiko na ye: “Soki esengeli nakufa, nakufa.” (Estere 4:15-17) Na ntembe te, na boumeli ya mikolo misato wana abondelaki makasi na ndenge oyo asalaki naino liboso te. Mpe, nsukansuka ntango ekokaki. Alataki bilamba ya bokonzi, mpe atutaki mpenza monzɛlɛ mpo akende kokutana na mokonzi. Na nsima akendaki.

Ndenge tolobaki yango na ebandeli, Estere akendaki epai mokonzi azalaki. Tokoki kokanisa ndenge oyo azalaki kobanga mpe kobondela makasi. Akɔtaki na lopango, epai akokaki komona Ahasueruse afandi na kiti ya bokonzi. Mbala mosusu alukaki naino kotala soki elongi na ye ezali ndenge nini, na nsuki milai mpe mandɛfu na ye elingamálingamá. Soki azelaki liboso mokonzi amona ye, na ntembe te Estere amonaki ete ntango ezalaki koumela mpenza. Kasi, nsukansuka mobali na ye amonaki ye. Na ntembe te akamwaki, kasi elongi na ye efungwamaki. Asembolaki lingenda na ye ya wolo!​—Estere 5:1, 2.

Mokonzi andimaki koyoka Estere. Alobaki mpo na Nzambe na ye mpe ekólo na ye, mpe na bongo, atiká ndakisa malamu ya kondima mpo na basaleli ya Nzambe tii lelo oyo. Kasi, wana ezalaki kaka ebandeli. Alingaki kosala nini mpo na kondimisa mokonzi ete Hamane, mopesi-toli oyo azalaki kotyela motema, azalaki moto mabe? Ndenge nini alingaki kobikisa bato ya ekólo na ye? Tokolobela yango na lisolo mosusu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bato mingi ya mayele balobaka ete Ahasueruse ezali nde Xerxès I, oyo ayangelaki ekólo Perse na ebandeli ya siɛklɛ ya mitano L.T.B.

b Ekoki kozala ete Hamane azalaki na kati ya Baamaleke ya nsuka, mpamba te bato ya libota yango “oyo batikalaki” babomamaki na mikolo ya Mokonzi Hizikiya.​—1 Ntango 4:43.

c Hamane apesaki talanta ya palata 10 000, oyo ezali lelo bankama ya bamilio ya dolare. Soki Ahasueruse ezali Xerxès I, mokonzi asepelaki mingi ntango ayokaki mbongo oyo Hamane alakaki kopesa. Xerxès azalaki na mposa ya mbongo mingi mpo na kobundisa Bagrɛki, etumba yango ezalaki molai, kasi nsukansuka alongaki te.

d Xerxès I ayebanaki lokola moto ya bipale mpe ya nkanda. Hérodote, Mogrɛki moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, akomaki mwa makambo oyo Xerxès asalaki na etumba oyo abundaki na Bagrɛki. Mokonzi atindaki ete bátonga gbagba ya bamasuwa na détroit de Hellespont. Ntango mopɛpɛ moko makasi ebebisaki gbagba yango, Xerxès apesaki mitindo ete bákata mitó ya bato ya mayele oyo batongaki yango mpe atindaki bato na ye bábɛta mai ya Hellespont fimbo mpe bátánga na mongongo makasi maloba ya kofinga yango mpo na kopesa mai yango “etumbu.” Kaka na etumba yango, ntango moto moko ya bozwi asɛngaki ete mwana na ye akende na mosala ya soda te, Xerxès atindaki ete bákata mwana yango na biteni mibale, mpe bálakisa bato nzoto na ye mpo na kokebisa bango.

[Elilingi na lokasa 19]

Mordekai azalaki kosepela mpenza na mwana oyo abɔkɔlaki

[Elilingi na lokasa 20]

Estere ayebaki ete komikitisa mpe bwanya ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto

[Elilingi na nkasa 22, 23]

Estere atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobatela libota ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto