Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/10 nk. 18-22
  • Kosalela Yehova epesi ngai esengo mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kosalela Yehova epesi ngai esengo mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nɔkɔ ayei kotala biso mpe bomoi na ngai ebongwani
  • Ndenge tata-mwasi Mary asalisaki ngai
  • Nakoli na elimo, nazwi batisimo mpe nakɔti Betele
  • Mayangani mosusu ná mosala ya kotonga oyo nabosanaka te
  • Makambo mosusu oyo esalemaki na bomoi na ngai
  • Mikakatano ya bobange
  • Mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Malia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Talá! Nazali moombo ya Yehova!”
    Mekolá kondima na bango
  • Natiká ata moke te koyekola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • “Talá! Mwana mwasi moombo ya Yehova!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/10 nk. 18-22

Kosalela Yehova epesi ngai esengo mingi

Lisolo ya Fred Rusk

Maloba ya Davidi ekokisamaki epai na ngai banda bomwana; akomaki boye na Nzembo 27:10: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” Tiká nayebisa ndenge maloba yango ekokisamaki epai na ngai.

NAKOLAKI na etúká ya Georgie, na États-Unis, epai ya nkɔkɔ na ngai ya mobali oyo azalaki kosala bilanga ya ntokia (coton), na eleko oyo nkita ya bikólo mingi ebebaki, na bambula ya 1930. Lokola tata ayokaki mawa mingi ndenge mama ná leki na biso oyo babotaki sika bakufaki, atikaki ngai epai ya tata na ye mpe akendaki na engumba moko mosika mpo na koluka mosala. Na ntango wana, mwasi ya nkɔkɔ mpe asilaki kokufa. Na nsima, tata asalaki nyonso mpo ngai nakóma esika ye azali, kasi elongaki te.

Bato oyo bazalaki kotambwisa makambo na ndako ezalaki nde bana basi ya nkɔkɔ oyo bazalaki mikóló. Nkɔkɔ azalaki kokipe makambo ya Nzambe te; kasi bana na ye ya basi bamipesaki mingi na lingomba ya Batiste ya sudi mpe batya ngai mbamba nalanda makanisi na bango. Lokola bazalaki koluka kobɛta ngai, nandimaki kokende na ndako-nzambe mokolo ya lomingo nyonso. Na yango, kobanda ntango nazalaki mwana, nasepelaki na makambo ya losambo te. Nazalaki kosepela mingi nde na kelasi mpe na masano.

Nɔkɔ ayei kotala biso mpe bomoi na ngai ebongwani

Na 1941, mokolo moko nsima ya midi, mobali moko mobange ná mwasi na ye bayaki epai na biso. Na ntango yango nazalaki na mbula 15. Bayebisaki ngai ete: “Oyo nɔkɔ na yo Talmadge Rusk.” Nayokaki naino nsango na ye te, kasi nayaki koyeba ete ye ná mwasi na ye bazali Batatoli ya Yehova. Makambo oyo alobaki mpo na mokano ya Nzambe ete bato báfanda libela awa na mabele ekesanaki mpenza na oyo nayokaki na ndako-nzambe. Bato ya libota na biso mingi baboyaki kondima makambo oyo balobaki, kutu batyolaki yango. Banda mokolo wana, bandimaki te ete bákɔta na lopango lisusu. Kasi tata-mwasi Mary, oyo alekaki ngai kaka na mbula misato, andimaki kozwa Biblia ná mikanda oyo ezalaki kolimbola Biblia.

Eumelaki te, Mary andimaki mpenza ete amoni solo; azwaki batisimo na 1942 mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Mpe maloba oyo ya Yesu ekokisamaki epai na ye: “Banguna ya moto bakozala bato ya ndako na ye moko.” (Mat. 10:34-36) Libota batɛmɛlaki ye makasi. Yaya na ye ya mwasi, oyo ayebanaki mingi, ayokanaki na guvɛrnɛrɛ ya engumba mpe bakangaki nɔkɔ Talmadge. Bafundaki ye ete azali koteya kozanga ndingisa ya Leta, mpe bakweisaki ye likambo.

Zulunalo ya engumba elobaki ete guvɛrnɛrɛ, oyo ye moko mpe azalaki zuzi, ayebisaki bato oyo bazalaki wana na tribinale ete: “Mikanda oyo mobali oyo azali kopesa bato . . . ezali lokola pwazɔ.” Nɔkɔ asɛngaki bátalela likambo na ye lisusu; kasi liboso asamba lisusu mpe alonga, aumelaki na bolɔkɔ mikolo zomi.

Ndenge tata-mwasi Mary asalisaki ngai

Mary ayebisaki ngai makambo oyo ayekolaki; abandaki mpe kosakwela bato ya pembeni na biso. Nakendeki kotika ye ayekola na mobali moko oyo azwaki buku Mokili ya sika.a Mwasi ya mobali yango ayebisaki biso ete mobali na ye atángaki yango butu mobimba. Atako nalingaki te kolanda mbangumbangu likambo moko boye ya losambo, makambo oyo nazalaki koyekola esepelisaki ngai. Kasi eloko oyo endimisaki ngai ete Batatoli bazali bato ya Nzambe, ezalaki libosoliboso mateya ya Biblia te; ezalaki nde ndenge oyo bato bazalaki kotɛmɛla bango.

Na ndakisa, mokolo moko ntango toutaki na bilanga ya tomati, ngai ná Mary tokutaki bayaya na ye ya basi batumbi babuku na ye ya kala ná aparɛyi ya fono mpe badiskɛ mosusu ya masolo ya Biblia. Nasilikaki makasi kasi tata-mwasi moko alobaki na ngai na lityo ete: “Okopesa biso mersi nsima ya mikolo mpo na likambo oyo tosali.”

Babenganaki Mary na ndako na 1943 mpo aboyaki kotika kondima na ye mpe kosakwela bato oyo bazalaki kofanda pene na biso. Na ntango wana, nasepelaki mingi koyeba ete Nzambe azali na nkombo​—Yehova—​mpe azali Nzambe ya bolingo, ya motema mawa mpe atumbaka bato na lifelo ya mɔtɔ te. Nayaki mpe koyeba ete Yehova azali na ebongiseli moko oyo etondi na bolingo, atako ngai moko nayanganaki naino na likita moko te.

Na nsima, mokolo moko ntango nazalaki kokata matiti, motuka moko ezalaki koleka malɛmbɛmalɛmbɛ mpe moko ya mibali mibale oyo bazalaki na kati atunaki ngai soki ngai nde Fred. Ntango nayebaki ete bazali Batatoli ya Yehova, nalobaki boye: “Tiká namata mpe tókende na esika ya malamu mpo tósolola.” Mary nde azwaki bibongiseli mpo báya kotala ngai. Moko na bango ezalaki Shield Toutjian, mokɛngɛli-motamboli moko oyo alendisaki ngai mpe apesaki ngai toli oyo euti na Biblia na ntango oyo esengeli. Sikoyo libota ebandaki nde kotɛmɛla ngai mpo nakómaki kolobela mateya ya Batatoli ya Yehova.

Mary azalaki na Virginie epai akendeki kofanda, mpe akomelaki ngai mokanda. Ayebisaki ngai ete soki nalingi mpenza kosalela Yehova, nakoki kokende kofanda elongo na ye. Nandimaki na mbala moko kokende. Na mpokwa moko ya mokolo ya mitano na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1943, natyaki mwa biloko na ngai ya ntina na kartɔ mpe nakangaki yango na nzete moko mwa mosika na ndako. Na mokolo ya pɔsɔ, nazwaki kartɔ yango, nalekaki na nzela ya nsima ya ndako ya bato oyo bazalaki pembeni na biso, mpe nakendaki na vile. Ntango nakendeki na engumba Roanoke, nakutaki Mary na ndako ya Edna Fowlkes.

Nakoli na elimo, nazwi batisimo mpe nakɔti Betele

Edna azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, ndeko moko ya motema mawa, lokola Lidia na ntango ya kala. Azalaki kofutela ndako moko monene mpe azalaki kofanda elongo na tata-mwasi Mary, mwasi ya yaya na ye Edna ná bana na bango mibale ya basi. Na nsima bana yango, Gladys Gregory ná Grace Gregory, bakómaki bamisionɛrɛ. Gladys, oyo akómi sikoyo na mbula koleka 90, azali kosalela Yehova na bosembo na Betele ya Japon.

Ntango nazalaki kofanda na ndako ya Edna, nazalaki koyangana na makita nyonso mpe nazalaki kozwa formasyo na mosala ya kosakola. Lokola nakómaki na bonsomi ya koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyangana na makita ya lisangá, nakokisaki mposa na ngai ya koyeba Yehova malamu. Na mokolo ya 14 Yuni 1944, nazwaki batisimo. Mary, Gladys ná Grace bakómaki babongisi-nzela mpe bandimaki kokende kosakola na nɔrdi ya Virginie. Kuna basalisaki mpenza mpo na kofungola lisangá na engumba Leesburg. Na ebandeli ya 1946, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na teritware moko mosika mpenza te na bango. Na eleko ya molunge ya mobu yango, biso nyonso tokendeki na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi na Cleveland, na etúká ya Ohio, kobanda na mokolo ya 4-11 Augusto 1946.

Na liyangani yango, Nathan Knorr, oyo azalaki kokamba mosala ya Batatoli na ntango wana, ayebisaki ete balingi koyeisa Betele ya Brooklyn monene. Na ndakisa, kotonga bandako mosusu ya kolala mpe ndako mosusu ya konyata mikanda. Bazalaki na mposa ya bandeko mibali mingi oyo bazali bilenge. Nalobaki ete kuna nde nalingi kosalela Yehova. Na yango natondisaki formilɛrɛ, mpe mwa basanza na nsima, na mokolo ya 1 Desɛmbɛ 1946, nakɔtaki Betele.

Soki mbula moko na nsima, Ndeko Max Larson oyo azalaki mokɛngɛli ya mosala ya konyata mikanda, atɛlɛmaki liboso ya mesa na ngai na Departema ya kotánga mikanda oyo batindeli biro monene ya Batatoli ya Yehova. Ayebisaki ngai ete batindi ngai na Departema ya mosala. Na departema yango, nayekolaki ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia mpe ndenge ebongiseli ya Nzambe etambolaka, mingimingi ntango nazalaki kosala elongo na Thomas Sullivan, mokɛngɛli ya departema yango.

Tata ayaki kotala ngai mbala na mbala na Betele. Ntango akómaki mobange akómaki kosambela. Ntango ayaki kotala ngai mpo na mbala ya nsuka na 1965, alobaki boye: “Yo okoki koya kotala ngai, kasi ngai nakoya lisusu te kotala yo awa.” Nakendeki kotala ye mbala mwa mingi liboso akufa. Azalaki kondima mpenza ete akokende na likoló. Nazali na elikya ete azali na makanisi ya Yehova, mpe soki ezali bongo, na ntango ya lisekwa akozala te na likoló ndenge ye moko azalaki kokanisa, kasi awa na mabele, na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paradiso.

Mayangani mosusu ná mosala ya kotonga oyo nabosanaka te

Mayangani ezalaki ntango nyonso makambo minene oyo esalisaki ngai nakola na elimo. Na ndakisa, mayangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi, oyo esalemaki na bambula ya 1950 na Yankee Stadium, na New York esalisaki ngai mpenza. Na liyangani moko oyo esalemaki na 1958, Yankee Stadium mpe Polo Grounds esangisaki bato 253 922 oyo bautaki na mikili 123. Nabosanaka te likambo moko oyo esalemaki na liyangani yango. Ntango nazalaki kosala na biro ya bakambi ya liyangani, Ndeko Knorr ayaki mbangu epai na ngai. Alobaki boye: “Fred, nabosanaki kopona ndeko oyo akosolola na babongisi-nzela; sikoyo talá bango wana bayangani na ndako oyo tofutaki pembeni awa. Okoki kokende mbangu kosalela bango mwa diskur moko ya malamu na likambo nyonso oyo okokanisa na nzela?” Nabondelaki mingi liboso nakóma kuna, mpe ntango nakómaki kuna namɛlaki mpema.

Lokola masangá ebakisamaki mingi na engumba New York na bambula ya 1950 mpe 1960, bandako oyo tozalaki kofutela mpe kosalela lokola Bandako ya Bokonzi ekokaki biso lisusu te. Na yango, kobanda 1970 tii 1990, tosombaki bandako misato na kartye ya Manhattan mpe tokómisaki yango bisika oyo ebongi mpenza mpo na kosala makita. Ngai nde nazalaki mokambi ya bakomite ya kotonga bandako yango mpe nabosanaka te makambo mingi ya esengo oyo emonisaki ndenge Yehova apambolaki masangá oyo esalaki na bomoko mpo na kobimisa mbongo mpe kosilisa kotonga bandako yango. Tii lelo, bandako yango ezali bisika ya losambo ya solo.

Makambo mosusu oyo esalemaki na bomoi na ngai

Mokolo moko na 1957, ntango nazalaki koleka na esika oyo ekaboli bandako ya kofanda ya Betele ná bandako ya konyata mikanda, mbula ebandaki kobɛta. Namonaki liboso na ngai, ndeko mwasi moko ya kitoko oyo autaki kokɔta Betele kala te. Lokola azalaki na lingɛmbu te, nasɛngaki ye aya kobombana na nse ya oyo ya ngai. Ndenge wana nde nakutanaki na Marjorie, mpe banda tobalanaki na 1960, tozali kosalela Yehova elongo na esengo, ezala na ntango ya mpasi to ya bisengo. Tokanisaki mbula ya 50 ya libala na biso na sanza ya Sɛtɛmbɛ 2010.

Mwa moke nsima ya libala na biso, Ndeko Knorr ayebisaki ngai ete batye ngai molakisi na Eteyelo ya Gileade. Ezalaki mpenza mokumba monene! Banda 1961 tii 1965, totángisaki kelasi mitano oyo eumelaki mingi koleka ndenge ezalaka. Bana-kelasi ezalaki mingimingi bandeko oyo bazalaki kokamba Babetele. Bazwaki formasyo ya malamu mpenza mpo báyeba kotambwisa makambo. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1965, tozongelaki kelasi ya bamisionɛrɛ oyo eumelaka sanza mitano.

Na 1972, balongolaki ngai na Eteyelo ya Gileade mpe batindaki ngai nazala mokɛngɛli na departema ya kopesa biyano na mituna ya Biblia. Kolukaluka na mikanda mpo na koyanola mituna mpe kosilisa mikakatano ndenge na ndenge esalisi ngai nayeba mpenza mateya ya Liloba ya Nzambe mpe ndenge ya kosalela mitinda ya Nzambe mpo na kosalisa basusu.

Na nsima, na 1987, batyaki ngai na departema ya sika oyo ebengamaki Biro ya makambo etali boyokani elongo na minganga. Bibongiseli ezwamaki mpo na koteya bankulutu oyo bakozala na Bakomite mpo na boyokani elongo na minganga ndenge oyo bakoki kosolola na minganga, bazuzi mpe bato mosusu oyo basalisaka mpe komonisa bango ntina oyo toboyaka makila, na kolanda Biblia. Tozalaki na mokakatano monene mpo minganga bazalaki kozongisa bana na biso makila na makasi, mpe mbala mingi bazalaki kozwa mitindo na batribinale mpo na kosala yango.

Ntango tozalaki kosɛnga minganga ete básalela mayele mosusu na esika ya kozongisa makila, mbala mingi bazalaki koyanola ete mayele mosusu ezali te to mpe ete eleki ntalo mingi. Mbala mingi, soki monganga moko alobi bongo, nazalaki koloba boye: “Sembolá naino lobɔkɔ na yo.” Soki asemboli, nazalaki koyebisa ye boye: “Lobɔkɔ na yo oyo ezali mayele oyo eleki malamu koleka kozongisa makila.” Soki nakumisi ye ndenge wana, ezalaki kotinda ye abosana te makambo oyo ye moko ayebi, elingi koloba kosalela mbeli ya lipaso na mayele esalisaka mpo makila ebima mingi te.

Na mbula 20 oyo euti koleka, Yehova apamboli mpenza milende oyo esalemi mpo na koteya minganga mpe bazuzi. Nsima ya kososola malamu ntina oyo toboyaka makila, babongolá mpenza makanisi na bango. Bamoni ete bolukiluki ya minganga emonisi ete kosalela mayele mosusu na esika ya kozongisa makila esalisaka mingi, mpe ete minganga mingi mpe mapitalo mingi bandimaka koyamba moto oyo aboyi makila.

Kobanda 1996, ngai ná Marjorie tozali kosala na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 110 na nɔrdi ya Brooklyn, na etúká ya New York. Awa, nasalaki mwa ntango moke na Departema ya mosala mpe na nsima, na boumeli ya mwa ntango, nateyaki bandeko ya bakomite ya filiale mpe bakɛngɛli-batamboli. Na mbula 12 oyo euti koleka, nasalaki lisusu na Departema ya kopesa biyano na mituna ya Biblia; departema yango elongwaki na Brooklyn mpe ekómaki na Patterson.

Mikakatano ya bobange

Lokola nakómi na mbula 80 na ndambo, ekómi sikoyo mpasi mpo nakokisa mosala na ngai ya Betele. Esali sikoyo mbula koleka zomi, nazali kobunda na maladi ya kanser. Namimonaka lokola Hizikiya, oyo Yehova abakiselaki ye mikolo ya bomoi. (Yis. 38:5) Mwasi na ngai mpe abɛlaka, mpe nasalisaka ye mpo ayika mpiko na maladi na ye ya Alzheimer. Marjorie asaleli Yehova na molende; asalisi bilenge, azali mosungi mpe moninga na ngai ya sembo ntango nyonso. Azalaki ntango nyonso moyekoli malamu ya Biblia mpe moteyi malamu na yango, mpe bato mingi oyo toyekolá na bango Biblia batindelaka biso nsango na bango.

Tata-mwasi Mary akufaki na Marsi 2010, na mbula 87. Azalaki moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe mpe asalisaki bato bándima losambo ya solo. Asalaki mosala ya mobongisi-nzela bambula mingi. Nazalaka na botɔndi mingi epai na ye ndenge asalisaki ngai nayekola solo ya Biblia mpe nakóma lokola ye, mosaleli ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo. Bakundaki Mary pembeni ya mobali na ye, oyo kala, azalaki misionɛrɛ na Israël. Nazali na elikya ete bango nyonso bazali na makanisi ya Yehova mpe bazali kozela lisekwa.

Soki nakanisi bambula 67 oyo nasaleli Yehova, nazalaka na botɔndi mingi mpo na mapamboli oyo nazwá. Nasepelaka mingi kosala mokano ya Yehova! Lokola natyaka motema na boboto monene ya Yehova, natyaka mpe motema na elaka oyo Mwana na ye apesaki ete: “Moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa biloko yango mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.”​—Mat. 19:29.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na 1942, kasi lelo oyo ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 19]

Na bilanga ya ntokia ya nkɔkɔ na Georgie, États-Unis, na 1928

[Elilingi na lokasa 19]

Tata-mwasi Mary ná nɔkɔ Talmadge

[Elilingi na lokasa 20]

Mary, Gladys, ná Grace

[Elilingi na lokasa 20]

Batisimo na ngai, mokolo ya 14 Yuni 1944

[Elilingi na lokasa 20]

Na Betele, na Departema ya mosala

[Elilingi na lokasa 21]

Ngai ná Mary na liyangani oyo esangisaki bato ya mikili mingi na 1958, na Yankee Stadium

[Elilingi na lokasa 21]

Ngai ná Marjorie mokolo ya libala na biso

[Elilingi na lokasa 21]

Ngai ná Marjorie na 2008

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto