Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/3 nk. 30-31
  • “Akangamaki se na Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Akangamaki se na Yehova”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Apesá biso bonsomi ya kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Kondima ya mokonzi moko ezwi mbano
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi I
  • Nzambe asalisi Hizikiya
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/3 nk. 30-31

Teyá bana na yo

“Akangamaki se na Yehova”

BASILÁ koyebisa yo okangama na eloko moko?—a Baboti mpe balakisi bakoki koyebisa bilenge ete bákangama na kelasi. Yango elingi koloba bámona ete kelasi ezali na ntina mingi. Tolingi kolobela moto moko oyo Biblia elobi ete “akangamaki se na Yehova,” Nzambe ya solo. Moto yango, nkombo na ye Hizikiya. Tótala liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye.

Hizikiya akolaki na mpasi. Tata na ye, Ahaza, mokonzi ya Yuda, atikaki kosalela Yehova. Ahaza azalaki moto ya liboso ya kotinda bato básambela banzambe ya lokuta ntango Hizikiya azalaki naino mwana moke. Kutu, Ahaza abomaki ata moko ya bana na ye, ndeko ya Hizikiya, mpe apesaki ye mbeka epai ya nzambe oyo ye azalaki kosambela!

Atako Ahaza akobaki kosala makambo ya mabe, Hizikiya azalaki kaka kotosa Yehova. Okanisi ete kosala bongo ezalaki mpasi mpo na ye?— Esengelaki kozala mpasi. Kasi, Hizikiya alɛmbaki te! Tótala nini esalisaki ye akangama na Yehova, mpe ndenge oyo biso tokoki kosala mpe bongo.

Hizikiya alandaki ndakisa ya bato mosusu oyo bakangamaki na Yehova. Davidi azali moko ya bato yango. Atako Davidi azalaki na bomoi bankama ya bambula liboso ete Hizikiya abotama, ekoki kozala ete Hizikiya ayekolaki makambo mingi mpo na Davidi na Makomami. Davidi akomaki boye: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.”

Omoni eloko nini esalisaki Davidi atosa Yehova?— Ezalaki kondima na ye! Davidi ayebaki malamu ete soki atosi, Yehova akosalisa ye. Davidi azalaki na ntembe ata moke te na likambo yango! Na ntembe te, kokanisa bomoi ya Davidi esalisaki Hizikiya akangama na Yehova mpe atosa ye. Yo mpe okoki kotya motema ete Yehova akosalisa yo soki okobi kokangama na ye mpe ozali kotosa ye.

Kasi ezali boni soki tata to mama na yo asambelaka Yehova te?— Nzambe alobi ete bana basengeli kotosa baboti na bango. Boye, yo mpe osengeli kotosa baboti na yo. Kasi, soki baboti na yo bayebisi yo osala likambo moko oyo Nzambe aboyi, okoki kolimbola ntina oyo okosala yango te. Osengeli te kokosa, koyiba, to kosala likambo nyonso mosusu oyo Nzambe alobi ete ezali mabe, ata soki nani atindi yo osala yango. Okosala malamu soki otosi Nzambe!

Ezali na bandakisa ya malamu oyo tokoki kolanda. Hizikiya alandaki ndakisa ya Davidi, alandaki mpe ndakisa ya nkɔkɔ na ye Yotame. Atako Yotame akufaki liboso ete Hizikiya abotama, Hizikiya ayekolaki makambo mingi na ntina na ye, kaka ndenge biso tokoki kosala yango lelo na nzela ya Biblia. Oyebi bandakisa mosusu ya malamu oyo tokoki kolanda?—

Na ntembe te, na Biblia, okoki kozwa mateya na mabunga mosusu oyo Hizikiya, Davidi, Yotame, mpe bato mosusu ya kozanga kokoka basalaki. Kasi, bato yango balingaki Yehova, bandimaki mabunga na bango, mpe balukaki kosala oyo ezali malamu. Kobosana likambo oyo te, kaka Yesu, mwana ya Nzambe nde azalaki moto ya kokoka. Tiká tóyekola makambo oyo etali Yesu mpe tómeka kolanda ndakisa na ye.

Tángá na Biblia na yo

  • 2 Bakonzi 18:6; 2 Ntango 28:1-3

  • Nzembo 27:10; Baefese 6:1; Bakolose 3:20

  • 2 Ntango 27:1, 2; 1 Petro 2:21

a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto