Yekolá na Liloba ya Nzambe
Nsango malamu mpo na mangomba ezali nini?
Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.
1. Mangomba nyonso ezali ya malamu?
Na mangomba mingi, ezali na bato ya mitema sembo oyo balingaka kosepelisa Nzambe. Nzambe amonaka bato yango mpe amibanzabanzaka mpo na bango. Kasi likambo ya mawa, bato mosusu basali mabe mingi na nkombo ya lingomba. Na ntango ya kala, bakonzi ya mangomba banyokolaki kutu banguna na bango. (2 Bakorinti 4:3, 4; 11:13-15) Lelo oyo, balapolo oyo bapanzi-nsambo bapesaka ezali komonisa ete bakonzi mosusu ya mangomba bazali kopesa mabɔkɔ na makambo lokola terorisme, bitumba, to na likambo ya kobebisa bana.—Tángá Matai 24:3-5, 11, 12.
Biblia eteyaka ete mangomba ezali lolenge mibale—lingomba ya solo mpe lingomba ya lokuta. Lingomba ya lokuta eteyaka solo te na ntina na Nzambe. Nzokande, Yehova Nzambe alingi ete bato báyeba solo na ntina na ye.—Tángá 1 Timote 2:3-5.
2. Nsango malamu mpo na mangomba ezali nini?
Nzambe alingi te ete bato bákosama na mangomba oyo elobaka ete elingaka ye, kasi eteyaka lokuta na ntina na ye. Kutu, bandimi ya mangomba yango balingaka kozala baninga ya mokili, oyo ezali kotambwisama na Satana Zabolo. (Yakobo 4:4; 1 Yoane 5:19) Liloba ya Nzambe emonisi ete mangomba oyo ekumisaka baguvɛrnema ya bato na esika ya kokumisa Nzambe ezali lokola mwasi ya ndumba. Biblia ebengi mwasi yango ya ndumba “Babilone Monene,” oyo euti na nkombo ya Babilone, engumba moko ya kala, esika losambo ya lokuta ebandaki nsima ya Mpela ya ntango ya Noa. Etikali moke, Nzambe asukisa mangomba nyonso oyo ekosaka bato mpe enyokolaka bango.—Tángá Emoniseli 17:1, 2, 5, 17; 18:8, 23, 24.
3. Ndenge nini Nzambe akopesa bato ya bikólo nyonso esengo?
Koyeba ete etikali moke Nzambe asambisa mangomba ya lokuta ezali nsango malamu. Yango ekosilisa minyoko nyonso na mokili mobimba. Mangomba ya lokuta ekobungisa lisusu bato nzela te mpe ekokabola bango lisusu te. Bato nyonso oyo bakozala na bomoi bakosangana na losambo ya Nzambe kaka moko ya solo.—Tángá Yisaya 11:9; Emoniseli 18:20, 21; 21:3, 4.
4. Bato ya mitema sembo basengeli kosala nini?
Yehova abosani te bato ya mitema sembo oyo bazali na kati ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Azali sikoyo koyanganisa bato ya ndenge wana na ndenge azali koteya bango solo.—Tángá Mika 4:2, 5.
Yehova ayambaka na libota na ye baoyo nyonso balingaka kosalela ye. Ata soki baninga na biso to bandeko na biso basepeli te ntango tobandi kosalela Yehova, tozwaka matomba mingi. Tokómaka baninga ya Nzambe, tozwaka “libota” ya sika mpe ya bolingo, mpe tokómaka na elikya ya kozwa bomoi ya seko.—Tángá Marko 10:29, 30; 2 Bakorinti 6:17, 18.
Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 15 mpe 16 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 16]
The Complete Encyclopedia of Illustration/J. G. Heck