Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/5 lok. 31
  • Apesaka mbano na baoyo nyonso basalelaka ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Apesaka mbano na baoyo nyonso basalelaka ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Ebede-meleke—Mobali ya mpiko mpe ya boboto
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Yehova akozongisela moto na moto na kolanda misala na ye
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Yehova atindi Yirimia asakola
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/5 lok. 31

Pusaná penepene na Nzambe

Apesaka mbano na baoyo nyonso basalelaka ye

“MERSI.” Moto nyonso asepelaka bápesa ye mersi mpo na mosala malamu oyo asali to mpo na kado oyo apesi na motema mobimba. Biso nyonso tolingaka ete bato básepela na milende oyo tozali kosala, mingimingi bato oyo tolingaka. Ya solo, tolingaka Yehova Nzambe na biso koleka moto mosusu nyonso. Azwaka mpenza na motuya milende oyo tosalaka mpo na kosalela ye? Tótalela naino makambo nini asalelaki Ebede-meleke, mobali moko oyo atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobikisa basakoli ya Nzambe.​—Tángá Yirimia 38:7-13 mpe 39:16-18.

Ebede-meleke azalaki nani? Emonani ete azalaki kosala na ndako ya Zidikiya, mokonzi ya Yuda.a Ebede-meleke azalaki na bomoi eleko moko na Yirimia, oyo Nzambe atindaki mpo akebisa Bayuda oyo bazangaki bosembo ete etikalaki moke Nzambe apesa bango etumbu. Atako Ebede-meleke azalaki kosala elongo na bankumu oyo bazalaki kobanga Nzambe te, azalaki kobanga Nzambe mpe azalaki na limemya mingi mpo na Yirimia. Bizaleli ya malamu oyo Ebede-meleke azalaki na yango emekamaki ntango bankumu wana ya mabe bakoselaki Yirimia makambo ete azali koluka kotombokisa bato mpe babwakaki ye na libulu ya mai mpo akufa. (Yirimia 38:4-6) Ebede-meleke asalaki nini?

Ebede-meleke asalaki makambo na mpiko nyonso mpe kozanga kobanga mabe oyo bankumu bakokaki kosala ye. Ayaki epai ya Zidikiya na miso ya bato nyonso mpe amonisaki ndenge oyo basalelaki Yirimia makambo na bosembo te. Mbala mosusu, alakisaki mosapi epai ya bankumu wana mpe alobaki na mokonzi boye: “Bato oyo basali mabe na . . . Yirimia.” (Yirimia 38:9) Mokonzi andimaki maloba ya Ebede-meleke mpe apesaki ye bato 30 mpo na kokende kobimisa Yirimia na libulu.

Na nsima, Ebede-meleke amonisaki ezaleli mosusu ya kitoko: boboto. Azwaki “biteni ya bilamba oyo enzuluká mpe biteni ya bilamba oyo ebebabebá, mpe akitisaki yango na bansinga . . . epai Yirimia azalaki.” Mpo na nini asalelaki biteni ya bilamba? Mpo Yirimia atya yango na nse ya mapeka mpe ayoka mpasi mingi te ntango bazali kobenda ye na libulu mozindo oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ.​—Yirimia 38:11-13.

Yehova amonaki likambo oyo Ebede-meleke asalaki. Esepelisaki ye? Na nzela ya Yirimia, Nzambe ayebisaki Ebede-meleke ete etikalaki moke Yuda ebebisama. Na nsima, Nzambe apesaki Ebede-meleke elaka ete akobikisa ye. Yehova alobaki na ye boye: “Nakobikisa yo . . . okopesama te na lobɔkɔ ya bato . . . Nakobikisa yo mpenza . . . okokwea na mopanga te . . . okozwa mpenza molimo na yo lokola eloko oyo epunzami.” Mpo na nini Yehova alakaki kobatela Ebede-meleke? Yehova ayebisaki ye boye: “Mpo otyeli ngai motema.” (Yirimia 39:16-18) Yehova ayebaki ete Ebede-meleke asalaki bongo kaka te mpo azalaki komitungisa mpo na Yirimia, kasi mpe mpo atyelaki Nzambe motema mpe azalaki na kondima epai na ye.

Liteya ezali polele: Yehova asepelaka mpenza na oyo tosalaka mpo na kosalela ye. Biblia emonisi biso ete abosanaka te ata likambo moke ya losambo oyo tosali mpo na ye na motema oyo etondi na kondima. (Marko 12:41-44) Koyeba ete Nzambe wana asepelaka na oyo osalaka mpo na ye etindi yo opusana lisusu penepene na ye? Soki ezali bongo, okoki mpenza kotya motema ete azali kaka ndenge Liloba na ye ebengi ye: “Moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”​—Baebre 11:6.

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Mai:

◼ Yirimia 32-50

[Maloba na nse ya lokasa]

a Biblia ebengi Ebede-meleke “mokube.” (Yirimia 38:7) Atako liloba yango ezalaki kosalelama mpo na kolobela mobali oyo balongolá ye makoki ya kobota, bazalaki mpe kosalela yango mpo na kolobela moto nyonso oyo azalaki kosala na ndako ya mokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto