Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/6 lok. 14
  • “Molimo na yo . . . ekogumbama likoló na ngai”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Molimo na yo . . . ekogumbama likoló na ngai”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Tózala na mpiko lokola Yilimia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/6 lok. 14

Pusaná penepene na Nzambe

“Molimo na yo . . . ekogumbama likoló na ngai”

KOMIKITISA ezali ezaleli oyo esepelisaka bato. Mbala mingi tosepelaka na bato oyo bazali na komikitisa. Likambo ya mawa, ezali mpasi mpo na komona komikitisa ya solosolo na mokili ya lelo, mingimingi epai ya bato oyo bazali na bokonzi. Bongo Yehova Nzambe, oyo aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba? Azali na komikitisa? Tótalela naino maloba ya mosakoli Yirimia oyo ezali na Bileli 3:20, 21.​—Tángá.

Yirimia akomaki mokanda ya Bileli na eleko oyo Yisraele ezalaki na mpasi. Autaki komona ndenge bato ya Babilone babebisaki Yerusaleme, engumba oyo azalaki kolinga mingi, mpe yango epesaki ye mpasi mingi. Mosakoli yango ayebaki ete mpasi yango ezali nde etumbu oyo Nzambe apesi Bayisraele mpo na masumu na bango. Kasi, Yirimia azangaki nde elikya? Amonaki nde ete Yehova azali mosika mpenza to azangi boboto mpo amona te baoyo babongoli mitema mpe apesa bango lisusu elikya? Yoká ndenge Yirimia azali koloba na esika ya bato ya ekólo na ye.

Atako bato mingi bazali na mawa, Yirimia azali na elikya makasi. Azali kolela liboso ya Yehova na maloba oyo: “Ya solo mpenza, molimoa na yo [Yehova] ekokanisa mpe ekogumbama likoló na ngai.” (Vɛrsɛ 20) Yirimia azali na ntembe ata moke te. Ayebi ete Yehova akobosana ye te, akobosana mpe te bato ya ekólo na ye oyo babongoli mitema. Kasi, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akosala nini?​—Emoniseli 15:3.

Yirimia andimi mpenza ete Yehova ‘akogumbama’ likoló ya baoyo babongoli mpenza mitema. Libongoli mosusu ya Lingelesi elobi boye: “Ee, mikundolá mpe gunzamá epai na ngai.” Maloba wana ezali kosalisa biso tómona ete Yehova azali mpenza na boboto. Yehova “Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba,” akogunzama, elingi koloba akolongola mpasi oyo basaleli na ye bazali na yango mpe akondima bango lisusu. (Nzembo 83:18) Lokola Yirimia azalaki na elikya wana, azwaki libɔndisi ya solosolo na mpasi oyo azalaki na yango na motema. Mosakoli wana ya sembo azalaki na ekateli ya kozela na motema ya kokita ntango oyo Yehova atyaki mpo na kobikisa bato na ye oyo babongolaki mitema.​—Vɛrsɛ 21.

Maloba oyo Yirimia akomaki ezali koteya biso makambo mibale na ntina na Yehova. Ya liboso, Yehova azali na komikitisa. (Nzembo 18:35) Atako Yehova “atombwami na nguya,” andimaka komikitisa tii na nivo na biso, mpo na kosalisa biso ntango tozali na mpasi. (Yobo 37:23; Nzembo 113:5-7) Likanisi wana ebɔndisi biso te? Ya mibale, Yehova azali na motema mawa; ‘asepelaka kolimbisa’ basumuki oyo babongoli motema mpe ayambaka bango lisusu soki bazongi epai na ye. (Nzembo 86:5) Bizaleli wana mibale, komikitisa mpe motema mawa, etambolaka nzela moko.

Tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova ndenge akeseni mpenza na bakonzi ya mokili, oyo lolendo ekómisaka bango motó makasi mpe mafumafu! Osepeli koyekola makambo mingi lisusu oyo etali Nzambe wana ya komikitisa, oyo andimaka “kogunzama” mpo na kolongola basaleli na ye na mawa mpe kopesa bango lisusu elikya?

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Yuni:

◼ Yirimia 51-52; Bileli 1-5–Ezekiele 1-5

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bakomeli ya kala babongolaki vɛrsɛ yango na “molimo na ngai,” lokola nde ezali kolobela Yirimia ye moko. Ntango mosusu, bazalaki kokanisa ete kobenga Nzambe molimo, liloba oyo Biblia esalelaka mpo na kolobela bikelamu ya mabele, ezali kozanga limemya epai na ye. Kasi, mbala mingi mpo na kolobela Nzambe, Biblia esalelaka maloba oyo bato bayebi mpo na kosalisa biso tókanga ntina. Lokola liloba “molimo” ekoki kolimbola “bomoi oyo tozali na yango,” maloba “molimo na yo” elimboli “yo.”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Yehova andimaka komikitisa tii na nivo na biso, mpo na kosalisa biso ntango tozali na mpasi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto