Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 nk. 8-10
  • Makamwisi oyo ekosalema mosika te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makamwisi oyo ekosalema mosika te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Ndenge oyo kobeba binama ya nzoto ekosila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Kristo azali nguya ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Makambo oyo “Nzambe kaka moko ya solosolo” alaki
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 nk. 8-10

Makamwisi oyo ekosalema mosika te

SOKI monganga moko oyo asalaka lipaso bayebisi ye asala yo lipaso moko ya makasi mpenza, okoyoka ndenge nini soki oyebi ete asalá naino moto mosusu te lipaso ya ndenge wana? Na ntembe te, okomitungisa. Kasi, ezali boni soki oyebi ete monganga yango nde azali mokambi ya mosala yango mpe asalá bato ebele lipaso oyo balingi kosala yo mpe asalá yango malamu? Okotya mpenza motema ete akosalisa yo.

Mokili mabe oyo tofandi ezali na maladi mpe ezali kosɛnga “lipaso” moko ya makasi mpenza. Na Liloba na ye Biblia, Yehova Nzambe alaki ete akozongisa paradiso awa na mabele. (2 Petro 3:13) Kasi, mpo yango esalema, makambo nyonso ya mabe esengeli liboso kolongwa. (Nzembo 37:9-11; Masese 2:21, 22) Liboso ete paradiso ezonga lisusu awa na mabele, makambo nyonso ya mawa oyo tomonaka esengeli kosila nyonso. Ekozala mpenza likamwisi mpo makambo nyonso wana esalema!​—Emoniseli 21:4, 5.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete mbongwana wana monene ekosalema mosika te. Mpo na nini? Mpamba te, makamwisi oyo Yehova Nzambe asalá emonisi ete azali na nguya ya kokokisa bilaka na ye. Meká naino kotala makamwisi motoba oyo Biblia elobeli mpe bilaka oyo yango epesi mpo na mikolo ezali koya.

Tiká ete okoba koyekola bilaka oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya. Wana kondima na yo ezali kokóma makasi, elikya na yo ekokóma mpe makasi​—elikya ya kozala na bomoi na ntango oyo okozwa mpenza matomba na makamwisi oyo Yehova asalaka.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 9, 10]

LIKAMWISI:

YESU ALEISAKI BATO EBELE KAKA NA MWA MAMPA NÁ MBISI.​—MATAI 14:13-21; MARKO 8:1-9; YOANE 6:1-14.

ELAKA:

“Mabele ekobota mpenza mbuma na yango; Nzambe, Nzambe na biso, akopambola biso.”​—NZEMBO 67:6.

YANGO ELIMBOLI NINI?

MOTO MOKO TE AKONYOKWAMA LISUSU MPO NA NZALA.

LIKAMWISI:

YESU AFUNGOLAKI MISO YA BATO BAKUFÁ MISO.​—MATAI 9:27-31; MARKO 8:22-26.

ELAKA:

“Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama.”​—YISAYA 35:5.

YANGO ELIMBOLI NINI?

BATO NYONSO OYO BAKUFÁ MISO BAKOMONA.

LIKAMWISI:

YESU ABIKISAKI BATO YA MALADI.​—MATAI 11:5, 6; YOANE 5:3-9.

ELAKA:

“Motɛngumi akopumbwa lokola serfe.”​—YISAYA 35:6.

YANGO ELIMBOLI NINI?

MALADI YA NDENGE NYONSO EKOSILA.

LIKAMWISI:

YESU ABIKISAKI MALADI NDENGE NA NDENGE.​—MARKO 1:32-34; LUKA 4:40.

ELAKA:

“Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi’”​—YISAYA 33:24.

YANGO ELIMBOLI NINI?

BAMALADI NYONSO YA MABE EKOSILA. TOKOZALA NZOTO KOLONGONO.

LIKAMWISI:

YESU AZALAKI NA BOKONZI LIKOLÓ YA BILOKO NYONSO.​—MATAI 8:23-27; LUKA 8:22-25.

ELAKA:

“Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakoboma nzoto mpamba te.”​—YISAYA 65:21, 23.

“Okozala mosika na monyoko​—mpo okobanga ata monyoko moko te—​mpe mosika na eloko nyonso oyo ezali kobangisa, mpo ekobɛlɛma na yo te.”​—YISAYA 54:14.

YANGO ELIMBOLI NINI?

MAKAMA LOKOLA MIPƐPƐ MAKASI TO KONINGANA YA MABELE EKOZALA LISUSU TE.

LIKAMWISI:

YESU ASEKWISAKI BAKUFI.​—MATAI 9:18-26; LUKA 7:11-17.

ELAKA:

“Baoyo nyonso bazali na kati ya malita . . . bakobima.”​—YOANE 5:28, 29.

“Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna.”​—EMONISELI 20:13.

YANGO ELIMBOLI NINI?

BATO NYONSO OYO TOLINGAKA, OYO BAKUFÁ BAKOSEKWISAMA.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto