Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/3 nk. 14-15
  • Petro ná Ananiasi bakosaki—Yango eteyi biso nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Petro ná Ananiasi bakosaki—Yango eteyi biso nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo tosengeli kokosa te
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Ndenge ya kolonga ezaleli ya kobanga
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Mekolá kondima na bango
  • Ayekolaki kolimbisa epai ya Nkolo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/3 nk. 14-15

TEYÁ BANA NA YO

Petro ná Ananiasi bakosaki​—Yango eteyi biso nini?

Ndenge oyebi yango, kokosa elakisi koloba likambo moko oyo oyebi ete ezali solo te. Naino okosa te?—a Ata mpe mikóló mosusu oyo balingaka Nzambe basilá kokosa. Na ntembe te, oyebi moto moko oyo Biblia elobi ete asalaki bongo. Nkombo na ye Petro, moko ya bantoma 12 ya Yesu. Tótalela naino lisolo oyo emonisi ntina oyo akosaki.

Ntango bakangaki Yesu, bamemaki ye na ndako ya nganga-nzambe monene. Ezalaki liboso ntɔngɔ etana. Petro akɔtaki na lopango ya nganga-nzambe kozanga ete báyeba ye. Lokola mɔtɔ engɛngisaki esika yango, mwana mwasi moko oyo azalaki kosala epai ya nganga-nzambe, oyo akɔtisaki Petro na lopango, ayebaki ye. Alobaki na ye boye: “Yo mpe ozalaki na Yesu.” Lokola abangaki, Petro alobaki ete azalaki na Yesu te.

Biblia elobi ete na nsima “elenge mwasi mosusu amonaki ye.” Alobaki: “Moto oyo azalaki na Yesu.” Na mbala oyo mpe Petro awangani. Mwa moke na nsima, bato mosusu bayaki epai ya Petro mpe balobaki boye: “Ya solo yo mpe ozali moko na bango.”

Petro abangaki makasi. Na yango, mpo na mbala misato mobimba, Petro akosaki na maloba oyo: “Nayebi moto wana te!” Nsoso elelaki. Yesu atalaki Petro, mpe Petro akanisaki lisusu ndenge Yesu ayebisaki ye mwa bangonga liboso ete: “Liboso nsoso elela, okowangana ngai mbala misato.” Petro ayokaki mawa mpe alelaki makasi. Esalaki ye mpasi mpenza!

Likambo ya ndenge wana ekoki mpe kokómela yo?— Okoki kozala na kelasi mpe oyoki baninga na yo bazali koloba mabe mpo na Batatoli ya Yehova. Moko alobi, “bapesaka bendele losako te.” Mosusu abakisi, “babundelaka ekólo te.” Mosusu kutu alobi, “bazalaka mpenza bakristo te mpo basalaka fɛti ya Noele te.” Na nsima, moko atali yo, mpe atuni yo boye: “Yo mpe ozali Motatoli ya Yehova, boye te?” Okoloba nini?—

Liboso ete likambo ya ndenge wana ekómela yo, osengeli komibongisa mpo na kopesa eyano ya malamu. Petro amibongisaki te yango wana ntango batyaki ye mpanzi-likoló, akosaki! Ata bongo, ayokaki mpasi na motema mpo na oyo asalaki, mpe Nzambe alimbisaki ye.

Ananiasi, moko ya bayekoli ya liboso ya Yesu, akosaki mpe. Kasi, Nzambe alimbisaki ye te ata mpe mwasi na ye Safira. Ayokanaki ná mobali na ye mpo bákosa. Tótala ntina oyo Nzambe aboyaki kolimbisa Ananiasi ná Safira.

Ntango Yesu atikaki bantoma na ye mpe azongaki na likoló epai ya Nzambe; mikolo zomi na nsima bato soki 3 000 bazwaki batisimo na Yerusaleme. Mingi na bango bautaki na mikili ya mosika mpo na fɛti ya Pantekote, mpe nsima ya kokóma bayekoli ya Yesu, batikalaki ntango molai mpo na koyekola makambo mingi oyo etali kondima na bango ya sika. Yango wana, bayekoli mosusu ya Yesu babimisaki mbongo na bango mpo na kosunga bandeko yango.

Ananiasi ná mwasi na ye batɛkaki biloko na bango mosusu mpo na kosalisa baoyo bazwaki batisimo sika. Ntango Ananiasi amemelaki bantoma mbongo, alobaki ete ezalaki mbongo nyonso oyo atɛkaki biloko yango. Kasi ezalaki bongo te! Abombaki mbongo mosusu mpo na ye moko! Nzambe amonisaki Petro likambo yango, mpe Petro alobaki na Ananiasi boye: “Okosi bato te, kasi okosi Nzambe.” Ntango ayokaki maloba wana, Ananiasi akweaki na nse mpe akufaki! Ngonga soki misato na nsima, mwasi na ye ayaki. Lokola ayebaki te likambo oyo ekómelaki mobali na ye, ye mpe akosaki; akweaki na nse mpe akufaki.

Oyo nde liteya monene! Koloba solo ezali mpenza na ntina. Ɛɛ, biso nyonso tosengeli kozwela yango liteya! Ya solo, biso nyonso tosalaka mabunga, mingimingi ntango tozali naino bilenge. Osepelaka te ndenge Yehova alingaka yo mpe akolimbisa yo ndenge alimbisaki Petro?— Kasi kobosana te, tosengeli kolobaka solo. Mpe soki tosali libunga monene ya kobuka lokuta, tosengeli kosɛnga Nzambe bolimbisi. Yango nde Petro asalaki, mpe alimbisamaki. Soki tosali makasi mpo tókosa lisusu te, Nzambe akolimbisa mpe biso!

Tángá na Biblia na yo

  • Matai 26:69-75

  • Misala 2:38-42; 4:32-37; 5:1-11

a Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto