Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/6 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini bato bazali te kokoka kotya kimya?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/6 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini ezali mpasi kimya ezala na mokili?

Kaka guvɛrnema oyo ekoki kobongola mitema ya bato nde ekotya kimya na mokili

Biblia epesi bantina mibale. Ya liboso, atako bato basalá makambo mingi ya kokamwa, bakelamá te na likoki ya komitambwisa bango moko. Ya mibale, mayele oyo bato bazali kosalela mpo na kotya kimya elongi te mpo “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe,” Satana Zabolo. Yango wana, milende oyo bato basali elongi te kotya kimya na mokili.​—Tángá Yirimia 10:23; 1 Yoane 5:19.

Ezaleli ya moimi mpe mposa ya lokumu oyo bato bazalaka na yango esali mpe ete kimya ezala te na mokili. Kaka guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba mpe oyo ekoki koteya bato bálinga oyo ezali malamu mpe bátyelanaka likebi nde ekotya kimya na mokili.​—Tángá Yisaya 32:17; 48:18, 22.

Nani akotya kimya na mokili?

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alakaki ete akotya guvɛrnema moko eyangela bato nyonso. Guvɛrnema yango ekozwa esika ya baguvɛrnema ya bato. (Danyele 2:44) Yesu, Mwana ya Nzambe, akoyangela lokola Nkumu ya Kimya. Akosilisa makambo nyonso ya mabe na mabele mpe akoteya bato nzela ya kimya.​—Tángá Yisaya 9:6, 7; 11:4, 9.

Lelo oyo, na litambwisi ya Yesu, bamilio ya bato na mokili mobimba bazali kosalela Biblia, Liloba ya Nzambe mpo na koteya bato ndenge ya kozala na kimya na basusu. Mosika te, kimya na mokili ekozala lisusu ndɔtɔ te.​—Tángá Yisaya 2:3, 4; 54:13.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 3 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto