Tósepela na bizaleli ya Yehova: azali sembo mpe alimbisaka
“Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa; mpe motema boboto oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.”—NZ. 86:5.
1, 2. (a) Mpo na nini tosepelaka na baninga oyo bazali sembo mpe bayebi kolimbisa? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
MONINGA ya solosolo ezali nani? Ndeko mwasi moko na nkombo Ashley alobi boye: “Mpo na ngai, moninga ya solosolo ezali moto oyo azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa yo mpe ya kolimbisa yo soki osali libunga.” Biso nyonso tolingaka kozala na baninga oyo bazali sembo mpe balimbisaka. Kozala na baninga ya ndenge wana esalaka ete tóbanga eloko te mpe tómiyoka ete ezali na bato oyo balingaka biso.—Mas. 17:17.
2 Yehova azali moninga ya sembo mpe oyo alimbisaka koleka baninga nyonso oyo tokoki kozwa. Mokomi ya nzembo amonisaki yango na maloba oyo: “Yo, Ee Yehova, ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa; mpe motema boboto [to, “bolingo ya sembo”] oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.” (Nz. 86:5) Kozala sembo mpe koyeba kolimbisa elimboli nini? Ndenge nini Yehova amonisaka bizaleli yango? Mpe ndenge nini tokoki komekola ndakisa na ye? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tólinga lisusu mingi Yehova, Moninga oyo aleki malamu. Ekosalisa biso mpe tókómisa makasi boninga na biso ná bandeko na biso.—1 Yoa. 4:7, 8.
YEHOVA AZALI SEMBO
3. Kozala sembo elimboli nini?
3 Kozala sembo elimboli komipesa, kozala moyengebene, mpe kokangama na motema mobimba. Moto ya sembo azalaka bongolabongola te. Alingaka makasi moto (to eloko) moko, mpe akangamaka na moto (to na eloko) yango ata na bantango ya mpasi. Ya solo, Yehova azali “Moto ya sembo” koleka bato mosusu nyonso.—Em. 16:5.
4, 5. (a) Ndenge nini Yehova amonisaka bosembo? (b) Na ndenge nini kokanisa bosembo ya Nzambe epai ya basaleli na ye ekoki kolendisa biso?
4 Ndenge nini Yehova amonisaka bosembo? Na ndenge atikaka soki moke te basaleli na ye ya sembo. Moko ya basaleli yango, Mokonzi Davidi akumisaki Yehova mpo na bosembo na ye. (Tángá 2 Samwele 22:26.) Ntango Davidi akutanaki na komekama, Yehova amonisaki bosembo na ye na ndenge atambwisaki ye, abatelaki ye, mpe abikisaki ye. (2 Sa. 22:1) Davidi ayebaki ete bosembo ya Yehova ezalaki kaka ya maloba te. Mpo na nini Yehova azalaki sembo epai ya Davidi? Mpamba te Davidi mpe azalaki “moto ya sembo.” Yehova asepelaka na bosembo ya basaleli na ye, mpe azalaka sembo epai ya bato ya sembo.—Mas. 2:6-8.
5 Kokanisa ndenge oyo Yehova azalaka sembo epai ya basaleli na ye ekoki kopesa biso makasi. Ndeko mobali moko ya sembo na nkombo Reed alobi: “Kotánga masolo oyo emonisi makambo oyo Yehova asalelaki Davidi na bantango ya mpasi esalisaka ngai mingi. Ata ntango Davidi azalaki kokimakima, mpe kofanda na mibenga, Yehova azalaki ntango nyonso kosunga ye. Yango elendisaka ngai mingi! Esalisaka ngai nabosana te ete ata soki nakutani na likambo nini, ata soki makambo ebebeli ngai ndenge nini, soki natikali sembo epai ya Yehova, akozala wana mpo na kosunga ngai.” Na ntembe te, yo mpe oyokaka bongo.—Rom. 8:38, 39.
6. Na ndenge nini mosusu Yehova amonisaka bosembo, mpe yango ezali na litomba nini mpo na basaleli na ye?
6 Na ndenge nini mosusu Yehova amonisaka bosembo? Na ndenge atosaka mibeko oyo ye moko atyá. Ye moko alobi boye: “Kino na bobange na bino Ngai nakozala kaka ndenge nazalaka.” (Yis. 46:4) Bikateli nyonso oyo azwaka eyokanaka ntango nyonso na mibeko oyo atyá na oyo etali mabe ná malamu, mpe mibeko yango ebongwanaka te. (Mal. 3:6) Longola yango, Yehova amonisaka bosembo na ndenge akokisaka ntango nyonso bilaka na ye. (Yis. 55:11) Na yango, bosembo ya Yehova ezali mpo na bolamu ya basaleli na ye nyonso ya sembo. Na ndenge nini? Soki tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa mibeko ya Yehova, tokoki kotya motema ete akokokisa elaka na ye ya kopambola biso.—Yis. 48:17, 18.
TÓMEKOLA YEHOVA: TÓZALA SEMBO
7. Wapi lolenge moko oyo tokoki kozala sembo lokola Nzambe?
7 Ndenge nini tokoki kozala sembo lokola Yehova? Lolenge moko ezali ya kosalisa bato oyo bazali na mikakatano. (Mas. 3:27) Na ndakisa, oyebi ndeko moko oyo alɛmbi nzoto, mbala mosusu mpo na maladi, botɛmɛli na libota, to mpo na mabunga na ye moko? Mpo na nini te koluka kokutana na ndeko yango mpe koyebisa ye mwa “maloba ya malamu, maloba ya kobɔndisa”? (Zek. 1:13)a Soki osali bongo, okomonisa ete ozali moninga ya sembo mpe moninga ya solosolo, oyo “akangamaka makasi koleka ndeko.”—Mas. 18:24.
8. Ndenge nini tokoki kozala sembo lokola Yehova, na ndakisa na kati ya libala?
8 Lolenge mosusu oyo tokoki kozala sembo lokola Yehova ezali ya kotikala sembo epai ya baoyo tolingaka. Na ndakisa, soki tobalá, toyebi ete tosengeli kotikala sembo epai ya molongani na biso. (Mas. 5:15-18) Na yango, tosengeli koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki komema na ekobo. (Mat. 5:28) Longola yango, tokomonisa bosembo epai ya bandeko na biso ya lisangá soki tozali koboya kotɔnga bango to kokosela bango makambo; tosengeli te kopanza bango nsango ya mabe, ata mpe koyoka yango.—Mas. 12:18.
9, 10. (a) Tolingaka kotikala sembo libosoliboso epai ya nani? (b) Mpo na nini ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kotosa mibeko ya Yehova?
9 Longola nyonso wana, mposa na biso nyonso ezali ete tótikala sembo epai ya Yehova. Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tozali kosala makasi tótalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango—kolinga makambo oyo alingaka mpe koyina makambo oyo ayinaka—mpe na nsima kozala na etamboli oyo ekosepelisa ye. (Tángá Nzembo 97:10.) Soki tozali kosala makasi ete makanisi mpe mayoki na biso eyokana na oyo ya Yehova, ekozala mpasi te mpo tótosaka mibeko na ye.—Nz. 119:104.
10 Ya solo, kotosa mibeko ya Yehova ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Esɛngaka ntango mosusu kosala milende mpo na kotikala sembo. Na ndakisa, ndeko oyo azali monzemba akoki kozala na mposa ya kobala, kasi amoni naino te moto oyo abongi na ye na kati ya basaleli ya Yehova. (1 Ko. 7:39) Ndeko mwasi moko akoki komona ete baninga na ye ya mosala oyo bazali Batatoli te basalaka nyonso mpo na kolukela ye mobali. Mbala mosusu ndeko yango azali mpenza komiyoka ete azali kaka ye moko. Atako bongo, azali mpe kosala makasi mpo abatela bosembo na ye epai ya Yehova. Bandeko basi ya ndenge wana bazali ndakisa malamu mpenza na oyo etali bosembo. Yehova akozanga te kopesa mbano na baoyo nyonso batikalaka sembo epai na ye atako bazali kokutana na mikakatano.—Ebr. 11:6.
“Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”—Mas. 18:24 (Talá paragrafe 7)
“Bólimbisanaka na motema moko.”—Ef. 4:32 (Talá paragrafe 16)
YEHOVA ALIMBISAKA
11. Kolimbisa elimboli nini?
11 Ezaleli mosusu ya Yehova oyo tokoki mpenza kosepela na yango ezali ete alimbisaka. Kolimbisa elimboli nini? Moto oyo alimbisaka aboyaka kokangela basusu nkanda na motema mpo na likambo oyo basalaki ye. Yango elimboli te ete andimaka mabe oyo basalaki ye to asalaka lokola nde likambo moko esalemaki te. Kasi, amonaka nde malamu abomba nkanda te. Biblia elobi ete Yehova ‘asepelaka kolimbisa’ bato oyo babongoli mpenza motema.—Nz. 86:5.
12. (a) Ndenge nini Yehova alimbisaka? (b) Petro alingaki koloba nini ntango akomaki ete masumu ya moto ekoki ‘kobomama’?
12 Ndenge nini Yehova alimbisaka? Biblia elobi ete Yehova alimbisaka “mpenza”; elingi koloba ete alimbisaka na motema moko mpe mpo na libela. (Yis. 55:7) Ndenge nini toyebi ete Yehova alimbisaka na motema moko? Tótala elaka oyo ezali na Misala 3:19. (Tángá.) Ntoma Petro alendisaki bayoki na ye ‘bábongola motema mpe bábongwana.’ Mosumuki oyo abongoli mpenza motema ayokaka mawa makasi mpo na mabe oyo asalaki. Azwaka mpe ekateli ya kozongela lisusu lisumu yango te. (2 Ko. 7:10, 11) Longola yango, kobongola motema ya solosolo etindaka mosumuki ‘abongwana,’ elingi koloba atika mabe mpe alanda nzela oyo esepelisaka Nzambe. Soki bayoki ya Petro babongolaki mpenza motema ndenge wana, nini elingaki kosalema? Petro alobaki ete masumu na bango ekokaki ‘kobomama.’ Liloba yango euti na liloba moko ya Grɛki oyo elimboli “kopangwisa, kolongola.” Na yango, soki Yehova alimbisi, ezali lokola apangwisi masumu. Alimbisaka na motema moko.—Ebr. 10:22; 1 Yoa. 1:7.
13. Maloba “nakokanisa lisumu na bango lisusu te” epesi biso elikya nini?
13 Ndenge nini toyebi ete Yehova alimbisaka mpo na libela? Tótalela esakweli ya Yirimia oyo elobelaki kondimana ya sika oyo Yehova asalaki na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo na nzela na yango baoyo bazali komonisa kondima na lisiko bakolimbisama mpenza. (Tángá Yirimia 31:34.) Yehova alobi boye: “Nakolimbisa libunga na bango, mpe nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” Na yango, Yehova amonisi ete soki alimbisi biso, akotángela biso lisusu lisumu yango ata mokolo moko te. Akokanisa yango lisusu te mpo asambisa biso to apesa biso etumbu mpo na yango. Soki Yehova alimbisi masumu, atyaka yango na nsima, elingi koloba alimbisaka mpo na libela.—Rom. 4:7, 8.
14. Ndenge nini tokoki kobɔndisama soki tomanyoli ndenge Yehova alimbisaka? Pesá ndakisa.
14 Tokoki kobɔndisama mpenza soki tomanyoli ndenge Yehova alimbisaka. Tózwa ndakisa moko. Eleki bambula mingi, ndeko mwasi moko oyo tokobenga Elaine abimisamaki na lisangá. Bambula mingi na nsima, ndeko yango azongisamaki na lisangá. Alobi boye: “Atako ngai moko nazalaki koloba mpe koyebisa basusu ete nandimi mpenza ete Yehova alimbisá ngai, mbala mingi nazalaki komona lokola ete azalaki mosika na ngai, ete basusu bazalaki na boyokani makasi na ye koleka ngai, mpe azalaki kolinga bango koleka ngai.” Kasi, Elaine abɔndisamaki ntango atángaki mpe amanyolaki maloba ya elilingi oyo Biblia esaleli mpo na komonisa ete Yehova alimbisaka. Abakisi boye: “Nayaki komona ete Yehova alingaka ngai mpenza.” Elaine alendisamaki mingimingi ntango atángaki maloba oyo na buku na biso moko: “Soki Yehova alimbisi masumu na biso, tosengeli kokanisa lisusu te ete tokotikala na litɔnɔ ya masumu yango bomoi na biso mobimba.”b Elaine alobi boye: “Namonaki ete liboso nazalaki kondima te ete Yehova akoki mpenza kolimbisa ngai, mpe nakanisaki ete nakomema kilo yango bomoi na ngai mobimba. Nayebi ete ekozwa ntango, kasi sikoyo nakómi komona ete nabandi mpenza kokóma moninga ya Yehova, mpe nazali komona lokola balongoli ngai kilo oyo nazalaki na yango.” Yehova azali mpenza Nzambe ya bolingo mpe oyo alimbisaka!—Nz. 103:9.
TÓMEKOLA YEHOVA: TÓLIMBISAKA
15. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na oyo etali kolimbisa?
15 Tokoki komekola Yehova soki tozali kolimbisa basusu. (Tángá Luka 17:3, 4.) Tóbosana te ete soki Yehova alimbisi, abosanaka masumu na biso; elingi koloba ete azongelaka yango lisusu te na nsima mpo apesa biso etumbu. Ntango tolimbisi basusu, biso mpe tosengeli kobosana, elingi koloba, kolekisa likambo yango mpe kozongela yango lisusu te.
16. (a) Kolimbisa elakisi nde kondima mabe oyo basali biso to kotika ete basusu bámonela biso? Limbolá. (b) Tosengeli kosala nini mpo Nzambe alimbisa biso?
16 Kolimbisa elimboli te kondima mabe oyo basali biso to kotika ete basusu bámonela biso. Elimboli nde koboya kobomba nkanda na motema. Mpe ezali na ntina mingi tóyeba ete mpo Nzambe alimbisa biso, tosengeli komekola ye mpe kolimbisaka basusu. (Mat. 6:14, 15) Yehova ayebaka ete tozali bato ya kozanga kokoka; abosanaka te ete “tozali putulu.” (Nz. 103:14) Na yango, soki moto asali biso mabe, tosengeli kobosana te ete azali moto ya kozanga kokoka lokola biso, mpe kolimbisa ye na motema moko.—Ef. 4:32; Kol. 3:13.
Mabondeli oyo tosalaka mpo na kosɛnga bolimbisi esengeli kouta na motema (Talá paragrafe 17)
17. Nini ekoki kosalisa biso soki ndeko moko azokisi biso?
17 Ya solo, kolimbisa ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Emonani ete na bantango mosusu, ata bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo na ekeke ya liboso bazalaki kokoka kosilisa matata na bango te. (Flp. 4:2) Soki ndeko moko azokisaki biso, nini ekoki kosalisa biso tólimbisa ye? Tózwa ndakisa ya Yobo. Ayokaki mpasi mingi na motema ntango Elifaze, Biledade, ná Zofare, oyo bamimonisaki lokola baninga na ye, balobaki na ye makambo ya mabe mpe ya lokuta. (Yobo 10:1; 19:2) Nsukansuka, Yehova amonisaki ete makambo oyo balobaki ezalaki solo te. Asɛngaki bango bákende epai ya Yobo mpe bápesa likabo mpo na masumu na bango. (Yobo 42:7-9) Kasi Yehova asɛngaki mpe Yobo asala likambo moko. Likambo nini? Yehova asɛngaki Yobo abondela mpo na baninga na ye wana oyo bakoselaki ye makambo. Yobo asalaki likambo oyo Yehova asɛngaki, mpe Yehova apambolaki ye mpo azalaki kolimbisa basusu. (Tángá Yobo 42:10, 12, 16, 17.) Yango eteyi biso nini? Eteyi biso ete kobondela na motema moko mpo na moto oyo asali biso mabe ekoki kosalisa biso tóboya kokangela ye nkanda.
TÓKOBA KOSEPELA NA BIZALELI NYONSO YA YEHOVA
18, 19. Ndenge nini tokoki kokoba kosepela na bizaleli ya Yehova?
18 Na ntembe te, tosepeli mingi ndenge totaleli bizaleli ndenge na ndenge ya Yehova. Tomonaki ete andimaka bato báya epai na ye, aponaka bilongi te, akabaka, azali makambo makasimakasi te, azali sembo, mpe alimbisaka. Ya solo, totaleli kaka mwa ndambo ya bizaleli na ye. Ntango tokozwa bomoi ya seko, tokozala na esengo ya koyekola makambo mosusu mingi oyo etali Yehova. (Mos. 3:11) Tozali na makanisi ndenge moko na ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza.” Tokoki mpe koloba bongo mpo na bolingo ya Nzambe mpe bizaleli mosusu motoba oyo tolobeli.—Rom. 11:33.
19 Tiká ete biso nyonso tókoba kosepela mpenza na bizaleli ya Yehova. Tokoki kosala yango soki toyebi bizaleli yango malamumalamu, tozali komanyola yango, mpe tozali komekola yango na bomoi na biso. (Ef. 5:1) Soki tozali kosala bongo, na ntembe te tokondima mpenza maloba ya mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Mpo na ngai, kobɛlɛma na Nzambe ezali malamu.”—Nz. 73:28.
a Mpo na kozwa mwa makanisi na likambo yango, talá lisolo “Oyikisaki moto moko mpiko na mikolo oyo?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/1995, mpe “Tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu—Lolenge nini?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/04/1995.